congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le Deal du moment : -39%
Pack Home Cinéma Magnat Monitor : Ampli DENON ...
Voir le deal
1190 €

Quelle décision prendre face à pareille situation ?

4 participants

Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  Sulmany 30/7/2009, 11:03 pm

En entendant la suite de l'histoire de notre ami Fleur de Lys, je m'en vais vous conter un fait divers qui s'est déroulé dans mon entourage.

Moninga na ngai Peter azalaki na mukanda te, azalaki kosala "au noir", mokolo moko ba policiers bakendeki ko fouiller bureau moko na 20è arrondissement na Paris. Mal chance, Peter azalaki kuna, po batu wana bazalaki kopesa ye mosala au noir.

Bakangaki ye mpe une semaine après a se retrouver na Kin. Atika muasi(Nadine) na zemi ya trois mois. Ye Nadine azali na ndeko awa te, aya pe kala mingi te, mukanda pe te.
Nadine ayei kobota mpe na sima ya basanza mua mingi, esika bafandaka, baninga ba Kongolaises pe bazalaki kuna, immeuble moko. Tala kaka na bapasi ya ba mbok'oyo, muasi moko ayebisi Nadine, Tala ndeko mobali José azali monzemba, malamu bobanda kovivre po asungaka yo na kolia. Ye mobali na yo toyebi te soki ekusaka ndenge nini.
Faiblesse ya basi, Nadine ayei kondima. Bakomi muasi na mobali ye na José.
Nadine ya bato Mokristo pe sérieuse amelaka masanga te. Jamais andima ete na vie na ye akoki kosala likambo ya ndenge wana. José amelaka masanga na likaya ya makasi.
Bakomi amour fou, Nadine akomi komela masanga Tango nionso akolia, molangi ekozanga te.

Peter kuna na Kin, azali kosala ba démarches po azonga kasi ezali kosimba te. Lokola tozali bato, ye pe kuna na Kin azua muasi po asepelisaka nzoto. Azali pe kobunda po akoka kozonga. Vie ya kin atika kala, ezali pasi ya ko supporter yango alors que na poche eloko ezali te. Moyen kutu muasi asunga ye, ezali te.
Botala kaka bino moko, mosuni ezalaka na ba mposa mingi, pe situation yango, na bango mibale, moko te alukaki yango.

Awa na France, ye Makangu José, lokola muan'oyo abotamaki azali muana na ye te, asalaka ba caresses na Nadine, na miso ya muana. Po na ye azalaki komona ete muana oyo azali na ye kaka bébé, nzoka nde muana azali komona ba gestes wana. Bolimbisa ngai na yebisaki bino te ete muan'ango ya muasi.

Nadine tellement lolango ekotela ye, abosana papa ya muana na ye. Andimaka te ete akoki kozonga un jour. José alongua na ville azalaki kofanda pe aya ko s'installer na ndako oyo Nadine atikala.

Suite kaka lobi bandeko na ngai.

Merci

Sulmany

Sulmany

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  mongo elombe 30/7/2009, 11:09 pm

Bino bana congodias bolingi mba suspense mingi tozozela, ton histoire n'annonce rien de bon...ekoya ndongo.
mongo elombe
mongo elombe

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  Sulmany 31/7/2009, 12:23 am

Ndeko na ngai ! Omoni heure tokomi ? Nabimaki nde. Biso banso tozalaka na mua makambo ya kosala. Tozali awa po na kosolola. Lisolo soki esepelisi moko malamu soki pe esepelisi mutu te likambo ya pasi pe ezali te. Lokola nabandaki lisolo nakosilisa yang kaka. Nalobaki bien en entendant suite ya Fololo, na kobetela bino lisolo. nalobaki te que ekokokana na ya Fleur de Lys.

Merci

Sulmany

Sulmany

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  Sulmany 31/7/2009, 11:33 am

Suite et fin de la petite histoire.

...Nzambe alalaka te, mobali asalaki ba démarches po azonga pe esimbaki. Abombelaki muasi na ye kino akomaki na Belgique po alingaki azala sûr ete akomata.
Tango akomi na Bruxelles, abengi muasi na ye pe ayebisi ye boye : Nazongi, nazali na Bruxelles, lokola mukanda ezali te, nakozela batu moko bakokende Paris dans 2 jours na voiture, bango nde bakomema ngai. Muasi azalaki malili alakisaki ata mua esengo te na mobali.
Mobali atuni ye boni oyoki sango ya boye pe osepeli te oloba ata nzambe akumisama, etc... ! Muasi azongisi ete eloko te.
Nzoka nde amonaki ndenge akosala te mpo makangu a s'installa, mpe andimaki te ete mobali akokoka kozonga na Poto.

Tango totikalaka, nakomelaka ministre de l'intérieur po na situation ya Nadine, ndenge atikala na zemi mukanda te, Nzambe abongisa, baye kopesa ye mukanda pe après kobota na ye azua mua mosala moko.

Tango ayebisi baninga na ye, bayebisi ye asala tout José abima na ndako. Ye mpe ayebisi José ete mobali na ye asili kozonga mpe akokota France dans 2 jours. José abimisi biloko na ye babombisi na mutu, mpo awutaka mua mosika.
Coïncidence esalemi que kaka na rue oyo elandi, garçon moko Kongolais azali kolibérer studio. nadine akeyi ko coopérer po ete José azua yango, coop pe esimbi.
Peter tango azongi France, muasi alakisi kutu esengo te, sima aluki asolola na ye. Alobi na ye boye : Oyebi situation tovivre yo na ngai, nayango nalingi tosolola .
Ngai nazongaki kinshasa, nasali 3 ans. En tout cas nakobombela yo te, nazalaki kobima na muan'a muasi moko, lokola nazongi esili n'ango pe. Tango otikalaki, ndeko te mosala pe te kaka baninga, soki ozuaki makangu ebongi oyebisa ngai nayoka yango na monoko ya moto mosusu te.
Muasi pe alobi na ye ete lokola kolia ezalaki na ye pasi, na zemi mosala te, ndeko te, azuaki garçon moko boye bazalaki bovivre. Mobali ayebisi : Merci na ndenge oyebisi ngai yango yo moko. Ngai nakolanda nionso wana te ezalaki faute ya mutu te, kasi mobali wana tika ye.

Mobali mukanda te, na kobanga wana abimaka na ye te. Un jour na pokua, muasi alobi na ye ete "nazali ko ya". amoni kaka muasi abimi na katini na balai-brosse, serpillère. Ekendeki ye azongi 23 heures. Nzoka nde akendeki kosukola studio ya makangu na ye.

Ye Nadine bayebani na soeur moko ya quartier, Kongolaise ya Brazza. Akendeke kokangisa suki epayi na ye. Soeur yango, azalaka na leki na ye ya muasi azali majeure. bayebi pe José makangu ya Nadine

Nadine na ndako alobisaka penza mobali na ye te, lokola kutu amoni mutu te. mobali mpe azalaki mayele, depuis azonga ba rapports sexuels ezali te. Pokua moko bazali kotala TV, mobali pongi ezui ye na canagé, heure epusani muasi atelemi akeyi na ye kolala. mbali asutuka tokomi 3h du matin. Na moyi atuni muasi po na nini alamusaki ye te. Muasi azongisi ete alala na salon to chambre ezali kaka ndako. Peter pe amonaki yango louche ndenge muasi azongaki heures wana. Ayei koyoka soupçon ete nadine akendeki kosokola studio ya makangu na ye.

Mobali amonaki ete muasi azali kolakisa bolingo azalaka n'ango te. Asolisi ye lisusu, muasi azongi ete Azali kaka na motema moko akoki kopesa motema na mibali mibale te. Elingi koloba ete motema na ye ekomaki na makangu.

Mbala ya liboso Sulmany a intervenir, lokola bazalaka mosika, nakendeki kolala kuna. Sima ya mua mikolo, mobali azalaki na ndako, ayoki makelele, atala na fenêtre muasi na ye bazali kosuana na muana ya muasi moko boye azalaki accompagné na mobali moko. Nzoka nde mobali yango josé "Makangu" ya Nadine akomi kobima na leki ya soeur oyo ya Brazzaville. Il est vrai que "les femmes aiment les hommes qui aiment les femmes" et vice-versa.
Suka n'ango nini ? Nadine akomaki kolobisa lisusu fille oyo na yaya na ye te. Ki camarade esilaki.

Peter azali kotala scène wana na fenêtre, moyen abima ezali te. Muasi na ye azali kosuana po makangu na ye azui mosusu. Peter atalisi ngai lisusu likambo yango. Il fallait nakende lisusu kuna, na liloba ya Nzambe po toyeba vérité. Nayebisi muasi abomba likambo moko te, ayebisa biso nionso azali n'nago na motema. Po akobombela Nzambe likambo te ndenge Bible elobi : "Il n'y a rien de caché qui ne doive être découvert".

Muasi alobi ete esika azali azali na zemi ya garçon wana ezali ya 3 mois. En tout cas mobali ayaki juste. asiliki mpe alobi ete andimaki ndenge muasi azalaki kobima na mobali mosusu, mais ekoma ete asupporté MBUMA ya moto mosusu na ndako na ye ezali impossible.
Ngai na yebisi ye : Tolandaka liloba ya Nzambe, nakoki jamais kotinda yo olongolisa zemi wana, tout d'abord na France zemi ya après 3 mois balongolaka te, il faut soit kokende na mboka mosusu.
Muasi peut-être akanisaki mobali tango akozonga, bakosala ba rapports sexuels po aloba ete zemi na ye. Mobali tango azongi, muasi zemi ezalaki soit ya 1 ou 2 semaines.
Mobali apesa sango na bandeko na ye na Kin, grand-frère na ye alobi : Ozali mukolo, oyebi ndenge oko gérer situation wana.

Bref, ezalaki benda-bika entre Peter na José. Toriskaki penza likambo ya moko asala moninga mabe. Peter azalaki ko réagir te mpo mukanda ezalaki te. Tango akomaki kobima moke-moke, soit po asomba mua eloko bakutani na nzela na José, donc ezalaki somo.
Ba pasi ya Poto, bien que mobali asilika, azalaki koganga, mukanda ezalaki te. Muasi mutu azalaki koleisa ye. Solution ezalaki kaka ete abima, mais akokende wapi ?

Nabosanaki mua likambo moko; Toyaki koremarqué ete muana ya liboso ya muasi soki bakeyi esika, akoluka kaka akendeke epayi ya mibali, atombolaka chemise pe apesaka bisou na mutolu, akoluka asimbaka côté ya sexe ya mobali. Toyaki ko conclure ete José azalaki kosala makambo wana na miso ya muana. Peter kogangela muana na mua ba mbata nde ayaki kotika ezaleli wana.

Muke-muke ekomaki ete mokolo akokende kobota, akokende ye moko, ... muana wana nakosimba ye te. Nasuka pasi ya kobota eyeli muasi nabutu. bakendeki ensemble na Hôpital. Muana oyo azalaki kolobela ete akosimba ye te, ezalaki kaka ndenge ya komanifester kanda.
Muana kutu tango apusanaki, soki yaya na ye afandi na makolo ya Papa, ye leki ayei kobengana ye. Wana ye papa na masolo azali koloba na ngai, oyo koloka te, tala ndenge abenganaka propre muana na ngai, pe propre muana na ngai azali kolela... wana tozali koseka. Muana ya makangu azua elongi ya maman. Soki kosela zemi wana na mobali na ye mbele esimba bien.
Donc Peter afanda na muana ya mobali mosusu na ndako. Makangu wana bayebisa ye abima na quartier po na ko éviter ba problèmes. Po ezali lisolo ya koyoka, ezalaka somo. Soki mikanda ezalaka nde lisolo ye crime passionnel ekokaki koyokana. Mais nzambe Akumisama na ndenge abatela bato nionso. Akumisama na ndenge aévita biso tomema lisumu ya kolongala zemi po na baraisons ya mokili.

Merci na bayo balandi yango. Yango wana na situation ya boye, être entre le marteau t l'enclume mobali, décision nini penza ya kokamata !!!!!!

Merci na patience na bino. Kaka na mosala na tong'oyo na profité nasilisa mpe natinda sute et fin ya lisolo yango.

Sulm@ny

Sulmany

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Suite ete fin ya liboso ekomamaki muke mingi

Message  Sulmany 31/7/2009, 11:36 am

Suite et fin de la petite histoire. Na changé police ya caractère.

Message  Invité 31/7/2009, 12:29 pm

des raisonnement tipik à la Zairoise,mwasi asi à refaire vie
na ye atika mwasi sans rien aye ko kuta mwasi na ndako kamwa
vie epusani le comble azo exiger ye ki droit ya mobali,pitié na mwasi mutu
andimaki mobali ango lisusu,il fallait ba baser bolingo na bango coe des
simples ami,asunga ye tii ako zua mokanda,il n'a k'assumer sikoyo mwana
wana asali ye nini,ye mwasi azua makango ya malonga te wana c sont
probléme,moi ds mon raisonnement,elle aurait du lui dire la verité banda azalaki
na KIN,soki alingaki azongela ye mwasi awa na poto déjà alingaki azala au courant
likambo nini ezali kozela ye,en plus elle n'aurait pas du accepter son ex chez elle à la
maison il fallait makangu naye azala na ndako na bango 2,wana son ex alingaki
amona vraiment ezali relacion serieuse,mais bango nionso bazali ba moins serieux.
a+

Invité
Invité

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  anysha 31/7/2009, 12:51 pm

bonjour, cette histoire m'a bcp touché moi j'aurais une autre question à vous poser "aux hommes",comme le dit bien cette histoire peter a très mal accepté que nadine est eu un enfant avec un autre homme, ici il y a un "happy end" mais est-ce que vous pourrez accepter cette situation et aimer l'enfant d'un autre.car un enfant est innocent mais vous voyez que peter a craqué face à la petite bouille du bébé.
anysha
anysha

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  Vieux Bord 31/7/2009, 1:42 pm

laelce a écrit:des raisonnement tipik à la Zairoise,mwasi asi à refaire vie
na ye atika mwasi sans rien aye ko kuta mwasi na ndako kamwa
vie epusani le comble azo exiger ye ki droit ya mobali,pitié na mwasi mutu
andimaki mobali ango lisusu,il fallait ba baser bolingo na bango coe des
simples ami,asunga ye tii ako zua mokanda,il n'a k'assumer sikoyo mwana
wana asali ye nini,ye mwasi azua makango ya malonga te wana c sont
probléme,moi ds mon raisonnement,elle aurait du lui dire la verité banda azalaki
na KIN,soki alingaki azongela ye mwasi awa na poto déjà alingaki azala au courant
likambo nini ezali kozela ye,en plus elle n'aurait pas du accepter son ex chez elle à la
maison il fallait makangu naye azala na ndako na bango 2,wana son ex alingaki
amona vraiment ezali relacion serieuse,mais bango nionso bazali ba moins serieux.
a+

c`est vrai que j`ai eu un sentiment d`incoherence dans les sentiments. la fille etait prise en charge par likangu apres le likangu accepte facilement de quitter... Quelle décision prendre face à pareille situation ? 375270 l`homme n`a plus garde contact avec sa femme durant ses demarches pour rentrer? Quelle décision prendre face à pareille situation ? 375270 la fille atiki na kin, il la foule comme un papier donc il y a des points noirs dans leurs sentiments.
Vieux Bord
Vieux Bord

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  mongo elombe 31/7/2009, 5:35 pm

La fille ne l'aime plus et lui reste pour les papiers...situation courante de temps en temps na mikili, chaque personne voit midi à sa porte.
mongo elombe
mongo elombe

Revenir en haut Aller en bas

Quelle décision prendre face à pareille situation ? Empty Re: Quelle décision prendre face à pareille situation ?

Message  Contenu sponsorisé

Contenu sponsorisé

Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum