congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
-50%
Le deal à ne pas rater :
-50% Baskets Nike Air Huarache
64.99 € 129.99 €
Voir le deal

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

4 participants

Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 12/3/2013, 8:18 pm

Mbote ba mama na ba papa

Ravie d'être de retour parmi vous.

Motuna na nga eza boye:

Pona nini ba famille ya ba congolais na ba entourage balingi kotia batu panzi likolo na likambu etali libala. Soki muninga abali bakomi kotalela yo "tozo zela sikoyo mariage yayo" nzoka ye moko tata mombimba, a tika bana na kin, abota misusu awa pona mukanda mais abala te.
Soki kutu leki nayo ya mwasi abali, wana mawa na yo, misu nioso epa nayo.

Eske likambu ya kobala eza competition? Olimanuki kaka na tongo olobi ozobala? Oke kozia salle ya mairie otondisi 800 personnes oyebi kutu te, olesi bango kamundele na muscador? bo planter ba tissages ya londres, bo filmer ba crocos, bani bani...

Natuni kaka Very Happy

I.

Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Admin 13/3/2013, 3:37 am

Ice cream a écrit:Mbote ba mama na ba papa

Laughing
Admin
Admin
Admin
Admin

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Mathilde 13/3/2013, 11:16 am

[quote="Ice cream"]Mbote ba mama na ba papa

Ravie d'être de retour parmi vous.

Motuna na nga eza boye:

Pona nini ba famille ya ba congolais na ba entourage balingi kotia batu panzi likolo na likambu etali libala. Soki muninga abali bakomi kotalela yo "tozo zela sikoyo mariage yayo" nzoka ye moko tata mombimba, a tika bana na kin, abota misusu awa pona mukanda mais abala te.
Soki kutu leki nayo ya mwasi abali, wana mawa na yo, misu nioso epa nayo.

Eske likambu ya kobala eza competition? Olimanuki kaka na tongo olobi ozobala? Oke kozia salle ya mairie otondisi 800 personnes oyebi kutu te, olesi bango kamundele na muscador? bo planter ba tissages ya londres, bo filmer ba crocos, bani bani
.
.
.

Natuni kaka Very Happy

I.

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" 3105901510 Ice ,

Kie kie Naseki na mawa mpo.... Sad ma fille azali na meme probleme na famille ( oncles, tantes &cousins) Sad au lieu bazala fieres ya muana na bango asisi uni akomi kosala Evil or Very Mad ( nde bayebaki te ke azalaka tetue kaka neti maman na ye . Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" 57158 Bazali na kanda na ngai grave mpo nayebisa bango ke mpo na ngai ; Le mariage n'est pas une finalité.........Ba tika muana na ngai tranquille.
Mad

_________________
Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Mathil10[b]“Le deuil, c’est pour la vie. Ca ne s’en va jamais, ça fait progressivement partie de vous, à chaque pas, à chaque souffle.”
Mathilde
Mathilde

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 13/3/2013, 1:19 pm

kie kie kie, yango wana vraiment problème ma Mathy, mwana mobali asala naye, mais ya mwasi abala, abota (congés maternité) alors que osali kutu malonga te. Pourquoi s’embêter à faire des études ya milayi milayi alors.
Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 15/3/2013, 7:42 am

Ice cream a écrit:Mbote ba mama na ba papa

Ravie d'être de retour parmi vous.

Motuna na nga eza boye:

Pona nini ba famille ya ba congolais na ba entourage balingi kotia batu panzi likolo na likambu etali libala. Soki muninga abali bakomi kotalela yo "tozo zela sikoyo mariage yayo" nzoka ye moko tata mombimba, a tika bana na kin, abota misusu awa pona mukanda mais abala te.
Soki kutu leki nayo ya mwasi abali, wana mawa na yo, misu nioso epa nayo.

Eske likambu ya kobala eza competition? Olimanuki kaka na tongo olobi ozobala? Oke kozia salle ya mairie otondisi 800 personnes oyebi kutu te, olesi bango kamundele na muscador? bo planter ba tissages ya londres, bo filmer ba crocos, bani bani...

Natuni kaka Very Happy

I.

Eza na ngo partout makambo oyo eza kaka ba famille ya ba Congolais te. Meme mindele ya bien ba lobelaka yango oko bala mokolo nini? la preuve en est soki muasi abali abuakaka ba fololo, oyo ako yamba azua lupemba ba bala ye. Eza kaka ba methodes nde ekeseni. Mais eza na ngo normal batuna po muasi soki aleki 24 ans azo bala te, azo vandela bino kaka na palais ekomaka mua desordre. Meme atangi mingi eza kaka probleme soki azo bala te. Po aza mutu ako koma na posa ya nzoto alors ako banda kozua ba makangu kili kili et nos familles africaines elingaka na ngo makambu wana te.
Example moko: tango nazalaka na Kin, tozalaka na soeur moko na quartier ya mukolo, atanga mingi et azalaka directrice na compagnie moko donc elle gagnait bien sa vie. Mais mobali rien. Et okomona que meme famille na ye ekomaki ko loba mais c'est elle mutu azalaki koleyisa pe ko latisaka ba leki et ses parents. Alors soeur akomaki souci souci. Un jour mista na biso moko akotisela soeur esprit alata veste akenda penza ti kozela soeur na libanda ya cailloux. Tangu soeur abima boye amona mista. Ye moko soeur abengi ye Jean Jacques ndenge nini okomi awa, alobi na bandaki koleka na moni pe bozo bima, na decider kaka na zela yo tokende na biso nzela moko. Soeur asepeli, alobi zela kasi. Apesi Jean Jacques sac amemela ye. Po aza petit ya quartier ensuite ba leki ya soeur wana ba mista na biso, tozalaka zalaka. Jean Jacques akotisa esprit na nzela a yebisi soeur que alingi ye et il est serieux donc alingi bazalaka na bango muasi na mobali. Jean Jacques pe Francais evanda, ensuite beau gard ya ko sakana te (Ba soins Genre kaka ya ba Mario Very Happy ) Ba solola kitoko, mbala moko ekomaki systeme mista azo kende kozela soeur et okomona bango ba ye directement chez ngai na palais. Moyen pe na sala ezalaki te nazo yamba bango kaka po ngai na zalaki na annexe moko chez biso. Tozo mela, tozo solola. Bango pe cote a cote kaka. Mais ezalaki dossier moko sensible po leki ya soeur azalaki mutu ya makasi donc pomba. Et biso tozalaki na groupe ya batu batangaka donc batu ya mua intelligence mais tosanganaka na biso batu ya makasi pe heure moko. Il faillait vraiment ko gerer dossier yango bien. Soeur wana ya mukolo akomaki na ye mista ya momie na ngai et ya ba nzele ya ba 2 autres mista po bango nionso ba dobamaka esika moko na annexe na ngai Very Happy Very Happy . Mais soeur wana azalaka suka na lolendo donc orgueilleuse et vantard ezanga tina mais comme azalaki mukolo tozo respecter ye kaka. Jour mususu na tuni Jean jacques: Ndenge nini soeur alelaka mua mingi tango ya lidobi? Jean jacques alobi ah tika mon frere. Nazua soeur oyo vierge donc machine ma confiance. kieeee. Mais soeur ya mukolo. Oyebi que mukolo sango epanzanaka na quartier ezalaka grave. Ba leki ba tomboka ba beta biso kaka Very Happy Very Happy Mais soeur alobi na bango soki bo simbi kaka mobali na ngai to ba camarades na ye, bo ko damer lisusu te na palais et pas d'aide. Discipline ekota. Jean Jacques pe a dobaka na ye kitoko ti abima fiance' epayi ya ba soeur ango. Apres ngai na ye na ngai mikili ekomaka ba phone kaka mais na kala phone ezalaka tres cher ko benga kin. Na komaki kaka ko tuna bango. Tangu na bengisi femme na ngai aye ko rejoindre ngai na mikili awa. Ayebisi ngai mais dossier ya Jean Jacques ekomaka grave. Na tuni mukarame nini lisusu. Alobi mais djo wana aza suka na escro. A dama dama soeur ba l'ar et abala soeur te. Jean Jaques akima, Akenda na ye Gabon donc soeur azua lokola depression po age epusani et mutu atiaki motema akima. Na se ya ba souci wana et soeur amesanaki lidobi trop, po Jean Jacques adoba soeur na tembe. Soki akoti na soeur na chambre ba bimaka kaka retard Very Happy Very Happy et c'etait chaque jour. Soeur abotola penza mobali ya batu et azua zemi ya tata mobimba donc epesa scandale na quartier. Soeur akima quartier. Jean Jacques pe abunga mais dernierement tangu femme na ngai akendaki kin akeyi na famille ya mista na ngai Jean Jacques ba pesi biso ba coordonnees donc Jean Jacques akoma na ye Mukonzi na Elf na Gabon. Very Happy Very Happy Abala na ye muana port gentille donc vie kitoko. Tozo kende vacance na ete oyo na femme na ngai na bana chez jean jacques. Na tuna ye pourquoi okima soeur wana, alobi na ngai mon frere yo oza mista na ngai na zo yebisa yo verite', na kokaki jamais ko vanda na soeur wana. Premierement aza mukolo, azalaki orgueilleuse, impolie, insolente et ayebaki na ye misala ya ndaku bien te. Age na ye pe na monaki kaka na kima na ngai po alingaki pe kozuaka ngai kaka lokola Mario po nazalaki na rien. Mais comportement na ye nde mutu ekimisaki ngai ye.

Donc libala eza important mais ekoki pe ko bebisa vie ya mutu surtout soki okutani na Jean Jacques Sad .

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 15/3/2013, 4:55 pm

Bonjour Lenovo,
natangi yo bien. Osekisinga.
Je vais te répondre ce soir.
I
Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 15/3/2013, 8:04 pm

Ice cream a écrit:Bonjour Lenovo,
natangi yo bien. Osekisinga.
Je vais te répondre ce soir.
I

Bonjour Ice Cream,

Nazo zela kaka reaction na yo. Naza na ngai pe na boulot ti soir donc nazo buaka kaka lisu awa na tanga reaction na yo.

Alors oza gout nini ya Ice Cream?
Very Happy Arrow
http://www.icecream.com/funfacts/index.asp?b=105#bp

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 16/3/2013, 1:54 am

Abalaka te pona nini?

Soeur moko na yebaka akola bien, education ya bien et vie malamu. Na quartier pe na famille ba yebaka ye que aza mayele mingi po atanga bien et akenda mikili atanga. Apres ba etudes na ye na mikili, azonga Kin ko travailler. Azalaka pe na chance azua vrai musala na Kin wana po sœur atanga bien et ensuite multilingue. Donc respect ya kosakana te na quartier pe na famille. Ensuite, sœur azalaki na musala ya bien donc une vraie professionnelle. Mais inquietude ekomaki makasi po age ya sœur ebandaki ko pusana et famille ekomaki déjà koloba abalaka te pona nini ? Mais de l’autre cote’ espoir ezalaki que ndenge sœur akoli, ako memela bango tangu mosusu un ministre, pdg ou bien suka na homme d’affaire. En bref, Famille ezalaka certaine que sœur ako memela bango un jour mobali ya bien po ekomaki une situation inquietante que sœur abalaka te pona nini ? Un jour ndenge kaka makambu ezalaka na Kin. Essence ebungaki na kin alors sœur azua taxi akende musala, esalaki que tangua komi na musala ayebisi taximan soki moyen ezali aya kozua ye azongisa ye na palais tangu ako silisa cailloux. Taximan pe alobi probleme eza te, na ko sala effort na ya kozua yo. Sœur apesi taximan epakolami akoti na ye cailloux. Na ba 16 :30 Vieux Paulin pe present aye kozela Sœur po azongisa ye palais po wana course express donc bango 2 kaka na taxi. Masolo etoka na car, oyebi que sœur asepela na Vieux Paulin na masolo, alobi na vieux Paulin na seka boye kala oza amusant vraiment. Vieux Paulin alobi ngai pe na mona esengo ya boye kala po vie oyo stress ebele po il faut okokisa versement et koluka ba limba par ici par la. Mais lelo penza osepelisi ngai sœur. Tangu bakomi palais sœur alobi lobi yaka avant kozala na retard te po naza na reunion moko importante. Epakolami pe epesami bien. Donc journee eleki bien et Vieux Paulin akati na ye cailloux po versement ekoki avec ba benefice. Lobi na tongo vieux Paulin alati bien, akeyi kozua sœur. Tangu akomi sœur pe azalaki na ye prete, amati na car ba keyi. Masolo ebandi, ba sololi bien. Sœur alobi na moni oza eduque’ et oza na sagesse alors parles moi de toi un peu. Vieux Paulin alobi ah sœur na ngai vie oyo eza na makambu ebele mais un jour toko solola kaka. Sœur pe avandi na ye. Vieux Paulin pe atiki ye na boulot et na soir aye kozua ye azongisi ye palais. Situation esali que vieux Paulin akomi na ye chauffeur ya sœur ayaka kozua pe kozingisa. Un vendredi soir soeur alobi, mais Paulin tokende nanu chez GB na somba ba plans et ensuite otika ngai na Nganda Kapi na Lemba na tala mista na ngai bongo apres ozongisa ngai ndaku. Vieux Paulin pe obeissance kaka. Ba kenda ba courses, alors tango ba silisi na GB bakeyi ligal po sœur il fallait asomba ba parfums na ye, ba lotions etc…Bakota ligal ya forme alobi Paulin Pona 2 ensembes ya bien, chaussures mibale ya bien wana cadeaux na yo mais il faut to kende moziki na biso Chez Nganda Kapi sima nde oko tika ngai na palais. Vieux pe azua ba plans, ba kenda atika sœur na palais abongama et atika biloko ba sombaka na GD. Vieux Palulin akeyi ko laver po a repondre na rendez vous ya mfuama na ye ya sika Sœur oyo azo kende moziki. Heure ekoki vieux Paulin Present. Sœur alata bien, et Vieux Paulin pe atelema sika, suki bakati bien. Sœur alobi Paulin obongi aseki kaka. Ba leki nzela ti na moziki. Bakota boye sœur a presenter ba mista na ye mbala moko que oyo Copin na ngai Paulin. Vieux atelesa miso mais alobi rien, tala kaka ba mi meli diamba ya kin ba kemba na esprit donc charisme kaka. Abima penza mobali ya sœur. Apres moziki, ba kenda na la porte noire po OK Jazz ebandaka kobeta kuna. Vieux Paulin abinisa sœur fort. Tellement que Vieux Paulin atimba, tangu balingi bazonga alobi na sœur kuiti oyo na za na ngo, soki na simbi volant eza kaka po toluka liwa na biso. Toluka esika to lala, lobi tokeyi na biso ndaku. Sœur avandi atali Paulin, aseki alobi yo Paulin oza mobulu vraiment. Otia ngai litoyi te mbala moko toluka esika tolala ? kieeeeee. Paulin azanga maloba mais tellement diamba etonda azua jeux mbala moko afukama donc aloba penza na francais » Françoise je t’aime et tu es mon vrai amour pour la vie » ah ah sikoyo ba mista ya moziki ba mona penza Vieux Paulin afukama, aloba ba mots wana et ba yoka. Baya mbangu ba lobi mais nini lisusu ko Francoise, Sœur alobi kaka bino boyebi Paulin te. Ba sœurs ya moziki ba lela Vieux Paulin fort. Balobi Françoise oza na chance mobali alingi yo boye. Mbala moko ba leka nzela ti na Hotel. Ba lala, sœur azua biloko ya moto ya Taximan. Ba sala love ya suka donc Vieux Paulin abimisa ba kimbiolongo nionso amela na nzoto ya sœur. Et sœur ayoka bilengi ezalaka te. Donc phenomene bizarre na palais, po sœur akimi ndaku donc alali na ndaku te. Heure moko Vieux Pauli akeyi kozongisa sœur. Sœur ayebisi ye bongo oya apres, ngai na pema nanu y ope kende kopema bongo oyo apres ko damer. Vieux Paulin aleka na nganda nua, apanza ba mista na ye Diamba, ye moko pe abeta suka na mbenda ya Mabor. Tango akoma palais alala suka na pongi abosana na ye que il fallait akende chez sœur mais tangu asusumukaki na pongi akende mbangu. Akuta sœur azo zela kaka. Tres sage et tres patiente. Tangu akoma boye, ba petits frere ya sœur, ba kenda koyebisa sœur que Petit Bitinda na yo aye azo zela yo libanda kieeee. Ba comprena te sœur atomboka mabe, alobi mbala ya suka bo benga mobali na ngai na kombo wana. Ndaku ekota malili. Vieux Paulin akota, a dama na ye na momie na ye et ba mela pe bien. Lelo bakoma muasi na mobali. Sœur amemela bango ministre te mais azua na taxi man na ye po yen de mutu amonanaki na nzela ya sœur. Abalaka te pona nini ? Abali Vieux Paulin.
Pression ya famille etindaka mutu abala ezala pe bien, tala lelo sœur abali na ye pe aza heureuse na vieux Paulin. Esengo ekota famille. Vieux Paulin akoma grand homme d’affaire mais esprit ya Taximan eza kaka na nzoto kieeee.
Very Happy Very Happy

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 16/3/2013, 8:10 pm

Kie kie kie
Lenovo, nayebi kutu esika okendeke ko kundola ba masolo nayo te mais en tout cas na seki. Nabosani pe na direction na nga. Yo obeti masolo ya basi bakola, pe na kin. double contraintre. Awa toza nabiso na kin te. Pe nazolobela ba jeune ya ba 24-25 ans, voire moins. Point na nga eza que likambu yabola esa ya bangu bangu te, il faut kotika temps na temps. Temps ya kopona mutu oyo akoki nayo, pona ko éviter ba divroces et autres inconvénients surtout na poto. C'est pour ça que kotiela batu panzi likolo po babala eza kutu na sens te selon nga. Sinon te, masolo no esikisi nga. Very Happy
Bon WE
Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 18/3/2013, 5:24 pm

Ice cream a écrit:Kie kie kie
Lenovo, nayebi kutu esika okendeke ko kundola ba masolo nayo te mais en tout cas na seki. Nabosani pe na direction na nga. Yo obeti masolo ya basi bakola, pe na kin. double contraintre. Awa toza nabiso na kin te. Pe nazolobela ba jeune ya ba 24-25 ans, voire moins. Point na nga eza que likambu yabola esa ya bangu bangu te, il faut kotika temps na temps. Temps ya kopona mutu oyo akoki nayo, pona ko éviter ba divroces et autres inconvénients surtout na poto. C'est pour ça que kotiela batu panzi likolo po babala eza kutu na sens te selon nga. Sinon te, masolo no esikisi nga. Very Happy
Bon WE

Bonjour Ice Cream,

Yo pe gout ya ice cream toyebi te. masolo eza kaka ba histoire to viva tangu tozalaki ba jeunes. Mais bana 24-25 ya poto baza na pression? Loba nanu. Shocked

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 19/3/2013, 1:50 am

Na malili oyo ozolukela ice cream ya likambu nini? Shocked Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" 1951730242
Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  mongo elombe 19/3/2013, 11:57 am

Le novo obuki nga panzi bon natia mpe ya nga mongwa na pilipili bobosani que ça dépends aussi de qui tu fréquentes........... Selon mwa expériences na nga certaines familles où filles soki bayei mikili idées kaka kobala on dirait ekoma lipolome Very Happy (diplôme).

Fréquentations terreà terre masolo kaka bilamba, sapato, fêtes etc aucun projet d'avenir la suite mabala ekoma kleenex et malgré ça aucune remise en cause.

Le pire dot ekomi mombongo à qui taxera le plus...........
mongo elombe
mongo elombe

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 19/3/2013, 5:41 pm

Makambo ya kobala esila nango ekoma nango kk image batu bamona kk yango bamisusu bakoma koma soit kosala pression soit ko vivre sous pression déjà mariage coutumier ekoma commerce donc to perda trop na vrai sens ya mariage .pour ma part c pas la peine ko kipe ba soit disant pression pona vie pression ekozanga te pression nako bala soki obali il faut obota oboti oo bana mibale te il faut ata 5 et encore encor s'il faut écouter ce que les gens disent à chaque fois en plein 21 siècle en plus en europe ou chacun est libre alors la on sait pas c k l'on veut.
À+

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 19/3/2013, 11:26 pm

mongo elombe a écrit:Le novo obuki nga panzi bon natia mpe ya nga mongwa na pilipili bobosani que ça dépends aussi de qui tu fréquentes........... Selon mwa expériences na nga certaines familles où filles soki bayei mikili idées kaka kobala on dirait ekoma lipolome Very Happy (diplôme).

Fréquentations terreà terre masolo kaka bilamba, sapato, fêtes etc aucun projet d'avenir la suite mabala ekoma kleenex et malgré ça aucune remise en cause.

Le pire dot ekomi mombongo à qui taxera le plus...........

L’influence du milieu joue beaucoup dans le comportement des individus.
Un individu vient au monde sous une forme inachevée et il va construire les bases de sa personnalité pendant les premières années de sa vie. Cette construction va se faire et se poursuivre en fonction de son caractère, de ses appartenances sociales et des expériences que le hasard et son éducation, puis aussi sa volonté et son désir, vont lui faire vivre.

Dernière édition par lenovo le 20/3/2013, 1:03 am, édité 3 fois

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Invité 19/3/2013, 11:28 pm

Ice cream a écrit:Na malili oyo ozolukela ice cream ya likambu nini? Shocked Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" 1951730242

lol!

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 24/3/2013, 10:05 pm

mongo elombe a écrit:Le novo obuki nga panzi bon natia mpe ya nga mongwa na pilipili bobosani que ça dépends aussi de qui tu fréquentes........... Selon mwa expériences na nga certaines familles où filles soki bayei mikili idées kaka kobala on dirait ekoma lipolome Very Happy (diplôme).

Fréquentations terreà terre masolo kaka bilamba, sapato, fêtes etc aucun projet d'avenir la suite mabala ekoma kleenex et malgré ça aucune remise en cause.

Le pire dot ekomi mombongo à qui taxera le plus...........

Ya solo ma Mongo, problème na biso ya liboso remise en cause No, toyebi yango te. Ba makambu misusu na yokaka, "mobali nayo, il faut o china ye, aya kokabela biso mbongo, et j'en passe des meilleures... Toza na poto mais ba mentalités ya kin tomema. Sad
Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Ice cream 24/3/2013, 10:07 pm

laelce_luz del Cielo a écrit:Makambo ya kobala esila nango ekoma nango kk image batu bamona kk yango bamisusu bakoma koma soit kosala pression soit ko vivre sous pression déjà mariage coutumier ekoma commerce donc to perda trop na vrai sens ya mariage .pour ma part c pas la peine ko kipe ba soit disant pression pona vie pression ekozanga te pression nako bala soki obali il faut obota oboti oo bana mibale te il faut ata 5 et encore encor s'il faut écouter ce que les gens disent à chaque fois en plein 21 siècle en plus en europe ou chacun est libre alors la on sait pas c k l'on veut.
À+

Exactement, soki pression ezo wuta libanda problème te. Oyo ya kati ya famille nde pasi oko bwakisa mbango ndenge nini. Ekoma kaka ba explications na ba explications Sad
Ice cream
Ice cream
Moderatrice

Revenir en haut Aller en bas

Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?" Empty Re: Phénomène panzi likolo "okobala mukolo ninio?"

Message  Contenu sponsorisé

Contenu sponsorisé

Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum