congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le Deal du moment : -40%
-40% sur le Pack Gaming Mario PDP Manette filaire + ...
Voir le deal
29.99 €

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

4 participants

Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N''EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  ORLY 14/5/2009, 7:37 pm

Mbote na bino ba ndeko wa bolingo,

Lisapo ya lelo ezali bongo kolimbola mwa example ndenge nini moto akozongiselaka moninga wa ye moto na manso maye ma salameli ye.

Na yango, mpo ete bolandi lisapo oyo malamu, nakopesa bongo bilembo( ba kombo) na bato lyango.

MONIMAMBU: Le mari
NDATANSANGU: L'epouse
KOKOUMBO: Le petit frere de Ndatansangu
ELUKA MAKAMBO: Ami de Ndatansangu
ZOLOLO: La maman de Ndatansangu
BAYEBAKATE: La famille de Monimambu

Ezalaki mokolo moko famille songolo ezalaki na boyebani na MONIMAMBU. Mokolo mosusu boye, famille songolo eyeyi koyamba okati lya libota wa bango NDATANSANGU na ndeko wa ye wa mobali KOKOUMBO. Bazalaki ba nzenza( mipaya). Lokolo MONIMAMBU azalaki na boyebani na famille songolo, azalaki kokende mpe kotala bango mbala mingi, aye komona mpe ba nzenza wana. Ba sanza mpe mileki, ti MONIMAMBU aye kolingana na NDATANSANGU.

Bazwi mpe ndako, mpe bakomi kofanda o ndako na KOKOUMBO( ndeko wa NDATANSANGU). Nasima ya mibu babale( 2ans), MONI na NDATA bayeyi na makwela. Famille BAYEBAKATE basali mpe maye manso makoki mpona kozwela NDATA na KOKOUMBO eye bobengi mikanda( les papiers de sejour). Mbula moko eleki, NDATA aboti. Sika mpe, famille BAYEBAKATE basali mpe makasi babengisi maman ZOLOLO. Maman ZOLOLO azwi mikanda( mobali wa mpe azalaki declare, donc etikalaki kaka aya) mpe akomi kovanda o ndaka wa mwana wa ye NDATA. Na mikolo eleki, NDATA akomi kozanga mobali wa ye MONI luzitu( respect) memi o miso wa maman wa ye. Sika akomi korimako mobali wa ye na makimbo lizangi tina( ooo ngai nalingi ilfo tobimaka mbala mingi, token eke ba concerts, ba resto, ba cinema, etc.). MONI alobi naye, tosi toboti deja bana mibale, ba akimbo misusu tokoki kosala yango mingi te, pcq ilfo to bokolo bana. Mais NDATA alingi wana te. En plus, mobali alingaka losambo, kasi mwasi alingi losamabo te, kaka loyenge.

Mokolo mususu, NDATA ayebisi MONI ke moninga wa ye ELUKA MAKAMBO azali koya kotala ye o ndako wa bango weekend moko( donc kobanda Vendredi ti na Dimanche). Moninga wana mpe aya, bayamba ye mpe o ndako wa bango( alalakI mpe kuna). MONI na NDATA bakendaki kotala ba parents ya MONI( famille

BAYEBAKATE). Kuna mpe maman BAYEBAKATE a lambeli nzenza( mopaya) ndenge esengeli koyambela mopaya( veut dire ba soso, ba pondu, ba Mumbai, ba makayabu Penza ko). Nzenza mpe aliya, atondisa libumu, mpe asepela na boatbill wa bango. Na mokolo wa Dimanche, azonga mpe o mboka lya ye.

Ba mbula eleki, bakomi na ba mikakatano mingi, NDATA akomi Penza na ba bizaleli lya mabe. Alingi kaka MONI amemaka ye o resto ou o cinema ou o ekala na ba weekend. Akolambela lisusu mobali te, mobali akoma koliya biloko bi lambi bokilo wa ye maman ZOLOLO. Mpe korimako mobali ekomi na exces. KOKOUMBO( leki wa NDATA) akomi kokoma na nsoni wa makasi ke akomeli papa wa bango o mboka ya Afrika, alobi papa sala noki oya kopesa mwana wa yo NDATA toli, mpo ete ye azali lisusu kobanga mobali wa ye MONI te.

Mikakatano mikoti okati wa ndako wa bango ti na maman ZOLOLO aye kobima o ndako wa bango, mpe azwi esika lya ye na mwana wa ye KOKOUMBO. Mbala misato, MONI lanai koboma libala mpe kokabwana na NDATA, mais ba parrains wa ye na famille BAYEBAKATE ba fandisa bango mpe ba bongisa makimbo. Mpe na mbala mionso wana MONI mpe andima kovanda na libala. Maye maye kolanda sima, mi kokamwisa bino ba ndeko wa ngai.

Ba ndeko ba bolingo, mokolo mususu Monimambu awutaki mosala, akoma na ndako, alobi apema moke. Tango asilisi kopemisa nzoto, akeyi liboso ya Ordinateur naye mpo ete atanga mikanda mya technologia( email) mya ye, atala o liboso wa ye, nzoka Ndatansangu alekanaki wana yambo ye aya. Ndatansangu abosanaki kokanga linzanza( boite) mya teknologia wa ye. Sika Monimambu pona bozali bwa ekenge lya niawu( chat), abandi kotanga makambo okati, kasi ba ndeko wa ngai, myoyo MONIMAMBU amoni okati ezalaki somo ya koleka.

Nzoka NDATANSANGU azalaka na ba makangu wa ye bako sololoko na internet( kosololoka penza makambo mya salite na bango). Azalaki kosololoko na ba makangu mya ye ebele, misusu baye bazalaki na ye tango azalaki o mboka ya Afrika, misusu o mbaka ya Europa, mpe atindela bango mpe ba bilili( fotos) na elateli ya adamu( en tenue d’Adam). Mais eye e bendaki attention lya ye penbeni ezalaki bongo mikanda lya NDATANSANGU na ELUKA MAKAMBO. Nzoka avant ELUKA MAKAMBO aya o mboka esika efandi NDATANSANGU na mobali wa ye, ba sololaki na mikanda( email), ELUKA MAKAMBO asengaki ete ba lala na NDATANSANGU( donc, basala makambo lya bomoyi). Voir memi ke na mbala mosusu asengaki lisusu naye ke balala, mais na tango wana NDATANSANGU azalaki na mokumba, ayebisaki ELUKA MAKAMBO ke wana moyen lizali te, e ke azela tango ako boto mwana, nde na sima bakolala.

MONIMAMBU, atindela nanu ye moko fotokopi mya mikanda myango okati lya linzanza( boite) lya ye. Nasima, abengi NDATANSANGU, alakisi ye mikanda myango, atuni ayebisa ye soki maye wana milingi kolakisa ko nini ? Ndeko mwasi asili mayele, akomi zoba, abandi obe kolela, na kosenga bolimbisi. MONIMAMBU alobi likambo lizali te, akangi bisaka( les valises) lya ndeko mwasi, akamati ye, une deux une deux ti epayi ya bokilo wa ye maman ZOLOLO( maman wa NDATANSANGU). Na tango wana, bana mpe bazalaki epayi ya ye maman bokilo. Tango akomi o ndako lya mama bokilo, akoti alobi naye: maman, naye kotikela yo mwana wa yo, ozwa ye bafandani na ye, o eduke ye, nakoya kokamata bana ba ngai, nazali koya.

Maman ZOLOLO na panik wana, akamata tshondo( phone) abenga maman BAYEBAKATE( famille ya MONIMAMBU), mais akota okati ya repondeur. Atika lolaka( message), alobi maman BAYEBAKATE palado sala noki obenga ngai, ngai awa na kweyeli makambo, mwana wa yo( papa MONIMAMBU) aye ko bwakela ngai mwasi wa ye awa, nayebi te nakosala ko nini.

Na ngonga wana mosusu, nzoka MONIMAMBU akenda o ndako wa ndeko wa ye lya mwasi( Grande soeur), a esplike yaya wa ye maye manso mawuti koleka. Nasima, abenga pe ba parrains wa ye, a esplike bango mpe.

Na tango ba parrains bayoki ke MONIMAMBU ayebisi ndeko wa ye wa mwasi, ba bengi ye, mpe basengi ye palado, balobi koyebisa ba parents te( donc famille BAYEBAKATE), mpo soki oyebisi bango bako silica makasi, mpo ete deja balobaki ke balembi ba comportements ya NDATANSANGU, e ke ya mbala sima, bakoya lisusu kobongisa te, soki MONIMAMBU azwi mokano( decision) na ye, bango bakoloba lisusu te. Alors ba bombi sekele pona kobanga wana.

Sika mpe, famille BAYEBAKATE babengi maman ZOLOLO mpona kotuna ke otikelaki biso message ke tobenga yo mbangu mbangu, likambo yango nini lisusu ? Maman ZOLOLO a wangani, alobi ke ezalaki kaka mbeba( erreur), sinon likambu eza te.

Mais lokola mpe likambu ebombanaka te, eye kobima, mpe famille BAYEBAKATE baye koyeba lyango( na ba details manso, ti na makambo ya ELUKA MAKAMBO). Ko silika ekoti makasi, balobi ke basakani na bango, e ke bamonaki bango bazoba !

Ti na mokolo wa lelo, NDATANSANGU na maman ZOLOLO nanu basengi ba palado te o pembeni ya famille BAYEBAKATE, mais famille ezali kaka mwa kimwa mpo ete balingi mwana wa bango MONIMAMBU. Lisapo mpe lisuki awa !!!!

Obala mabe; Obala pe te mabe, euh NZAKOMBA !! Soki tolobi ke mwasi azali ndoki( okomi moto mabe); Soki tolobi mpe ke tokota na biso ata couvant( balobi ooo osimbi moyeke).

Ba ndeko bwa bolingo, oyo eza kindoki te ? Na maye manso MONIMAMBU na famille wa ye BAYEBAKATE basaleli NDATANSANGU na famille wa ye, boye nde lifuta ? Bo limbola nanu ata bino moko.

Merci et bonne soiree,

ORLY
[/size]

Dernière édition par ORLY le 15/5/2009, 1:09 am, édité 1 fois

ORLY

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  mongo elombe 14/5/2009, 8:05 pm

Orly,

Libala eza lokola épreuve, okoyebana na monto boyebani caractère te il faut bomiyekola etc etc mais mingi ezalaka manque ya kosolola mpe kosala mba concession, mais comportement na biso na mikili ezala basi na mibali mosusu ekoma bizzarre mikili ekosa mba couples ebele.
mongo elombe
mongo elombe

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  El-chaman 15/5/2009, 12:42 am

LISOLO KITOKO lol!

Toko meka kolimbola lobi na ndenge na biso.

El-chaman

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  Mathilde 15/5/2009, 12:43 am

Orly,
excuser ngai , na tumolaka Hiro pour rien.... Embarassed Very Happy Nazali ko koka kotanga lingala na yo te...et pourtant na lobaka et na komaka mpe lingala.... Embarassed Ezali kosala ngai mutu pasi a chaque fois nalingi na tanga, nazali ko comprendre nyonso okomi te , ezali mua makasi muke ,hein... Embarassed Sad Nazali sad, mpo moyen na commenter ezali te. confused confused
Mathilde
Mathilde

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  El-chaman 15/5/2009, 12:56 am

Mathilde a écrit:Orly,

Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Mathilde Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy Very Happy

El-chaman

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  Mathilde 15/5/2009, 12:59 am

chaman a écrit:

Chaman,
Koseka ngai te ko..... Sad Sad Oyebi ke meme oyo ya "qui perd gagne" na mekaki mpe kotanga yango na koki te et na tiki.....Sorry Orly Embarassed Sad
Mathilde
Mathilde

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  El-chaman 31/5/2009, 7:57 pm

ORLY a écrit:Mbote na bino ba ndeko wa bolingo,

Lisapo ya lelo ezali bongo kolimbola mwa example ndenge nini moto akozongiselaka moninga wa ye moto na manso maye ma salameli ye.

Na yango, mpo ete bolandi lisapo oyo malamu, nakopesa bongo bilembo( ba kombo) na bato lyango.

MONIMAMBU: Le mari
NDATANSANGU: L'epouse
KOKOUMBO: Le petit frere de Ndatansangu
ELUKA MAKAMBO: Ami de Ndatansangu
ZOLOLO: La maman de Ndatansangu
BAYEBAKATE: La famille de Monimambu

Ezalaki mokolo moko famille songolo ezalaki na boyebani na MONIMAMBU. Mokolo mosusu boye, famille songolo eyeyi koyamba okati lya libota wa bango NDATANSANGU na ndeko wa ye wa mobali KOKOUMBO. Bazalaki ba nzenza( mipaya). Lokolo MONIMAMBU azalaki na boyebani na famille songolo, azalaki kokende mpe kotala bango mbala mingi, aye komona mpe ba nzenza wana. Ba sanza mpe mileki, ti MONIMAMBU aye kolingana na NDATANSANGU.

Bazwi mpe ndako, mpe bakomi kofanda o ndako na KOKOUMBO( ndeko wa NDATANSANGU). Nasima ya mibu babale( 2ans), MONI na NDATA bayeyi na makwela. Famille BAYEBAKATE basali mpe maye manso makoki mpona kozwela NDATA na KOKOUMBO eye bobengi mikanda( les papiers de sejour). Mbula moko eleki, NDATA aboti. Sika mpe, famille BAYEBAKATE basali mpe makasi babengisi maman ZOLOLO. Maman ZOLOLO azwi mikanda( mobali wa mpe azalaki declare, donc etikalaki kaka aya) mpe akomi kovanda o ndaka wa mwana wa ye NDATA. Na mikolo eleki, NDATA akomi kozanga mobali wa ye MONI luzitu( respect) memi o miso wa maman wa ye. Sika akomi korimako mobali wa ye na makimbo lizangi tina( ooo ngai nalingi ilfo tobimaka mbala mingi, token eke ba concerts, ba resto, ba cinema, etc.). MONI alobi naye, tosi toboti deja bana mibale, ba akimbo misusu tokoki kosala yango mingi te, pcq ilfo to bokolo bana. Mais NDATA alingi wana te. En plus, mobali alingaka losambo, kasi mwasi alingi losamabo te, kaka loyenge.

Mokolo mususu, NDATA ayebisi MONI ke moninga wa ye ELUKA MAKAMBO azali koya kotala ye o ndako wa bango weekend moko( donc kobanda Vendredi ti na Dimanche). Moninga wana mpe aya, bayamba ye mpe o ndako wa bango( alalakI mpe kuna). MONI na NDATA bakendaki kotala ba parents ya MONI( famille

BAYEBAKATE). Kuna mpe maman BAYEBAKATE a lambeli nzenza( mopaya) ndenge esengeli koyambela mopaya( veut dire ba soso, ba pondu, ba Mumbai, ba makayabu Penza ko). Nzenza mpe aliya, atondisa libumu, mpe asepela na boatbill wa bango. Na mokolo wa Dimanche, azonga mpe o mboka lya ye.

Ba mbula eleki, bakomi na ba mikakatano mingi, NDATA akomi Penza na ba bizaleli lya mabe. Alingi kaka MONI amemaka ye o resto ou o cinema ou o ekala na ba weekend. Akolambela lisusu mobali te, mobali akoma koliya biloko bi lambi bokilo wa ye maman ZOLOLO. Mpe korimako mobali ekomi na exces. KOKOUMBO( leki wa NDATA) akomi kokoma na nsoni wa makasi ke akomeli papa wa bango o mboka ya Afrika, alobi papa sala noki oya kopesa mwana wa yo NDATA toli, mpo ete ye azali lisusu kobanga mobali wa ye MONI te.

Mikakatano mikoti okati wa ndako wa bango ti na maman ZOLOLO aye kobima o ndako wa bango, mpe azwi esika lya ye na mwana wa ye KOKOUMBO. Mbala misato, MONI lanai koboma libala mpe kokabwana na NDATA, mais ba parrains wa ye na famille BAYEBAKATE ba fandisa bango mpe ba bongisa makimbo. Mpe na mbala mionso wana MONI mpe andima kovanda na libala. Maye maye kolanda sima, mi kokamwisa bino ba ndeko wa ngai.

Ba ndeko ba bolingo, mokolo mususu Monimambu awutaki mosala, akoma na ndako, alobi apema moke. Tango asilisi kopemisa nzoto, akeyi liboso ya Ordinateur naye mpo ete atanga mikanda mya technologia( email) mya ye, atala o liboso wa ye, nzoka Ndatansangu alekanaki wana yambo ye aya. Ndatansangu abosanaki kokanga linzanza( boite) mya teknologia wa ye. Sika Monimambu pona bozali bwa ekenge lya niawu( chat), abandi kotanga makambo okati, kasi ba ndeko wa ngai, myoyo MONIMAMBU amoni okati ezalaki somo ya koleka.

Nzoka NDATANSANGU azalaka na ba makangu wa ye bako sololoko na internet( kosololoka penza makambo mya salite na bango). Azalaki kosololoko na ba makangu mya ye ebele, misusu baye bazalaki na ye tango azalaki o mboka ya Afrika, misusu o mbaka ya Europa, mpe atindela bango mpe ba bilili( fotos) na elateli ya adamu( en tenue d’Adam). Mais eye e bendaki attention lya ye penbeni ezalaki bongo mikanda lya NDATANSANGU na ELUKA MAKAMBO. Nzoka avant ELUKA MAKAMBO aya o mboka esika efandi NDATANSANGU na mobali wa ye, ba sololaki na mikanda( email), ELUKA MAKAMBO asengaki ete ba lala na NDATANSANGU( donc, basala makambo lya bomoyi). Voir memi ke na mbala mosusu asengaki lisusu naye ke balala, mais na tango wana NDATANSANGU azalaki na mokumba, ayebisaki ELUKA MAKAMBO ke wana moyen lizali te, e ke azela tango ako boto mwana, nde na sima bakolala.

MONIMAMBU, atindela nanu ye moko fotokopi mya mikanda myango okati lya linzanza( boite) lya ye. Nasima, abengi NDATANSANGU, alakisi ye mikanda myango, atuni ayebisa ye soki maye wana milingi kolakisa ko nini ? Ndeko mwasi asili mayele, akomi zoba, abandi obe kolela, na kosenga bolimbisi. MONIMAMBU alobi likambo lizali te, akangi bisaka( les valises) lya ndeko mwasi, akamati ye, une deux une deux ti epayi ya bokilo wa ye maman ZOLOLO( maman wa NDATANSANGU). Na tango wana, bana mpe bazalaki epayi ya ye maman bokilo. Tango akomi o ndako lya mama bokilo, akoti alobi naye: maman, naye kotikela yo mwana wa yo, ozwa ye bafandani na ye, o eduke ye, nakoya kokamata bana ba ngai, nazali koya.

Maman ZOLOLO na panik wana, akamata tshondo( phone) abenga maman BAYEBAKATE( famille ya MONIMAMBU), mais akota okati ya repondeur. Atika lolaka( message), alobi maman BAYEBAKATE palado sala noki obenga ngai, ngai awa na kweyeli makambo, mwana wa yo( papa MONIMAMBU) aye ko bwakela ngai mwasi wa ye awa, nayebi te nakosala ko nini.

Na ngonga wana mosusu, nzoka MONIMAMBU akenda o ndako wa ndeko wa ye lya mwasi( Grande soeur), a esplike yaya wa ye maye manso mawuti koleka. Nasima, abenga pe ba parrains wa ye, a esplike bango mpe.

Na tango ba parrains bayoki ke MONIMAMBU ayebisi ndeko wa ye wa mwasi, ba bengi ye, mpe basengi ye palado, balobi koyebisa ba parents te( donc famille BAYEBAKATE), mpo soki oyebisi bango bako silica makasi, mpo ete deja balobaki ke balembi ba comportements ya NDATANSANGU, e ke ya mbala sima, bakoya lisusu kobongisa te, soki MONIMAMBU azwi mokano( decision) na ye, bango bakoloba lisusu te. Alors ba bombi sekele pona kobanga wana.

Sika mpe, famille BAYEBAKATE babengi maman ZOLOLO mpona kotuna ke otikelaki biso message ke tobenga yo mbangu mbangu, likambo yango nini lisusu ? Maman ZOLOLO a wangani, alobi ke ezalaki kaka mbeba( erreur), sinon likambu eza te.

Mais lokola mpe likambu ebombanaka te, eye kobima, mpe famille BAYEBAKATE baye koyeba lyango( na ba details manso, ti na makambo ya ELUKA MAKAMBO). Ko silika ekoti makasi, balobi ke basakani na bango, e ke bamonaki bango bazoba !

Ti na mokolo wa lelo, NDATANSANGU na maman ZOLOLO nanu basengi ba palado te o pembeni ya famille BAYEBAKATE, mais famille ezali kaka mwa kimwa mpo ete balingi mwana wa bango MONIMAMBU. Lisapo mpe lisuki awa !!!!

Obala mabe; Obala pe te mabe, euh NZAKOMBA !! Soki tolobi ke mwasi azali ndoki( okomi moto mabe); Soki tolobi mpe ke tokota na biso ata couvant( balobi ooo osimbi moyeke).

Ba ndeko bwa bolingo, oyo eza kindoki te ? Na maye manso MONIMAMBU na famille wa ye BAYEBAKATE basaleli NDATANSANGU na famille wa ye, boye nde lifuta ? Bo limbola nanu ata bino moko.

Merci et bonne soiree,

ORLY
[/size]

Idea silent Idea silent Idea silent Idea silent Idea affraid affraid affraid NDATANSANGU

El-chaman

Revenir en haut Aller en bas

BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN) Empty Re: BASI TO KOBALAKA: LA RECONNAISANCE N'EST PAS DE CE MONDE( MERCI BAPESAKA NA CHIEN)

Message  Contenu sponsorisé

Contenu sponsorisé

Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum