congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le Deal du moment :
Jeux, jouets et Lego : le deuxième à ...
Voir le deal

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

5 participants

Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 16/7/2009, 10:17 pm

Ba ndeko,

Na cadre ya ba patrimoines ya ekolo na biso, tokolobela stade tata Raphaël. Lisolo lya stade tata Raphaël ebandi na ye moko Révérend père Raphaël de la Kethule de Ryhove (1890-1956). Ye azali sango awutaki na Belgique esika abotama. Akomaki na Léopoldville na Congo belge na 1917. A remplacaki Révérant père Arthur Breye na direction ya collège saint Joseph ya Congrégation du Cœur Immaculé de Marie = Congrégation des Pères de Scheut. Tata Raphaël azalaki directeur ya collège saint Joseph kobanda na 1917 tee na 1948. Ye azali mutu ya liboso oyo akotisi esprit sportif na Congo mpe abandi ko encadrer ba jeunes na sport mpe na scoutisme. Na esprit wana nde atongisaki ba terrains ya sport entre ba avenues Baron na Félix Fuch na croisement ya avenue des aviateurs. Avenue des aviateurs (e changea kombo te) ezali avenue ya Eglise Sainte Anne. Avenue Baron ekoma avenue Dongo. Avenue Félix Fuch ekoma Avenue Dumi. Esika ba terrains ezalaki lelo ekoma ba immeubles mibale : moko ya ambassade ya Portugal, mosusu ya Etats-Unis. Ba terrains wana ebandaki mpo e servir na ba activités sportives : gymnastique, course à pieds, football, wuta 1918. Na élan wana ba écoles ya Léopoldville ekomi na ba activités sportives mpe na yango ba compétitions inter scolaires ebandi kosalema kati na ba écoles. Tango wana ba terrains ya compétions ezalaki na Saint Joseph na Saint Pierre. Na 1919, asali Cercle Sportif Congolais (C.S.C.), (eyaki kobengama sima A.R.S.C.) na ba équipes mine : Union, Standard, Etoile na Excelsior. Sima na yango, aye kosalisa Union sportive ya Léopoldville mpe na cités ba équipes ekomi kosalema sur base ya ba élèves. Yango wana championnat ebandaki noki na Union sportive de Léopoldville. Tee na 1923, Championnat Stanley Pool, yango ebandaki kobetama entre ba équipes ya Léopoldville na ya Brazzaville. Na 1934, Tata Raphaël na aide ya l’Etat colonial na Mission ya Léopoldville na actions bénévolats ya ba kelasi, ayaki kotonga stade reine Astrid ya Léopoldville (stade du 24 novembre) lelo ekoma stade Cardinal Joseph Malula.

Suite na organisation administrative oyo Belge asalaka na 1933, Paul Ermens akomaki vice-gouverneur général ya Congo belge. Ye nde ayaki kosala parc ya munene mpo na ba jeunes ya cité indigène (cité ya batu moindo) ya Léopoldville. Parc yango ebengamaki na kombo ya Parc omnisport Ermens. Kuna azalaki na quatre terrains ya football na athlétisme, bassin ya munene (piscine), terrains ya basketball, na ya tennis mpe piste mpo na athlétisme mpe na espace ya gymnastique pembeni ya bassin. Parc Ermens ezalaki oyo ekoma lopango ya stade tata Raphaël.

Na 1939, roi Léopold III, na proposition ya gouvernement colonial, apesaki Association Royale Sportive Congolaise (A.R.S.C.) na tata Raphaël en sa qualité ya animateur ya A.R.S.C. ba titres ya société royale mpo na 20 ième anniversaire ya A.R.S.C. Ba titres ya société royale ezali ba titres oyo société royale ezali na yango na ba sociétés oyo ezali na immobilisation financière na actif ya bilan. Octroi na yango ezali faveur oyo roi de Belges asalaka na ba sociétés oyo ezali kokokisa ba conditions spéciales neti : importance ya esika oyo société ezuami na exercice ya activité na yango, impact na yango na batu, mpe motindo ya bakambi ba société oyo esengeli e bénéficier na ba titres, etc.

Na 1948, tata Raphaël atikeli Révérent père Gérard Kester ebonga ya Directeur ya Saint Joseph mpe atikali Directeur d’honneur mpe akomi na une nouvelle mission ya éducation ya ba jeunes ya Léopoldville na makambu ya sport mpe na concrétisation ya projet ya construction ya stade munene ya football. Na début ya ba grandes vacances scolaires ya 1948, na mokolo mua 4 juillet 1948, nde tata Raphaël atiaki libanga ya liboso ya construction ya stade oyo esengelaki etongama na parc Ermens. Stade yango etongami na ba fonds ya gouvernement ya colonie, ba entreprises ya Léopoldville, ba missionnaires mpe na main d’œuvre bénévole ya bana kelasi. Stade esilaki na 1952, mpe à la grande surprise, au lieu ebengama stade Ermens, gouvernement coloniale e imposer kombo ya stade roi Baudouin Ier soi-disant mpo na kolakisa ndenge colonie ezali attacher na roi na métropole. Kasi mingi mingi na population noire, ebandaki kaka kobengama stade Ermens par habitude na parc oyo ezali wana.

Ba mbula ebele yambo abanda kotonga stade, na 1919, tata Raphaël asalaki Association Royale Sportive Congolaise (A.R.S.C.) mpo azalaki na makanisi ma ko promouvoir football ya mutu moindo na kati ya Congo belge na Rwanda-Urundi na kobetisa ba championnats provinciaux na championnat national chaque année. Na 1958, eye kokoma Association Royale Sportive Congolaise et du Rwanda-Urundi (A.R.S.C.RU.) na ba Fédérations Provinciales oyo : Fédération Royale Sportive Congolaise de Léopoldville (F.R.S.C.L.) ; Fédération Royale des Associations Sportives Indigènes d'Elisabethville (F.R.A.S.I.E.) na province ya Katanga, Fédération Sportive Congolaise de Luluabourg (F.S.C.L.) na province ya Kasaï, Fédération des Cercles et Clubs Indigènes de Stanleyville (F.C.C.I.S.) na province Orientale, Association Sportive Congolaise de l'Equateur (A.S.C.E.) na province ya Equateur, Association des Clubs Sportifs du Kivu (A.C.S.I.K.) na province ya Kivu, Fédération Indigène de Football d'Usumbura (F.I.F.U) na territoire ya Rwanda-Urundi. Donc, musala mua implantation ya ba structures na infrastructures mobandaki banda 1925, muke muke na ba provinces na ba ligues na ba villes tee tango bayaki kokoma na ba fédérations.

Stade tata Raphaël ezali na commune ya Kalamu na quartier Matonge (Renquin) entre ba avenues victoire ; promenade ; de l’école de navigation fluviale mpe na avenue Jason Sendwe. Ezali mpe na mopanzi ya Petit Séminaire "Saint Jean-Marie Vianney", na ya résidence privée ya Cardinal Joseph-Albert Malula. Entrée principale ya stade tata Raphaël ezali na croisement ya ba avenues : promenade (adresse officielle nde ezali sur l’avenue promenade), avenues du stade na Oswe.

Tango construction ya stade esili na 1952, conformément na makanisi ma tata Raphaël, école ya éducation physique mpe efonguami kuna nakati. Na 1967, école oyo eye kokoma Institut Supérieur d’Education Physique (I.S.E.P.).Yango eyaki kokoma plus tard na 1972, département ya éducation physique et sportive ya Institut Pédagogique National (I.P.N), actuelle Université Pédagogique Nationale (U.P.N). Stade tata Raphaël ezalaki inaugurer mokolo mua 1er juillet 1952 avec faste. Etongama na terrain ya dimension internationale na pelouse kitoko mpe très bien entretenue. Ezali na 50.000 place assises na 6.000 places debout, pourtours ba tribunes latéraux mpe na tribunes central na d’honneur. Tribune ezalaki mpo na mindele mpe pourtours mpo na batu moindo. Na ba tribunes nionso kaka tribune d’honneur nde ezalaki na ba kiti, oyo etikali ezalaki nde na pavement lise. Ba équipes misatu oyo : A.S. Victoria Club (A.S.Vita Club) « Mokonzi ya terrain » ; C.S. Daring Faucon « Imana matiti mabe », Daring Motema pembe ; A.S. Dragon, Bilima « Bilima arrive », « le rouge et Or », « du monde et du sang » ezalaki na ba pourtours na yango mpo ezalaki ba grandes équipes ya Léopoldville na ba supporteurs ebele. Ba gradins ya pourtours en bêton mpe na espace na esika ya kotiya makolo. Na kati, ba vestiaires kitoko na ba accessoires nionso ya gymnastique, ba toilettes, ba douches, ba salles ya cours mpe ba dortoirs mpo na ba élèves ya école ya éducation physique. Salle ya fête na ba bureaux ya gestion ya stade na ya direction ya école mpe na salle d’études na réfectoire mpe ezuamaki na kati. Courant électrique na mayi ezalaki, ba poteaux mine ya ba projeteurs na kati etelema na pourtours. Na kati ya stade pourtour ezalaki na ba kanga moyibi, na libanda ya pourtour ezalaki na double clôture na ba kanga moyibi , mpe cloture ya liboso elingaki stade, ya mibale nde elingaki espace entre stade na ba quatre guichets ya billets ya pourtours. Ba tribunes ezalaki na bibende kati kati mpe liboso na yango mpo na kopekisa batu baleka mpe bakita na terrain. Entrée ya terrain ezalaki na ba portailles ya minene mibale na mopanzi ya muasi na mobali mpo na mituka, ba délégations officielles, ba personnes à mobilité réduite na ba agents de l’ordre public, ba secouristes na ba ambulanciers.

Mpo na inauguration ya stade, ministre ya colonie abengisaki ba étudiants ya université catholique de Louvin mpo basala ba démonstrations ya gymnastique mpe kopesa spectacle kitoko oyo ezali kokende na cérémonie ya inauguration. Sima ya mikolo, ba équipes ya Belgique mingi eyaki kobeta na stade tata Raphaël entre 1953 na 1957 : Beerschot Athelic Club d’Anvers na 1953, Sporting d’Anderlecht na 1955, Standard de Liège na 1956, Union saint Gilloise na 1957. Na 1960, équipe nationale ya Union des Républiques Socialistes Soviétiques (U.R.S.S.) mpe eyaki na Léopoldville kobeta ba matchs amicaux. Stade tata Raphaël mpe ezalaki esika ba compétitions ya athlétisme civil kaka te. Force publique mpe ebandaki kosalisa ba concours ya athlétisme kuna, na ba compétitions ya libanda na « melting-pot » : boxe sans garde, makofi ebetamaka en désordre!

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 16/7/2009, 10:18 pm


Ba ndeko, tata Raphaël banda aya na Léopoldville, azalaki toujours na makanisi ma ko encadrer jeunesse na nzela ya sport na scoutisme. Amonaki ndenge vagabondage ezalaka na Léopoldville. A cet effet, akomaka article moko intéressant (na revue Congo III na 1922) sur likambo ya vagabondage na Léopoldville. Na Influence oyo azalaki na yango sur jeunesse en tant que sango, Directeur mpe encadreur sportif ya ba jeunes, a utilisaki sport neti moyen ya ko canaliser énergie ya bilenge mpe ko faire éviter bango nzela ya moyibi, bitumba, kindumba, komela masanga na bangi mpe kotelengana pamba pamba na kokende koliya matonge na mapela na esobe ya Renquin ou encore kokende koliya ba avocats na zamba avocats pene na rivière mososo mpe bakokende kosakana na mayi ya kalamu. Ye alingaki bilenge bazala na un corps saint dans un esprit saint. Kasi makanisi ma gouvernement colonial mazalaki ndenge oyo te. Yango ebandaki ko utiliser harmonie oyo sport ezali kokotisa na société na but ya propagande politique comme image ya réussite ya politique coloniale na Congo belge. Yango wana ebandaki kobimisa mbongo na ba constructions ya ba stades na ba parcs mpe kobengisa ba équipes ya métropole mpo eya kobeta na colonie na cadre ya sport unité. Na match ya liboso oyo équipe ya métropole ebetaka na Léopoldville, gouverneur général Léon Antoine Marie Pétillon ye moko asalaki makambo en grand : ayamba équipe Beerschot Athelic Club ya Anvers na ndenge ya liseki te. Na organisation ya match esengelaki ebeta na sélection ya Léopoldville, asangisa équipe ya batu moindo na mindele oyo ya colonie. Kati na kosangisa wana, batu moindo na mindele bazalaki na vestiaire moko te bien que sur le terrain bazalaki équipe moko ya sélection ya Léopoldville. Na stade mpe ségrégation ezalaki, mindele na tribunes, moindo na pourtours ! Na match wana, batiaki arbitre ya mundele, officier ya Force publique, ye asala suka na injustice mpe aboya deux buts ya équipe locale mpe asala tout na injustice wana elakisa que équipe ya métropole ekoki kopola te soki ezali kobeta na équipe ya Congo belge. Suka suka équipe ya Anvers elongaki na 5 buts à 4. Ndenge moko na 1957, sélection indigène na Union saint Gilloise, e ganga na 4 à 2 face na sélection (100% indigène) ya Léopoldville, même chose, arbitre ya mundele ya Force publique asali lisusu injustice mpe na suka ya match mobulu ebimi mpe bitumba makasi, mindele babetama mpe mingi batanga makila. Expérience wana eyalaki ko se retourner contre colonie mpo eyaki ko remarquer que na ba rencontres wana solidarité ezalaki makasi kati na ba Congolais sima ya équipe na bango, mpe na cas ya victoire, yango elingaki emonana que mutu moindo akoki kolonga mundele mpe efongola nzela na victoire ya indépendance. Yango wana na 1957, colonie eyaki koboya kobetisa ba matchs na batu ya métropole. Kasi mpo na kokata élan wana brusquement te, na 1960, ebengsaki équipe ya Union des Républiques Socialistes Soviétiques (U.R.S.S.) mpe match esukaki na score nul ya 0 à 0. Suka suka, likambo oyo mundele abandaki kobangela eyaki kosalema na suka ya match entre Victoria club V.Club na Mikado. Vita epolaki 2 à 3 contre Mikado. Kanda ya ba supporteurs ya V.Club eye kokutana na ndenge monsieur Henri Tordeur, Premier bourgmestre ya Léopoldville, apekisa meeting ya Joseph Kasa Vubu mpe epesi eyoma! Ebandeli ya indépendance wana na martyrs du 04 janvier 1959 ou les martyrs de l’indépendance.

Kobanda Congo ekomaki lipanda na 30 juin 1960, stade roi Baudouin ekomaki kobengama stade tata Raphaël. Kasi kobanda na 24 novembre 1965, yango ezalaki exclusivement mpo na ba activités sportives lisusu te mpo haut commandement militaire epesaki Général Joseph Mobutu pouvoir suite na coup d’Etat militaire mpe stade eko jouer rôle munene ya communication de masses oyo nouveau régime eye na yango.

Na 1965, trois semaines sima ya prise de pouvoir na ye le, 12 décembre 1965, Président Mobutu ayaki mbala ya liboso na stade tata Raphaël kosala meeting munene mpe ezalaki mbala ya liboso politicien Congolais aloba liboso ya batu ebele ya motindo wana. Plus de 50.000 personnes. Mokolo yango, Général Mobutu alakisaki que ayebi ko communiquer na peuple na ye mpe azali na maîtrise ya ferveur oratoire devant public ya munene, mpe banda wana force ya discours na ye na ba meeting ekomaki incontestable. Aloba polele que « désormais nakobanda ko diriger par voie d’Ordonnance-loi ayant force de loi ».

Na 1966, na meeting ya 22 mars, asala mise en garde publique na ba hommes politiques sans pour autant atanga kombo ya mutu oyo abandaki ko viser. Kasi ba initiers ba comprenakai que Moïse Tshombe nde azalaki dans le collimateur mpe na ba accusations voilées contre le Général Léonard Mulamba, Premier ministre, que azali kosala tout mpo Tshombe azonga na Kinshasa. Plus tard, ba circonstances ya liwa ya Colonel Damien Tshatshi na 23 juillet 1966, nde eyaki kopesa Président Mobutu prétexte farfellu et ridicule na ba fausses accusations ya complicité entre Général Mulamba na ba gendarmes Katangais ya Moïse Tshombe.

Président Mobutu asala meeting mpe na kati abimisa ba slogans :

na 1966, « Homme nouveau – Femme nouvelle », « Retroussons les manches », « Agriculture priorité des priorités » (mpe na mbula elandi, gouvernement e décréter 1967 année ya agriculture !) « Maintenant le Congo au travail ! », « Emancipation de la femme Congolaise» ;

na 1967, « M.P.R. oye ! M.P.R. miso nga !», « Zaïre monnaie » ;

na 1970, « Objectif 80, Premier ? Oui ! Deuxième ? Oui !Troisième ? Oui ! Quatrième ? Non ! Non ! » « Salongo alinga mosala » ;

na 1971, concept « 3Z » comme : Zaïre notre pays, Zaïre notre monnaie, Zaïre notre fleuve;

na 1973, meeting ya zaïrianisation « 1974, année de la zaïrianisation »;

na 1976, Meeting ya Plan Mobutu « Plan Mobutu, plan de la relance !», etc.

Sur le plan sportif, Président Mobutu a comprenaki que par le sport unité ya peuple esalemaka makasi mpe peuple alakisaka solidarité na ye face na adversaire commun. Na yango, ayebaki mpe malamu que ye na pouvoir ezalaki fierté, kasi soki lisusu Congo ekomi na sommet ya Afrique na football (sport roi) lokumu na ye na ya mboka ekotambola mikili na mikili. Yango wana atiaki ba moyens en œuvre mpo na ko atteindre ba objectifs. Président Kwame Nkrumah ya Ghana ayebanaki mingi na Afrique mpo na ba idées na ye sur le panafricanisme mpe na ndenge équipe nationale ya Ghana, les Black Stars, ebandaki kodondua na Afrique. Président Mobutu mpe alingaki balobela ye na R.D.Congo, ndenge bakolobela Ghana na mokonzi na ye. Déjà avant akoma na pouvoir, Lions, équipe nationale ya R.D.Congo, elongaki Black stars le 1er janvier 1965, na Léopoldville na 4 à 1. Kasi na novembre 1966, Blak Stars elongaki Lions na 3 à 0 na Kinshasa devant Président Mobutu. Ezalaki soni ! Sima, kaka na Kinshasa le, 3 septembre 1967, wana équipe nationale ekomi kobengama Léopards, epolisa Blak Stars na 2 à 0. Kobanda wana, tembe na tembe na Ghana ekomaki ya makasi mpe yombe tee tango tolongaki Gahana na finale ya coupe d’Afrique des nations na 1968 na Adis Abeba na Ethiopie na 1 à 0.
Ba ndeko, lisolo lizali ya stade tata Raphaël, yango wana nakolobela kaka mua ba match oyo ebetama kuna : ba matchs ya éliminatoires ya Coupe du monde ; Coupe d’Afrique des nations ; ya championnats d’Afrique des clubs ; de vainqueurs de Coupes na ba matchs amicaux internationaux.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 16/7/2009, 10:22 pm

Matchs amicaux ya équipe nationale les Léopards

Na 24 novembre 1967, R.D. Congo na Dahomey (Benin) : 5 à 2

Na 18 décembre 1967, R.D. Congo na Roumanie : 3 à 2

Na 24 décembre 1967, R.D. Congo na Roumanie : 1 à 1

Na 26 janvier 1969, R.D. Congo na Sénégal : 4 à 0

Na 30 janvier 1969, R.D. Congo na Cameroun : 2 à 1

Na 22 novembre 1969, R.D. Congo na Zambie : 10 à 1

Na 14 décembre 1969, R.D. Congo na Nigeria : 5 à 0

Na 21 janvier 1969 na 23 janvier 1969, Santos Futebol Clube (F.C.Santos) ya São Paulo na Brésil ebetaki matchs mibale na Kinshasa na ba Léopards. Na match ya liboso, Santos elongaki Léopards na 2 a 0. Na match ya mibale, Léopards elongaki Santos na 3 à 2.

Eliminatoire ya Coupe du monde 1974 na Allemagne

Na 26 juin 1972, Zaïre na Togo : 4 à 1

Na 25 février 1973, Zaïre na Cameroun : 1 à 0

Na 27 février 1973, Zaïre na Cameroun : 2 à 0 (na match de barrage)

Na 19 août 1973, Zaïre na Ghana : 4 à 1 Ghana

Na 09 décembre 1973, Zaïre na Maroc : 3 à 0

Eliminatoire ya Coupe d’Afrique des nations 1974 na Egypte

Na 16 septembre 1973, Zaïre na Haute Volta (Burkina-Faso) : 5 à 0

Na 11 novembre 1973, Zaïre na Cameroun : 2 à 0

Eliminatoire ya Coupe d’Afrique 1972 na Cameroun

Na 27 octobre 1971, Zaïre na Zambie : 3 à 0

Eliminatoire ya Coupe d’Afrique 1980 na Nigeria

Na 14 octobre 1979, Zaïre na Congo : 4 à 1

Na 28 octobre 1979, Zaïre na Guinée-Conakry : 3 à 2

Eliminatoire ya Coupe du monde 1982 na Espagne.

Na 13 juillet 1980, Zaïre na Mozambique : 5-2

Tournois triangulaire ya 24 novembre 1985, entre Zaïre, Zambie na Côte d’Ivoire. Tolongaki Zambie 1 à 0 mpe topoli face na Côte d’Ivoire 2 à 1

Eliminatoire ya Coupe d’Afrique des nations 1988 na Maroc

Na 19 juillet 1987, Zaïre na Sénégal : 0 à 0, sima ya ba coups de pieds au but 4 à 2

Ba clubs na Coupes d’Afrique des clubs champions

Le 26 novembre 1967

T.P. Englebert (Mazembe) na Ashanti Kotoko de Koumassi : 2 à 2

Le 16 mars 1969 (finale ya Coupe d’Afrique des clubs champions ya 1968 ebetama na mois de mars)

T.P. Englebert na Etoile filante de Lomé) 5 à 1 (Finale ya match aller na Kinshasa)

Finale ya 22 décembre 1969 (Finale ya 1969)

T.P. Englebert na Ismaily : 2 à 2 (match aller na Kinshasa)

Finale ya 24 janvier 1971 (Coupe d’Afrique des clubs champions 1970)

T.P. Englebert na Ashanti Kotoko de Koumassi : 2 à 1 (match retour na Kinshasa)

Coupe d’Afrique des clubs champions 1971

Deuxième tour

A.S. Victoria Club (Vita Club) na Canon Yaoundé : 2 à 0

Coupe d’Afrique des clubs champions 1972

Quart des finales

T.P. Mazembe na Hafia Football Club de Conakry : 3 à 2

Finale ya 16 décembre 1973, Coupe d’Afrique des clubs champions

A.S. Vita Club na Ashanti Kotoko de Koumassi: 4 à 2

Coupe d’Afrique des clubs champions 1975

Deuxième tour 1975

A.S. Vita Club na Hafia Football Club de Conakry : 2 à 0

Coupe d’Afrique des clubs champions 1976

Premier tour

C.S. Imana na Club Athlétique Renaissance Aiglon (C.A.R.A.) Brazzaville : 2 à 0

Coupe d'Afrique des vainqueurs de coupes 1976

Huitième des finales

A.S.Vita Club na Canon de Yaoundé : 1 à 0

Coupe d’Afrique des clubs champions 1978

Demi- finales

A.S. Vita Club na Hafia Football Club de Conakry : 3 à

Coupe d’Afrique des clubs champions 1979

Quart des finales

C.S. Imana na Zamālek ya Caire : 3 à 1

Demi-finales

C.S. Imana na Union Douala : 0 à 1

Coupe d'Afrique de vainqueurs de coupes 1979

Quart des finales

A.S.Vita Club na Canon de Yaoundé 3 à 1

Finale ya 7 décembre 1980, Coupe d’Afrique des vainqueurs de coupe

T.P. Mazembe na Africa Sports ya Abidjan : 1 à 0

Finale ya 14 décembre 1980, Coupe d’Afrique des clubs champions

A.S. Bilima na Canon Yaoundé : 0 à 3

Finale ya 31 décembre 1981, Coupe d’Afrique des clubs champions

A.S. Vita Club na Jeunesse Electronique de Tizi-Ouzou : 0 à 1

Coupe d'Afrique des vainqueurs de coupes 1982

Huitième des finales

A.S.Vita Club F.C. 105 ya Libreville 4 à 0

Quart des finales 1983, Coupe d’Afrique des clubs champions

A.S. Bilima na Ashanti Kotoko de Koumassi : 2 à 0

Finale ya 27 novembre 1994, Coupe d’Afrique des vainqueurs de coupes

D.C. Motema Pembe na Breweries ya Nairobi : 2 à 2

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 16/7/2009, 10:28 pm

Politique ya authenticité esengaki que stade tata Raphaël ekoma kobengama stade du 20 mai 1967, kobanda mokolo mua 16 octobre 1972.

Na 1971, na meeting, Président ayebisaki na batu que sûreté nationale e découvrir « Complot ourdi » ya : Justin-Marie Bomboko, Victor Nendaka na Général Alphonse Bangala.

Na mokolo mua 24 septembre 1974, esengelaki Zaïre a organiser combat du siècle entre Mohamed Ali na George Foreman. Bakonzi bazuaki mokano mua kokanga stade pendant huit mois mpo na ba travaux ya rénovation. Directeur ya bureau du Président de la République, citoyen Bisengimana Rwema nde asimbaki makambo nionso na maboko mpe azalaki ko superviser yango na ndenge ya muke te mpo mbongo ebimaki wana liseki te. Ba travaux wana esengelaki epesa stade visage ya sika mpe ematisa lokumu ya Zaïre na oyo etali ba moyens azali na yango ya ko organiser événement wana mpe ezalaki lier na prestige ya Président Mobutu na ya Zaïre. Ba travaux wana epesaki stade du 20 mai 1967, capacité officielle ya 60.000 places assises mpe 10.000 places debout. En réalité, soki stade etondi lokola liki batu batondaka pene ya 90.000 spectateurs.

Ba travaux ekomisaki stade kitoko : chapiteaux na ring, pelouse ya sika, ba hauts-parleurs tout au tour ya piste ya athlétisme, ba gradins ya pourtours rénover na numéro ya chaque place na nse mpe batie ba piquets ebele ya soutien ya masse ya batu, ba couloirs nionso ya pourtours esalemi kitoko mpe batie macadam na ba voies ya évacuations ya ba pourtousr, ba kiti etiami na ba tribunes nionso ( ya couleur rouge na vert na ba tribunes latéraux ; central ya jaune mpe d’honneur ya cuir ya marron), ba poteaux ya ba projecteurs mine ya terrain ebimi libanda ya stade mpe na chaque poteaux batie 100 projecteurs soit total ya 400 projecteurs oyo ezali ko produire éclairement ya 1500 lux. Esengeli toyeba que capacité ya 1500 lux ezalaki atteinte kaka mokolo mua combat ! Souvent mpo na ba matchs ya football na ba concerts 1000 lux ezalaki kokoka mpe soki match esili, ekiti na 300 lux mpo na ko sala entretient ya butu, kolongola ba filets na kotanga mbongo ya vente ya ba billets en toute sécurité. 300 lux ezali mpe ya kokoka mpo na ko permettre ba séances ya entrainement ya butu.

Eclairement ya stade ezali mpe fonction ya confort ya ba joueurs, batu oyo bakoti na stade, na presse (télévision, photographie). Na oyo etali ndenge ebandaki ko fonctionner, chaque poteaux ya projecteur ezalaki na cabine ya transformateur éléctrique. Source ya éclairement ya terrain ezalaki indépendante na ya ensemble ya stade. Kaka mokolo mua combat nde stade ezalaki na système ya alimentation éléctrique ya secours, c’est-à-dire transformateur étant source de base, yango ezalaki na groupe électrogène comme étant source de secours. Sima ya combat, stade etikalaki kaka ko fonctionner na source de base sans possibilité ya remplacement na cas ya problème ou panne na source de base mpo Bisengimana a récupéraki groupe électrogène ! Commande ya allumage ya minda nionso ya stade y compris na ba projecteurs esalemaka automatiquement par disjoncteurs télécommandés oyo ezali na poste ya Funa, na croisement ya avenue Sendwe na boulevard Lumumba.

Na kati ya stade : salons d’honneur mibale (dont moko présidentiel), salle de conférence transformable na salle de fête munene, na cuisine professionnelle, ba bureaux modernes, magasin ya maintenance, na intendance. Ba dortoirs ya ba étudiants en éducation physique na réfectoire mpe salle d’études na bango, espace de presse na likolo mpe esalemaki kitoko. Na ba vestiaires ba matériels nionso nécessaires na musculation, na gymnastique mpe échauffement ezalaki ya sika, ba douches na ba toilettes ekoti ba carreaux ya sika na ba accessoires nionso y compris na mayi ya moto.

Entre ba entrées principales ya ba tribunes latéraux esika ya ba guichets na ba entrées ya komata na ba tribunes, ba terrains ya basketball ezalaki wana.

Ba toilettes publiques nionso na ba entrées ya ba tribunes na ba pourtours, ezalaki ya sika na nionso na kati ya sika. Na libanda na ba murs mpe na clôture ya ba tribunes ya stade, Maître N'Damvu Tsiku-Pezo atia ba fresques céramiques ezali kolakisa ba disciplines olympiques nionso. Tobosana te que parc Ermens esika stade etongami ezalaki parc omnisport mpe stade du 20 mai mpe lokola.

Na entrée principale ya stade, kabambi ya effigie ya Président Mobutu Sese Seko, azali koseka, alata abacost avec écharpe assorti na pochette (effigie kitoko). Na pourtours côté ya A.S. Vita Club nde bafandisi effigie ya munene ya M.P.R., pembeni na yango, na nse, flambeau ya mulayi ya M.P.R. en bêton epelaka moto tango nionso, mpe na likolo ya pourtours ya A.S. Bilima, marquoire manuel ya munene. Sima nionso ya pourtours, ba kanga moyibi nionso elongue, mur ya 10 m ya hauteur ezui esika na ba portailles ya solo na ba trois entrées nionso ya pourtours. Na libanda, au tour ya pourtours batie ba carreaux. Na liboso ya tribunes, ndenge moko. Ebakata ya portaille na entrée principale ya tribune central na d’honneur mpe ba portailles na mopanzi mpo na ba véhicules prioritaires oyo esengeli ekota na kati, ba forces de l’ordre, ba convois ya ba équipes oyo ekobeta, etc.

Babomi ba terrains 1, 2, ba remplacer yango na ba parking, baloni ba fleures na ba nzete mpe macadam ekoti esika nionso wana. Terrains 3 na 4 etikali kasi mokolo mua combat e servaki mpe de parking. Na sima ya pourtours ya Imana basali piste ya hélicoptère na balisage na yango, na gambo mosusu, terrain ya volley ball. Bassin ou piscine ya stade na ba vestiaires na yango mpe ezuaki coup de jeune.

Minda etimaki libanda nionso ya stade, ba avenues : promenade ; du stade ; Oswe retaper, canalisation en bêton ya mayi ya Kalamu esalemi na bouches ya trop plein ya mayi mpo e évacuer yango na mopanzi. Bisengimana, Directeur ya bureau ya Président, nde azalaki ko diriger misala minso wana.

Na 1972, relations tumultueuses entre Président Mobutu na Eglise par le biais ya Monseigneur Joseph-Albert Malula, archevêque ya ville ya Kinshasa, ekomaki benda bika. Pouvoir e expulsaki Malula de la R.D.Congo le, 11 février 1972, mpe akeyi na exile forcé na Rome, sima na Belgique, suite na éditorial oyo ebimaki na revue Afrique chrétienne (revue ya épiscopat ya Zaïre) ya 20 janvier 1972, sous la signature ya Louis Kalonji, rédacteur en chef ya revue Afrique chrétienne. Malula bien que ayebisaki na pouvoir que inspiration ya makomi wana ewutaki na ye te, pouvoir ezalaki convaincu te. Président Mobutu ayebisa na Vatican que alingi kokuta ye te na Kinshasa soki azongi mpe a signa Ordonnance wuta Suisse, abotola ye médaille ya Ordre National du Léopards, a autorisa éviction na ye na ndaku mpe expulsion na ye de la République du Zaïre dans les 48 heures oyo elandaki signature na mise en vigueur ya Ordonnance wana. Ministre de l’intérieur, Bulundwe Edouard, a exécuta yango en s’assura que Malula abima na ndaku wana dans 48 heures, na biloko na ye. en présence ya ba militaires na ba J.M.P.R. Dominique Sakombi, ministre ya information, mpe a signa arrêté ministériel oyo ezali kokanga ba Editions na librairie Saint Paul mpe apesa mitindo na ba informations ya radio na télévision esalisa ba cartes blanches avec en prime question munene : « Comment le parti entendrait-il faire payer à ce fils de renégat toutes les conséquences de sa démesure ? Eyano ewumelaki te, epesamaki tango Président Mobutu azongi na Kinshasa le, 12 février 1972, en provenance ya Savigny (villa ya Savigny au bord du lac Léman) dans le district du Lavaux na canton ya Vaud (sika ba districts ya Lavaux na Orion ekoma district moko ya Lavaux-Orion). Le lendemain ya retour na ye na Kinshasa, apesa meeting mokolo molandi, le 13 février 1972.

Na meeting wana, Président atomboka, asala référence na liloba lya nzambe, apelisa suka na moto en disant : « Aussi longtemps que je serais Chef de l’Etat, et si le Pape veut une collaboration avec l’Etat zaïrois, l’Archevêque de Kinshasa ne sera plus Monseigneur Malula, et il ne rentrera plus jamais au Zaïre !». A proférer ba menaces ya nationalisation ya ba écoles catholiques nionso oyo ba sango na yango bakomeka kosala ba séances ya prières na likambo ya Malula, apekisi ba prières na ba Eglises nionso ya Zaïre mpo na cas ya Malula, abakisi lisusu : « Nayebisi Pape Paul VI na Vatican, alongola Malula na bo nganga nzambe ! », « Malula azali réactionnaire pathologique, un rebelle, Pape abengisi ye mbala misato na Vatican alingi kokende te ! ». Mobutu a qualifia Malula lisusu : « d’Archevêque-caméléon ». Abeleli lisusu : « neti na Kinshasa ba sango balingi kosala politique mpe ba actions subversives de nature à compromettre l’ordre public et antirévolutionnaire, nakobanda lisusu kokende messe na ba paroisses ya Kinshasa te. Nakobanda kokende kosambela na Kisantu ! »

Likambo engindi, J.M.P.R. ebandi ko s’installer na petits et grands séminaires nionso. Le 1er avril 1972, J.M.P.R. ezui autorisation officielle ya Bureau politique du M.P.R. mpo e imposer ba cellules na yango na ba petits na ba grands séminaires oyo ezali na retard ya installation ya ba cellules ya J.M.P.R. kati na yango. Soki etie mutu makasi, Bureau politique e nationaliser yango.

Résidence ya Malula ekomaki quartier général ya J.M.P.R. mpe ministère ya sport mpo tango wana jeunesse et sport ezalaki branche spécialisée (milice ) ya M.P.R. mpe ministère en même temps. Secrétaire général ya J.M.P.R na tango wana ezalaki Godefroid Sampasa. Ba expulsions en cascades ya ba sango ya mindele esalemaki liseki te. Na Congrès ordinaire ya M.P.R. du 21 mai au 24 mai 1972, ba décisons misusu ekueyaki kuna.

Combat ya Ali na Foreman, esalemaki le 30 octobre 1974, mpo Foreman azokaki na arcade (na poso ya liso), esengelaki pota ekawuka malamu yambo abunda. Combat wana ezalaki un événement munene mpe retransmission na yango esalemaki na mokili mobimba. Na yango, image ya stade du 20 mai etambolaki mokili mobimba mpe etikali na ba archives ya ba télévisions ya mokili. Quelques jours avant combat, présentation ya ba boxeurs mibale esalemaki na stade du 20 mai na Président Mobutu ye moko. Ali asuanisa Foreman, asengi na Président Mobutu que alingi abanda kobeta Foreman kaka wana, azali koganga que Président apusana, il faut abanda kotanda Foreman makofi, etc. Wana stade mobimba ezali koganga : Ali boma ye ! Juste pembeni, mama Marie-Antoinette azali kaka koseka…Président Mobutu mpe na cadre ya show akati présentation mpo Ali alingi kaka abunda sur place…ezalaki suka na spectacle !!! Ali, alataki chemise ya pembe, azali koganga, commissaire d’Etat Mandungu Bula Nyiati « Carbure, Antoine » kuna azali kosala interprète, wana stade kokanga ndenge wana.

Kasi paradoxalement na bisengo wana, bien avant, kaka na stade du 20 mai, na décembre 1971, na meeting Président Mobutu asalaki mpo na kolobela coup d’Etat manqué, complot mpe atteinte contre la vie et la personne du Chef de l’Etat et à la sureté intérieure de l’Etat oyo ebandaki ko impliquer Bernadin Mungulu Diaka na Patrice Jean de Dieu Kudia Kubanza. Likambu wana eyindaki somo, ba kombo etangami kuna neti ya Xavier Matanda mpe lisusu, l’incontournable Cléophas Kamitatu azalaki dans le secret de Dieu.

Président Mobutu atombokela Kudia Kubanza, aloba na public : « Kudia Kubanza abengi ngai jeune homme ! ». Atangisa Kudia Kubanza lettre : la fameuse lettre ya rétractation et aveux du 15 décembre 1971, na miso ya 80.000 personnes ya stade du 20 mai. Ancien auditeur militaire général, Patrice Jean de Dieu Kudia Kubanza atanga lettre wana publiquement. Affront mpe humiliation ya ndenge wana !

Na cadre lisusu ya exhibition publique na stade du 20 mai, sima ya première guerre ya Shaba « guerre ya 80 jours » na août 1977, na kati ya stade plein, Président Mobutu alakisa quelques personnes na miso ya batu soi-disant que ba mercenaires cubains na ba gendarmes katangais oyo bakangamaki kuna na Shaba. Ye moko Président abengaki bango ba : « niangalakata ».

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 16/7/2009, 10:31 pm

Na 1975, sima ya voyage mulayi Président Mobutu na mama Antoinette Mobutu basalaki na 1973, na ba pays ya Asie, étape ya Corée du Nord na Chine e marquaki Président Mobutu mpe asepelaki na culte de personnalité oyo amonaki kuna mpe na ndenge babinelaki ye na mama Marie-Antoinette. Na yango, Zaïre esalisi festival ya animation politique et populaire na stade du 20 mai. Chaque région (province) eyaki na batu oyo bayebi koningisa loketo, kobina, koyemba, koseka, kobeta mbunda na madimba na ba instruments ya musique traditionnelle mususu. Mama Catherine Nzuzi wa Mbombo, gouverneur, ye moko azalaki na tête ya groupe d’animation ya Bas-Zaïre. Stade du 20 mai e vibraki na rythme wana durant une semaine ya congé payé. Na feti na bisengo wana, goupe d’animation ya région ya Shaba ezalaki exceptionnel, Kivu ebimisaki une petite fille abandaki kobalola loketo liseki te, Kasaï oriental balaki ba soutiens gorges ya pamba mpe kolakisa madjinga, Kinshasa miso makasi ndoki te mpe kasa kasa, Kasaï Occidental na leader na bango Sosoliso ezalaki à la hauteur, Haut-Zaïre, Bandundu na Equateur mpe batikalaki sima te. Festival wana ezalaki ba bons moments, kitoko mpe bien organisé. Yango elakisaki richesse na biso culturelle.

Na stade tata Raphaël ezali ekika mpe boxeur Belechika Molochika asala ba combats na ye nionso oyo ekomisaki ye champion d’Afrique de poids moyen na 1985. Kasi ba combats wana nionso ebandaki vraiment kolakisa que abandaki ko gagner yango na aide ya ba juges ! Ata combat moko te oyo ye abunda na 20 mai elakisa que abandaki ko mériter victoire !

Na catch : Edingwe « mutu na ngenge », Ndonda « Pouma noir », Lubuela Zéphyrien « Zéphy », papa Kanza « U.R.S.S. », Fibi tao-tao, Litanda « jaguar », Boseyi 1er « papa Wemba », Selemani Moja, Botamba « Hercule », Ilunga « police belge », Katambayi « Samouraï », Ngubu « le sorcier », etc. babunda ba combats ya catch ya ndenge na ndenge entre 1983 tee na 1993.

Na juin 1989, ba obsèques ya Cardinal Joseph Malula esalemaki na stade du 20. Liwa ya Malula esalaki polémique mpe ba soupçons ebandaki ko peser sur le pouvoir. Biso nionso toyebi maye malobamaka wana mpe na ndenge elekaka. Tango Président Mobutu na mama Bobi baye na stade, tango bakopesa famille ya Cardinal mbote, mama moko ya famille wana aboyi ko tendre loboko na ye na Président! Rapidement, Chef ya bataillon sécurité rapprochée, Colonel Sido, atombola na makasi loboko ya mama wana mpo Président apesa yango mbote. Mama akanga misapi, Président apesa likofi mbote. Monseigneur Eugène Moke Motsuri azalaki tendre ata muke te mpe azalaki dure na ba propos na ye na ndenge Malula akufeli tout en soulignat œuvre na ye munene atiki. Wana lisusu ba relations entre pouvoir na Eglise ezalaki stable te !

Ba cérémonies ya ordination ya ba prêtres catholiques mpe esalema na stade du 20 mai, tout comme cérémonies ya centenaire ya Eglise du christ au Zaïre. Ba universités privées mpe ebandaki kosala ba collations des grades académiques na pelouse ya stade.

Equipe nationale ya Chine ; Académica de Coimbra ya Portugal ; les Phacochères (équipe ya université de Lovanium ) ; équipe ya présidence de la République (directeurs na ba adjoints na ye, personnel politique et technique na administratif) ; commissaires politiques ; conseil exécutif (ba commissaires d’Etat « ministres » na ba secrétaires d’Etat na ba conseillers na bango) ; conseil législatif (ba commissaires du peuple « députés » na personnel ya parlement) ; équipe ya gendarmerie, Léopards militaires, ebeta na 20 mai.

Ba matchs historiques ya Ligue de Football de Kinshasa (LIFKIN) ; Coupe du Zaïre ; Ligue Nationale de Football(LINAFOOT), Challenge papa Kalala, super coupe de Kinshasa, na ba concours ya athlétisme.

Na 1974, fête ya remise ya remise la médailles ya Ordre National du Léopards mpo na ba Léopards du Zaïre, ewutki na Cité ya O.U.A. ekumbami na stade du 20 mai.

Ba concert ebetama na cadre ya combat du siècle na ba musiciens oyo : Franco, Rochereau, Zaiko Langa Langa, Stukas boys, B.B. King, James Brown, The Jackson's Five, Manu Dibango, Ray Lema, The Supremes, Abeti Masikini, Miriam Makeba, Johnny Pacheco, Celia Cruz, Ray Barretto, Larry Harlow, Santos Colon, Cheo Feliciano na ba musiens ya musique traditionnelle.

Lisusu, Fela Futi, James Brown, Jimmy Cliff, Yvonne Chaka Chaka, Johny Haliday, Claude Francois, Liliane Saint Pierre, Kassav, Wenge musica na match ya Léopards, Zaiko na match ya Léopards ebeta na stade du 20 mai.

Na 1992, M.P.R., na quête ya batu, esalaki promesse publique na batu que baya na ba tickets na bango ya Bindo, Masamuna, le panier de la ménagère, nguma longindo, mpo basalisa bango na remboursement ya ba mises na bango.

Kaka na 1992, Union Sacrée de l’Opposition Radicale etondisa stade du 20 mai ndenge Président Mobutu abandaka kotondisa yango. Kasi ya Union Sacrée etondaki malgré interdiction ya circulation ya transport public na ville de Kinshasa.

Na ba années fastes ya régime ya Président Mobutu ba homologues na ye Chefs d’Etats oyo baya mpe na stade du 20 mai : empereur Jean Bédel Bokassa Ier ya Centrafrique ; roi Baudouin Ier de Belgique ; Présidents : Milton Obote na Idi Amin Dada Oumee ya Ouganda ; António Agostinho Neto Kilamba ya Angola ; François Ngarta Tombalbaye ya Tchad ; Sekou Toure ya Guinée-Conakry, Président Alphonse Massamba Débat na Marien Ngouabi ya Congo-Brazaville ; Etienne Gnassingbé Eyadéma ya Togo ; Julius Kambarage Nyerere ya Tanzanie ; Kenneth Kaunda ya Zambie ; Félix Houphouët-Boigny ya Côte d’Ivoire ; Seni Kountche ya Niger ; Albert-Bernard Bongo ya Gabon ; Grégoire Kayibanda na Juvénal Habyarimana ya Rwanda ; Michel Micombero ya Burundi ; Moussa Traoré ya mali ; Moktar Ould Daddah ya Mauritanie ; Ahmadou Babatoura Ahidjo ya Cameroun ; Anouar el-Sadate ya Egypte.

Kombo ya stade du 20 mai elonguaki le, 17 mai 1996, tango Président Mobutu alonguaki na bakonzi. Kobanda wana, stade ezongelaki kombo na yango ya tata Raphaël.

Na l’an 2005, Etienne Tshisekedi asala meeting devant ba sympathisants na ye tango awutaka na ba soins médicaux na Afrique du Sud.

Jean-Pierre Bemba mpe asala meeting na 2006, na cadre ya campagne ya ba élections présidentielles.

Père Raphaël de la Kethule de Ryhove abotami le, 15 septembre 1890, na Château de Leyselbeke na Saint-Michel-le-Bruges na Belgique. Aweyi na Woluwé-Saint-Lambert na Bruxelles na Belgique le, 26 juin 1956. Ba Congolais basengaki na famille na ye que bakunda ye na Léopoldville esika asalaki misala mia ye. Yango wana bana ba ye ba kelasi, Thomas Kanza na Jean Bolikango bawutaki na nzotu na ye na Bruxelles mpe bakumbi yango mpo balela mpe bakunda ye na Léopoldville na lopango ya stade tata Raphaël, esika basalela ye mausolée juste na entrée ya stade oyo ezali na mopanzi entre petit séminaire Saint Jean-Marie Vianney (Petit séminaire propédeutique Cardinal Joseph-Albert Malula) na école primaire Saint Jean Berckmans (E.P. Kauka I). Grâce na tata Raphaël nde sport ekota na Congo. Tobosana te que ye abandaki kolanda bana na nzela ya vagabondage mpe kotiya bango na nzela ya kelasi. Sport na scoutisme ezalaki façon ya ko occuper bango.

Ba ndeko, Kasi lelo oyo, œuvre oyo tata Raphaël asalaki ezali na état nini ? Ba ye ye atangisaki basali nini mpo na kotombola esprit sportif na R.D.Congo? Sport ezali wapi lelo oyo na mboka na biso ? Esprit olympique ezalaka na mboka na biso ? Education par le sport ezali na place nini na mboka na biso ? Fédération eboya kotikela stade autonomie de gestion na budget propre, coordination ya gestion mpe défaillante na ba points nionso e interpelaka mutu te ?

Stade tata Raphaël ekoma ya kopola, pelouse elonga, zamba na mabele etonda na terrain, magorodo na mataga nde ekoma kotambola wana na kati ya mayi ya mbula, ba kiti na ba tribunes elonga, ba gradins ya pourtours ebukana, minda ekufa, ba projecteurs ekufa, ba vestiaires ekoma ba ndaku ya ba shegue na ba « sportifs » délinquants oyo balalaka wana na batu na batu ya maboma, ba salons d’honneur na salle de fêtes ekoma ba salles ye bi nzambi nzambi misatu oyo ekabola ba salons na salle en bitanda mpe souvent salle de fêtes ezalaka ya bandimi tango babalanaka, ba bureaux ekoma ba lieux de passe misusu bakanga mpe ba souda yango, ba douches na ba toilettes etikala kaka ya kombo nionso eboboka, bikunde bisika bionso, molili na ba couloirs nionso mpe solo ya kopola ; ya diamba na ya mutoki bisika nionso !!! Soki mutu oyo ayaka na combat du siècle azongi wana lelo oyo, ekosala ye suka na choc !

Ezali mawa mingi mpo esika wana ezali na makambo ebele esalema oyo ezali kosala histoire ya mboka na biso. Stade wana ezali temple!!! Tobina wana, toseka wana, toganga wana, topumbua wana, tolela wana, to yemba wana, to sepela wana, tosilika wana, to exprima ba émotions ya ndenge na ndenge esika wana. Libulu wana pendant ba ngonga ebele ebandaki komema biso na bisengo ya balle : ba matchs héroïques ; historiques ; de titans ; na nse ya mbula, ya moyi mpe na butu ; avec ba rebondissements ya ndenge na ndenge eleka kuna, etc. Lelo oyo, tobosani nionso wana, tokomi kokima stade na biso, tokomi koleka yango sans tobuakela yango ata liso, tokomi kotala yango ezali kokufa kaka boye! Kasi esengeleli na biso tobosana te que soki mpe stade wana ekomi boye, ezali mpe en partie à cause ya ba actes ya vandalisme mpe gratuits oyo esala que public epanza, ebuka mpe ebebisa patrimoine ya stade. Mingi mingi tobandaki komona batu bazali kosala toilette soit likolo sima ya ba murettes ya ba tribunes ou na nse ya pourtours au lieu bakende directement na ba installations hygiéniques! Manque ya entretien, manque ya civisme na absence ya éducation na usage ya bien public de l’Etat nde esalaka que tobebisa sans komituna réellement sur le bien-fondé ya eloko oyo tozali na yango. Bolingo ya mboka elakisama mpe na bobateli patrimoine ya ekolo mpe koboya kobebisa bien collectif. Tozali kobosana que tango stade esalemaki ezalaki mpo na kosangisa batu na sport. Kotika stade ekufa, elingi koloba topalangana mpe tobanda kobosana une partie ya histoire na biso ! Toyebaka mikolo nionso que soki to vivre maye maleka mpe masalema na stade tata Raphaël, ezali mpo ye mei tata Raphaël azuaka likanisi liye.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 16/7/2009, 10:33 pm

1. Stade tata Raphaël avant ba travaux ya combat Ali na Foreman na 1974. Na libanda sima ya ba tribunes, terrrains 1 ,2, parc 4, bassin (piscine), na likolo, quartier Matonge, na nse, quartier Immo-Congo.

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Kinshasa-copie-2



2. Terrain ya Volley na nse. Nalikolo, parcs 1, 2 , 3 , na quartier Matonge

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Kinshasa-copie-1

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Arafat 17/7/2009, 8:48 am

Hum! Stade du 20 mai, grand libulu. Je me souviens encore de mon premier match na " Tata Raphäel", je crois que c´était en 1966 (j´étais en 3° primaire). Ezalaki match ya Daring contre V.club, match yango bato bakufaka et puis mbula moko ebetaka somo, domestique na biso moto amemaka ngai na stade. Ezalaki match ya liboso ya Raoul Kidumu, po bazalaka koloba trop sur ye que joueur moko awuti Thysville aza terrible. Ezalaki mbala ya liboso namona "Gento" le seigneur Kibonge , Luc Mawa, le gardien Bekao etc....en action. Nazalaka komona bango chez ma tante tango bazalaka kolala réveillon, po president ya V.club à l´epoque ezalaka papa Clément Aponga (mobali ya tata mwasi na biso), oyo bayaka kopesa ye plus tard surnom ya "Mfumu Ntaku". Biso makila ya V.club eza na famille mobimba
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  micheal 17/7/2009, 11:03 am

Finale ya 16 décembre 1973, Coupe d’Afrique des clubs champions

A.S. Vita Club na Ashanti Kotoko de Koumassi: 4 à 2



Kulutu Emmanuel,

En finale de la coupe d'Afrique de clubs champions en 1973, Vita Club avait battu Kotoko de Kumasi à Kinshasa par 3 buts à 0, deux buts d'Adelard Mayanga et un but de Jean Kembo.

Merci pour ce récit. Encore une fois, je vous rappelle d'écrire des livres. Ce n'est tout le monde qui se rappelle toutes ces choses avec 99,999999% d'exactitude.

Micheal
micheal
micheal


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Arafat 17/7/2009, 12:26 pm

A.S. Vita Club na Ashanti Kotoko de Koumassi: 4 à 2
C´était le score du match aller à Kumasi en faveur de Kotoko. J´avais suivi le match de la finale à la radio avec mon defunt papa, à l´epoque nous étions en mutation à Kisangani et je me souviens de la photo que j´avais vue dans le journal MASANO, Madrandele Tanzi remettant la coupe d´afrique des clubs champions au capitaine Kibonge, j´étais comblé de joie ce jour là. Ah! Vita Club, kiese kisakidi Very Happy
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  taty 17/7/2009, 12:35 pm

Arafat,

kie kie kie A la même époque, nous étions aussi en mutation à Kisangani (Août/1972-Juillet/1974). Nous avions habité en ville(Makiso) sur l'avenue Abbé Munyororo qui mène vers le campus et l'aéroport militaire. C sûr que vous étiez aussi en ville.

tatilôtétatoux.


ARAFAT a écrit:
A.S. Vita Club na Ashanti Kotoko de Koumassi: 4 à 2
C´était le score du match aller à Kumasi en faveur de Kotoko. J´avais suivi le match de la finale à la radio avec mon defunt papa, à l´epoque nous étions en mutation à Kisangani et je me souviens de la photo que j´avais vue dans le journal MASANO, Madrandele Tanzi remettant la coupe d´afrique des clubs champions au capitaine Kibonge, j´étais comblé de joie ce jour là. Ah! Vita Club, kiese kisakidi Very Happy
taty
taty


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  micheal 17/7/2009, 12:40 pm

ARAFAT a écrit:
A.S. Vita Club na Ashanti Kotoko de Koumassi: 4 à 2
C´était le score du match aller à Kumasi en faveur de Kotoko. J´avais suivi le match de la finale à la radio avec mon defunt papa, à l´epoque nous étions en mutation à Kisangani et je me souviens de la photo que j´avais vue dans le journal MASANO, Madrandele Tanzi remettant la coupe d´afrique des clubs champions au capitaine Kibonge, j´étais comblé de joie ce jour là. Ah! Vita Club, kiese kisakidi Very Happy

Oui c'est vrai. Je croyais que Ya Emma parlait des matches qui se sont joués au Stade du 20 Mai.
C'est l'un de plus beaux souvenirs que j'ai de l'Association Sportive Vita Club.

Tu m'as rappellé le Journal Masano. Il devait avoir plus de cent pages sportives. On coupait des photos pour mettre dans gros cahier de brouillon pour en faire: Un Album.

Micheal
micheal
micheal


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Arafat 17/7/2009, 12:58 pm

Arafat,
kie kie kie A la même époque, nous étions aussi en mutation à Kisangani (Août/1972-Juillet/1974). Nous avions habité en ville(Makiso) sur l'avenue Abbé Munyororo qui mène vers le campus et l'aéroport militaire. C sûr que vous étiez aussi en ville.
Ndiyo buana Taty
kie kie kie, biso pe tozalaki na Makiso, balabala oyo ebanda na port, eleki liboso ya residence ya général Nzabi biso tozalaki presqu´en diagonale na residence ya Nzabi, balabala yango ekendaki ti na piscine et en remontant okeyi ti campus,à l´epoque le recteur du campus était Mr. Elungu pene Elungu et comme adjoint Mr. Ndolela siki Konde. Tozalaki en face ya fleuve, soki naza na salle à manger nazomona ndenge maswa ezoleka. Je pleurais(en pensant à ma copine restée à Kin)quand je voyais le bateau ITB eza konana wana batie musique makasi surtout nzembo ya Ebale ya Zaire surtout ce passage me tuait : Photo otikela ngai na libongu oh!, nakati ya motema ekoma nde elili, natalaka nzela nioso na kokenda etc....Proverbe ya liboso nayebaki na Kisangani : DUNIA IKO SAA MAPUMBU YA MBUZI, INA ENDA MBELA, INA RUDIYA NYUMA vedire mokili eza lokola mabindi ya ntaba, ekendaka liboso pe ezongaka sima Very Happy Very Happy


Dernière édition par ARAFAT le 17/7/2009, 1:56 pm, édité 1 fois
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  taty 17/7/2009, 1:14 pm

Donc tozalaki quartier moko. Tozalaki koya mingi epa général Nzabi(+) mort à Kananga en 1975 (nous étions voisins à Kananga).
Soki na mi rappeller ba kombo ya ba masta ya période wana okoki koyeba bango. Bon, biso tout tozalaki baleki nzela.

tatilôtétatoux.

tatilôtétatoux.

ARAFAT a écrit:
Arafat,
Ndiyo buana Taty
kie kie kie A la même époque, nous étions aussi en mutation à Kisangani (Août/1972-Juillet/1974). Nous avions habité en ville(Makiso) sur l'avenue Abbé Munyororo qui mène vers le campus et l'aéroport militaire. C sûr que vous étiez aussi en ville.
kie kie kie, biso pe tozalaki na Makiso, balabala oyo ebanda na port, eleki liboso ya residence ya général Nzabi biso tozalaki presqu´en diagonale na residence ya Nzabi, balabala yango ekendaki ti na piscine et en remontant okeyi ti campus,à l´epoque le recteur du campus était Mr. Elungu pene Elungu et comme adjoint Mr. Ndolela siki Konde. Tozalaki en face ya fleuve, soki naza na salle à manger nazomona ndenge maswa ezoleka. Je pleurai (en pensant à ma copine restée à Kin)quand je voyais le bateau ITB eza konana wana batie musique makasi surtout nzembo ya Ebale ya Zaire surtout ce passage me tuait : Photo otikela ngai na libongu oh!, nakati ya motema ekoma nde elili, natalaka nzela nioso na kokenda etc....Proverbe ya liboso nayebaki na Kisangani : DUNIA IKO SAA MAPUMBU YA MBUZI, INA ENDA MBELA, INA RUDIYA NYUMA vedire mokili eza lokola mabindi ya ntaba, ekendaka liboso pe ezongaka sima Very Happy Very Happy
taty
taty


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Arafat 17/7/2009, 1:21 pm

Tu m'as rappellé le Journal Masano. Il devait avoir plus de cent pages sportives. On coupait des photos pour mettre dans gros cahier de brouillon pour en faire: Un Album
Wana kaka hors jeu na palais soki kaka papa asilisi kotanga journal, un temps gillette esali mosala na ye Very Happy
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Admin 17/7/2009, 3:48 pm

Mawa trop ezalaka penza tres kitoko de ce que je vois ... ebongaki nde ba refectuer ya ngo pe ba zongisa ya ngo lokola a l'origine apres ba bakisa ba tribune po kamanyola eza bien mais autour na ngo eza lokola 20 mai te 20 mais ezali lokola mwa cite moko olympique
Admin
Admin
Admin
Admin


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 19/7/2009, 4:11 pm

Ndeko Arafat,

Nazaki komona lisusu kisangani singa muambe, Boyoma la belle. Na Makiso, centre-ville, esika obandaki kofanda na baboti ba yo, ezali non loin ya hôtels des chutes. Soki olandi nzela oyo ozali koloba wana, okokende kobima na piscine oyo ezali na complexe sportif. Yango eyaki kokoma complexe ya Société Textile de Kisangani (SO.TEX.KI.) restaurant, piscine, salles de jeux ezalaki wana. Soki o continuer, église catholique ezali na nzela ya droite mpe na likolo okeyi komina na avenue Simi Simi. Yango nde ekomema yo na Université ya Kisangani, na aéroport ya Simi Simi (ekoma base militaire) tee na résidence ya gouverneur ya province.


Recteur Elungu apesa kombo na ye ba home ya campus ya Kisangani oyo ezali juste na avenue Simi Simi. Ebengami complexe Elungu.

Natieli yo texte ya nzembo : « Ebale ya Zaïre » mpe naseki tango obandaki ko exprimer ba émotions na yo en voyant masuwa ndenge ezali konana. Oyebi, nayebi sentiment wana, surtout soki loseba ebeti, loseba oyo ekosemisa masuwa, wana esala mua mawa. Soki ozali na libongo, oko remarquer que ba messages esilaka tee, masuwa ekonana, batu bazali koloba maloba ma suka, wana yango ezali kokende malembe malembe. Ah ! Na nzela ya masuwa, okoma mpe kitoko ya R.D.Congo !!!

Nzembo oyo, ezali justement na rapport na bolingo mpo vieux Simaro Masiya Lutumba Ndomanueno ayembela Jeanne Mbole, muasi na ye. Nakoki kolobela bolingo wana mua moke mpo na yebi yango mpe nabandaki kosolola na Jeanne mingi tout comme na ye moko vieux Simaro. Ye azali muasi kitoko, charmante mpe très sympathique. Azalaka toujours de très bonne humeur. Vieux Simaro alela ye makasi. Maloba manso akoloba na nzembo wana ezali kowuta du fond du cœur. Bien que babota te, atongela ye ndaku kitoko na Yolo Nord na Kamina, asombela ye voiture, mpe bolingo ezali kaka makasi lokola ebandi sika. Soki oyoki aleli Dis Jwuani = Dis « moninga », « Jwuani » diminutif ya Jeanne na lingala.

Omoni sika, kolela na yo ya bomuana ezalaki sentiment oyo vieux Simaro mpe abandaki ko exprimer na voyage ya Jeanne Mbole, bien que ezali kaka mobembo ya pamba atako bolingo elingaka temps mort te. Kasi, esengeli kondima ba réalités mosusu oyo esalaka que okabuana na oyo olingi mpo na ngonga moke na cadre ya mobembo.

Vieux Clément Aponga asali mingi mpo na Vita na Mabuilu. Ezala sur le plan sportif na recherche.

Mpo na kosukisa, tika na bakisa que proverbe na yo na swahili wana, nayebi que obuakaka yango na Congo 2000 tango Mollah Omar akotaka na clandestinité mpe akomaka mitelengano suite na évasion ya ba Américains na Afghanistan. Naseki lisusu biloko ya sommité Arafat. Yango wana nayebisi Micheal que ça ne sert à rien afanda na Kinshasa (ou mikili), esengeli akota intérieur soki alingi a atteindre niveau ya sommité. Azali lisusu a choix te, il faut akota zamba soki alingi atikala licencié seko na seko te !

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 19/7/2009, 4:11 pm

Annexe

Ebale ya Zaïre

Masuwa! Masuwa!

Yo wana omemi oyo ya ngai bolingo

Oyebaka, nakozela oh!

(Miziki)

Masuwa ekonana, loseba ebeti

Masuwa ekonana, bolingo mpe enani



Mama nakobela, oh mama oh

Masuwa ebungi oh, na kati ya londende

Bolingo mpe ebungi oh, na kati ya lolende

Ngai na libongo naleli oh, Mbole oh oh, mama oh oh

(Miziki)

Chérie okendeke malamu Mbole oh

Elaka okomelaka ngai soki okomi

Nayeba bolingo obosani ngai te oh

Nandima bolingo ata ndele okozonga

Nazali nse kozela mokolo masuwa ekozonga

Ngai awa, ata sango ya pamba Jeanne oh, mama oh oh

(Miziki)

Ebale mozindo ekoti ngambo

Matiti ekotiola, ba buatu ekotiola

Kasi bolingo na ngai enani se konana

Nazali nse kozela mokolo masuwa ekozonga

Ngai awa, nabeli ba soucis ya l’amour oh, mama oh oh

(MIziki)

Lelo nakanisi yo mingi Jeanne iii

Na nse ya kwiti na bandi nde kolota

Yo olalisi moto na lipeka na ngai

Olobeli ngai liloba na mua likukuma

Dis Jwuani oh, ndoto ya kwiti mawa mingi oh, mama oh oh

(Miziki)

Masuwa ememeli ngai bolingo Nzambe

Nabenga nani lolelo emesama ?

Kombo ya Mbole oh, lolemo emesama

Mongongo ya Mbole oh, matoyi emesana

Dis Jwuani oh, nazingi maboko na ba soucis oh, mama oh oh

(Miziki)

Eloko esali ngai makanisi Di Zuani oh

Tofandi ba mbula, tofandi mpe ba sanza

Tofandi ba mposo, tofandi mpe mikolo

Tomesani bolingo na mode ya liboma

Dis Jwuani oh, natangi ba plafonds na ba soucis oh, mama oh oh

(Miziki)

Photo na yo otikela ngai na libongo oh

Nakati ya motema ekoma nde elili

Namonaka nzela nionso nakokende

Nabelela na mosika elili ebungi

Dis Jwuani oh, Nabeli ba soucis ya l’amour oh, mama oh oh

(Miziki)

Eloko bolingo ezanga miso oh

Moto oyo okolinga, akolinga yo te oh

Oyo okoboya, akolinga yo mingi oh

Oyo okokima, akolanda yo mingi oh

Etumba oh oh, oyo ya ba mpasi ya l’amour oh, tokomonaka oh

(Miziki)

Mama mina lema, oh mama oh

Mama nakokufa, oh mama oh

Ye heee, ye heee

Mama na kowa, oh mama oh

Mama na kokufa, oh mama oh

Mama na kokufa, oh mama oh

(Miziki)

Ye heee, ye heee

Mama na kokufa, oh mama oh

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 19/7/2009, 4:15 pm

Ndeko Micheal,

Ya solo, match ya Kinshasa entre Vita na Kotoko na finale ya 1973, ezalaki 3 à 0 en faveur ya Vita. Nazali na ba matchs nionso wana mpe nabeti lisolo na yango na page oyo ezali kolanda.

Nayebisi Arafat que esengeli obanda kolanda lokolo na ye ya ba recherches. Sala okota na intérieur du pays akende koluka kuna. Nasololi mpe na bakonzi ya Congo diaspora à ce sujet.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Arafat 19/7/2009, 5:05 pm

Mpo na kosukisa, tika na bakisa que proverbe na yo na swahili wana, nayebi que obuakaka yango na Congo 2000 tango Mollah Omar akotaka na clandestinité mpe akomaka mitelengano suite na évasion ya ba Américains na Afghanistan. Naseki lisusu biloko ya sommité Arafat. Yango wana nayebisi Micheal que ça ne sert à rien afanda na Kinshasa (ou mikili), esengeli akota intérieur soki alingi a atteindre niveau ya sommité. Azali lisusu a choix te, il faut akota zamba soki alingi atikala licencié seko na seko te !
kie kie kie kie kie ah! vieux Emma kie kie kie kie, quelle memoire kie kie kie kie kie kie kie kie
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Emmanuel-Kandolo 25/8/2009, 11:51 pm

Tonton Rico,

Malheureusement nakoki kobetela yo lisolo mobimba sur match ya Bilima na Mokamnda te mpo nakotaka yango te. Je suis desole.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

HISTOIRE: STADE DU 20 MAI Empty Re: HISTOIRE: STADE DU 20 MAI

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum