congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le deal à ne pas rater :
Cartes Pokémon : la prochaine extension Pokémon sera EV6.5 Fable ...
Voir le deal

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

+2
Tonton Ricos
Emmanuel-Kandolo
6 participants

Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Emmanuel-Kandolo 3/8/2009, 2:12 pm

Na Zaïre, na milieu ya ba années 70, vague ya ba promotions ya ba jeunes militaires ebele (liboso ezalaki kaka quelques têtes) formés na ba académies minene ya Belgique, France, Etats-Unis, Italie (pilotes) ebandi kozonga na Zaïre mpe kozonga wana ekomi kokotisa mupepe mua sika : soda alobaka français, anglais, italien, liseki te ; soda asolola pepele na mutu nionso ; soda azali kopesa ba arguments sans kanda mpe azali ko dénoncer torture, moyibi, corruption, arrestations arbitraires mpe azali koluka kozala kati na population etc. Wana ezalaki une nouvelle expérience epayi ya ba zaïrois. Bizaleli biye, bibandaki kosepelisa bakonzi basusu ya armée te mpo bayebaki que bana wana, ba officiers jeunes oyo bawuti poto, kala te bakozua bibonga bia bango. Yango wana tobandaki komona na mess des officiers na mont Ngaliema mua ba froideurs na ba officiers oyo basali ba études minene te.

Na poto kuna, Mouvement d’Action pour la Résurrection du Congo (M.A.R.C.) Yango esalemaki clandestinement le, 24 juillet 1974 na Kinshasa. Baye basalaki yango bazali : Pierre Kanyonga Mobateli, Jean de Dieu Kudia Kubanza, Rudahingwa, Kanyonga Bidimpata. M.A.R.C. eyaki koyebana na plume ya Pierre kanyonga na Jean-Alidort Kalonga « Ali » na journal mensuel Miso Gaa oyo ebandaki kobima na Bruxelles. Kanyonga na kalonga azalaki très actif na Jeunesse du Mouvement Populaire de la Révolution (J.M.P.R.), section Belgique. Tango balongue kuna, kanyonga akeyi kosala M.A.R.C. na baninga na ndeko na ye oyo natangi likolo. M.A.R.C. ekomaki na audience mingi mpe ebandi koleka na ba journaux ya télévisions na ba radios mpe ba journalistes bazali kokoma ba articles na ba activités na yango. Na Belgique, parti e s’organisaki na lolenge liye : Président, Daniel Monguya Mbenge, Secrétaire général, Pierre Kanyonga Mobateli. Kalonga ayaki ko rejoindre M.A.R.C. tango Kanyonga azongi na poto sima ya fondation clandestine na Kinshasa. Kasi bayaki kokabuana mpe Ali kalonga akeyi kosala Convention des démocrates socialistes (CO.DE.SO.) na 1977.

Na charte ya M.A.R.C. ebandaki ko souligner caractère historique ya ba relations entre Belgique na Zaïre. Yango wana elingaki libre circulation ya ba touristes belges na zaïrois entre ba pays mibale mpe elakaki instauration ya ba conditions ya retour ya ba industriels, Homme d’affaires, entrepreneurs na ba commerçants belges na Zaïre mpo basala ba affaires sans motungisi. Donc, yango ebandaki ko prôner libéralisme économique intégrale.

Daniel Monguya Mbenge, ex-muleliste, politicien, azalaki vice-Gouverneur ya Bandundu na période ya rébellion ya Mulele, Gouverneur ya région ya Shaba, ye azalaki en contact na ba personnalités mosusu na Zaïre : Matanda Ma Temu, Kudia Kubanza, Bouryaba Kenga, Makani Kamani. Azalaki na ba ambitions na ye politiques, yango wana asalaki connaissance na Major Kalume Kahamba par l’intermédiaire ya Henri Kadiebwe (vieux Henri ya boîte le Mambo na Bruxelles).

Na fin de l’année 1977, ba interpellations ya ba commissaires d’Etat (ministres) na ba dirigeants ya ba entreprises publiques de l’Etat ekomaki kosalema mingi na Palais de la nation mpe ezali koleka en direct na télévision na radio. Par cette occasion, bazalaki na ba difficultés makasi devant ba commissaires du peuple (députés) mpo ba expliquer ndenge nini makambo ezali kotambola malamu te na gestion na bango esika bazali bakonzi : cas ya Général Molongya Mayikwisa, Président directeur général ya Air-Zaïre, na Général Wabali Ba Kitambisa na département (ministère) ya Postes, téléphones na télécommunications ezalaki soni mingi mpe etiaki Président Mobutu na embarras mpo babandaki ko fouter makasi !!! Mpe lisusu, ba relations mobulu na Belgique mpe na soutien na ye na opposition, ebandaki kobongisa makambu te. Esengelaki koluka moyen ya kokotisa somo na kobanga kozonzi makasi na action moko makasi neti faux coup d’Etat mpe idee ewutaki na pouvoir ya President mobutu ye moko mpo a reprendre main.

Na 1976, Ngbanda Nzabo Ko Atumba, azui nomination na qualité ya diplomate. Affectation na ye ezali na ambassade ya Zaïre na Bruxelles en tant que Premier conseiller d’ambassade mpe responsable ya Centre culturel zaïrois na Bruxelles. Confusion ebandaki kozala mingi na oyo etali ministère ya tutelle ya Centre culturel zaïrois : tango moko ezalaki na tutelle ya département ya enseignement supérieur, tango mosusu ekeyi na culture et art. Na nionso oyo, mokonzi na yango ezalaki mutu ya présidence de la République. Na tête ya centre culturel ezalaki couverture mpo Ngbanda en réalité azalaki Chef ya antenne ya renseignements (espionnage). Série na ye Ngbanda, Centre culturel ezalaki sous tutelle ya département ya enseignement supérieur et universitaire. Kuna nde mbongo nionso ya bourse ebandaki kokweya, na ba mbongo ya achats ya ba consciences, recrutements ya ba informateurs, kokata ba bourses mpo na chantages, kosalisa ba opérations na ba missions secrètes kili kili. Centre culturel ezalaki véritable bureau ya espionnage oyo ebandaki kosala terreur na ba zaïrois antirévolutionnaires ya Belgique tee na France na ba pays misusu ya Europe. Chef direct ya Ngbanda ezalaki Seti Yale, administrateur ya service ya documentation extérieure (S.D.E.= espionnage).

Esengeli toyeba que na 1969, Daniel Monguya akangamaki na Kigali na Rwanda, esika akimaki mpe abatamaki. Akangamaki kuna sur demande ya ba autorités R.D.congolaises. En revanche, Kudia Kubanza (kuku Jean de Dieu) ye azalaki toujours sous surveillance depuis procès na ye ya complot na 1971, na Cour ya sureté de l’Etat mpe Président Mobutu atangisaki ye la fameuse lettre ya rétractation et aveux du 15 décembre 1971. Mpe na lolenge atombokaka na meeting na ndenge Kudia kubanza abengaki ye jeune homme na likambu ya ligue congolaise pour la paix (LI.CO.PA.) La Ligue congolaise pour la paix (LI.CO.PA.) ezalaki lisanga clandestin oyo ebandaki ko couvrir ba actions politiques ya Patrice Jean de Dieu Kudia Kubanza « koukou Jean de Dieu ».

Mpo to comprendre malamu, esengeli totala mua moke botamboli bua Kudia Kubanza. Ye azali masuwa (même promotion) na Joseph-Désiré Mobutu, na école centrale ya Luluabourg na 1952. Kombo wana ya Kudia Kubanza elingi koloba : soki ozali koliya, kanisaka mpe lobi = celui qui se nourrie sans pour autant oublier de penser au lendemain. Kudia Kubanza a évoluer na justice militaire tee na ndenge akomaki na grade ya Colonel mpe Auditeur militaire général ya Forces Armées zaïroises. Azali moko ya promotion ya liboso ya ba diplôme ya école nationale de droit et d’administration. Tango asilisi kuna nde aye kokoma magistrat. Na 1969, tango ancien gouverneur Daniel Monguya akangemi na Rwanda sur demande ya ba autorités congolaises, mpo babandaki ko soupçonner ye que alingi asala rébellion na ba traces ya Colonel Jean Schramme, makambo ya Kudia Kubanza ezalaki lisusu clair te. Na 1969 wana mpe yango nde Président Mobutu alongolaki Colonel Kudia Kubanza na armée. Mbula mibale yambo balongola ye na armée, akomaka makomi moko kitoko na domaine ya droit pénal militaire : « Quelques réflexions sur la justice militaire », R.C.A. 1967. Oyo elakisaki nini ezali koleka na justice ya ba soda.

Na cadre ya ba contacts Kudia Kubanza azali na yango na LI.CO.PA, azalaki na batu oyo asololaka na bango na Brazzaville. Na yango, likambo ya LI.CO.PA. eyaki komema na kabambi ya procès mpo na Atteinte na sûreté intérieure de l’Etat. Patrice Jean de Dieu Kudia Kubanza na Bernardin Mungul Diaka Koda Kombu bafundamaki mpo na complot contre vie ya Chef de l’Etat et Président de la République na koboma ye na ba bombes mibale ya retardement. Bafundamaki lisusu na ko armer batu mpo ba changer régime par la force mpe ko enlever bana ba Président Mobutu na Belgique mpo e forcer ye alongua na pouvoir mpe akima R.D.Congo. Na nionso oyo ba témoins bazalaki parmi lesquels : Xavier Matanda ma Temo.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Emmanuel-Kandolo 3/8/2009, 2:20 pm

Likambo ebotamaki tango batu ya service immigration ya beache Ngobila bakangi lettre Kudia Kubanza akomeli contact na ye ba Brazzaville, Nima Gapey « Odon Lowolo » ezali kombo ya code. Bien avant wana, na mai 1971, Union de la jeunesse socialiste congolaise (U.J.S.C.) e manifestaki na Brazzaville mpo na ko soutenir ba manifestations ya ba étudiants ya Lovanium na Kinshasa. LI.CO.PA ezalaki na sima ya action ya Brazzaville wana. Likambu oyo elukaki incident diplomatique entre Kinshasa na Brazzaville. Gouvernement ya R.D.Congo elobi polele que République Populaire du Congo ezali relais communiste oyo ezali ko agir sous couverture ya LI.CO.PA mpo eluka mobulu na instabilité na R.D.Congo. Yango wana le 21 août 1971, ministre ya Affaires étrangères ya R.D.Congo, Mario-Philippe Cardoso (Lelo azali 2ième vice-Président ya Bureau ya Sénat mpe akoma Mario-Philippe Cardoso Losembe Batwanyele) a déclarer Chargé d’Affaires ya République Populaire du Congo, lieutenant Gaston Eyabo, « persona non grata » personne indésirable ! Gouvernement ya Congo-Brazzaville ekamue mpe esali nionso mpo elakisa bonne foi na yango mpe na ndenge yango ezali kosala mbilinga mbilinga te. Yango wana, esalaki tout, eye kokanga Ando Ibarra, tango ba autorités ya Congo-Kinshasa balobi que ye nde relais ya Kudia Kubanza na Brazzaville. Basambisi ye kuna mpe babambuli ye mbula misatu ya boloko mpe mbula zomi ya bannissement. Na oyo etali explusion ya Lieutenant Gaston Eyabo, Congo-Brazzaville e protester diplomatiquement mpe elobi que diplomate na ye ayebi makambo oyo Kinshasa ebenganeli ye te.

Na lettre oyo bakangaki na Beach na 18 décembre 1971, yango ezalaki eyano na oyo « Odon Lowolo » akomelaki Kudia Kubanza, Cour suprême elobi que Kudia Kubanza asosolaki koyina na ye na régime ya Président Mobutu mpe akanaki que suka suka asala coup d’Etat mpo ameka kotiya régime socialiste na R.D.Congo. Na ba relations na ye, Kudia Kubanza atangi Cléophas Kamitatu (Ye balandelaki ye te mpo ye nde azalaki fiti na likambo wana mpe abandaki ko informer Centre national de documentation « C.N.D. » na nionso Kudia Kubanza asalaka) na Bernadin Mungul Diaka. Période wana, yango nde Président Mobutu ayaki ko ridiculiser ye Kudia Kubanza na lecture ya lettre ya 30 décembre 1971 na stade du 20 mai. Yango ezalaki lettre ya ba aveux mpe anbimaki manso ya mabe alingaki asalela régime mpe asengi pardon na miso ya batu nionso na maye akomaki na lettre ya 15 décembre 1971, oyo bakangaki le 18 décembre 1971 na Beach Ngobila (tolobela yango na lisolo ya stade du 20 mai). Nionso oyo ezalaki déjà mitambu C.N.D. ebandaki kokanga mpe kokueyisa ye na kati. Tango wana, Colonel Albert Tukuzu Gusu Wo nde azalaki administrateur délégué ya C.N.D.

Bernadin Mungul Diaka ye mpe azalaki na collimateur ya C.N.D. mpo tango Président Mobutu alongolaki ye ministre ya Education nationale, akanisaki akotiya ye ministre ya Affaires étrangères tango Justin-Marie Bomboko akotaki na disgrâce (tolobela yango na les pendus de la pentecôte). Ye ayebaki kaka que ndenge asala mission ya ko enlever Moïse Tshombe malamu, suite logique ezali tee akoma na tête ya diplomatie mpo tango wana azalaki ambassadeur na Bruxelles. Malheureusement, asalaki faux pas ya kosalisa ndeko na ye ya Bandundu, Kudia Kubanza. Yango wana Président Mobutu atiaki ye libanda. Neti (épouses) mama Mungul na mama Kudia Kubanza bazali baninga, Mungul Diaka ayebanaki na Kudia Kubanza sima ya ba relations ya ba mama. Tango balongoli Kudia Kubanza na armée, Mungul Diaka apesi ye villa na ye na Limete mpo afutela kuna. Kuna nde babandaki kokutana na masolo mpe kosolola na ntina ya avenir politique ya Mungul Diaka oyo alingaki Kudia Kubanza a aider ye na ba relations na ye oyo azali na yango na armée mpe na koluka ba moyens en hommes na matériels ya kosala coup d’Etat.

Na procès wana, Kudia Kubanza asalaki défense na ye ye moko. Par contre, Mungul Diaka azalaki na ba avocats mibale : Maîtres KUBA ya Barreau ya Kinshasa na Fontaines ya Barreau ya Paris. Basambisamaki le 11 février 1972, mpe Cour suprême e condamner bango mibale na 10 ans ya boloko na 10 ans ya inégibilité na ya privation ya droit ya vote mpe na ba amendes ya kofuta. Président ya Cour suprême ezalaki Marcel Albert Lihau Eboa Libama, Procureur général de la République ezalaki Léon Lobitsch Kengo wa Dondo. Wana ezalaki na mobimba ndenge procès elekelaki. Kudia Kubanza, suka suka, ayaki kokueya na mutambo mua suka na 1978 na procès du siècle, procès de terroristes.

Pierre Kanyonga Mobateli azaki un homme politique, opposant na régime ya Président Mobutu, ngunda na royaume ya Belgique. Kuna na Belgique azalaki très actif na M.A.R.C.

Major Kalume Kahamba azalaki breveter d’état-major mpe diplômer na criminologie. Azalaki inspecteur ya services pénitenciers ya Forces armées zaïroises (F.A.Z.). Na 1976, na voyage ya mission asalaki na mokonzi na poto mpe akutani na batu ya M.A.R.C. Sima, na 1978, na mission mosusu akendeki na ye Général Likulia Bolongo, Auditeur militaire général ya F.A.Z., na Argentine. Na escale na Paris, Major Kalume Kahamba abengani na Henri Kadiebwe mpe bakutani na Paris bango misatu : Kalume, Kanyonga na Kadiebwe. Bakabuani malamu. Tango Kalume na délégation conduite na Likulia bakomi na Buenos Aires, abengi lisusu bango mpo ayebisa bango que na retour na Paris, akosala saut na Bruxelles mpo bakutana lisusu. Na retour ya Argentine, tango akomi na Bruxelles nde ayaki kokutana na Daniel Monguya, Président ya M.A.R.C. Neti Monguya azalaki na Bruxelles te, bakumbani tee na Liège epayi abandaki kofanda. Sima ya wana bakeyi ko visiter usine ya minduki, Fabrique nationale ya Herstal. Kalume ayebaki yango malamu mpo atanga na académie royal militaire belge. Kuna, azuaki mitraillette ya lunette. Bakabelaki ye ? Asombaki ? Azuaki yango kuna ? Azuaki yango esika mosusu ? Selon Kalume, usine ya fabrication ya minduki epesaki cadeau na général Likulia. Mitraillette wana elukelaki ye makambo mpo douane française ekangaki ye na Roissy aéroport Charles de Gaulle. Intervention ya Likulia en tant que kolo cadeaux mpe mokonzi ya Kalume nde eyaki kobimisa ye na mobulu. Ba renseigements généraux eyebisaki ba autorités françaises mpe yango eyebisaki ba autorités zaïroises na incident wana.

Kalume ayebaki te que azalaki na kati ya mutambu munene oyo déjà esalemaki banda kala. Ndenge azalaki na Belgique wana, batu ya Ngbanda babandaki kolanda bango mikolo minso. Batu ya Ngbanda nde basimbaki Belgique na maboko mpe babandaki kolandela nionso oyo etali ba activités ya ba zaïrois na Belgique. Makambo manso oyo ambassadeur ayebaki mpe abandaki ko approuver makambo manso. Son excellence, l’ambassadeur extraordinaire et plenipotentiel Inonga Lokonga Lome nde azalaki ambassadeur ya Zaïre na Bruxelles. Inonga azalaki secrétaire ya Bomboko na époque ya assassinat ya Mulele. Malembe malembe patron na ye ayaki ko pistonner ye epayi ya Président mpo akoma ambassadeur. Juridiction ya ambassade ya Zaïre na Bruxelles wana epesamaka kaka na mutu ya confiance. Mokonzi ya Kalume, Général Likulia Bolongo abandaki ko jouer double jeu ya kotiya Kalume en confiance pendant que ye moko azalaki kati na batu oyo batandeli ye mutambu, D’ailleurs na voyage wana, abandaki kotanga un livre interdit na Zaïre : - Chômé, Jules, L'ascension de Mobutu, du sergent Joseph Désiré au Général Sese Seko, Bruxelles, Complexe, 1974 (Editions Complexe, banda 2007 ekoma na Paris. Président atomboka na pamphlet wana grave. Ebotaka crise diplomatique en Zaïre na Belgique). Nionso oyo mpo na kolakisa Kalume que ye mpe azali contre politique ya Président Mobutu !!! Tango Kalume na mokonzi na ye bazongi an Kinshasa, na début février 1978, na kati ya sanza wana kaka bakani ye. Na agenda na ye azalaki na ba kombo ya batu nionso oyo abandaki kokutana na bango na manso abandaki kosala au quotidien. Na détention abandi kopesa ba kombo mpe koloba trop. Total ya batu bazalaki impliquer na procès des terroristes ezalaki 91. Colonel Biamwenze, Colonel Mwepu, Lt. Colonel Kalonda, Lt. Colonel Mwehu, Lt.Colonel Tshunza, Major Kalume, Major Panubule, Major Ngoie, Major Tsasa, Cap. Fundi, Adjudant-chefKisonga, Citoyen Buryaba, Citoyen Kudiakubanza, Citoyen Makani, Citoyen Matanda, Citoyen Bouryaba, Citoyen Mbangama, Citoyen Monguya, Citoyen Kanyonga, Citoyen Kadiebwe, Citoyen Kisonga, Citoyen Kalaba, Citoyen Mukengebantu, Citoyen Tshiluka, etc.


Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Emmanuel-Kandolo 3/8/2009, 2:22 pm

Na Kinshasa batu ba jouaki rôle munene ezalaki Président Mobutu ye moko, ba généraux oyo : Singa, Babia, Likulia, Bolozi, Lomponda (amiral) ba administrateurs ya sécurité : Seti na Atenda, mpe na responsable ya C.I.A na Kinshasa, Larry Delvin na Kamitatu ba véritables incontournables na ba années sombres ya R.D.Congo.

Procès esalemaki kabanda mokolo mua 8 mars mpe esili na 16 mars 1978, devant Conseil de guerre ya engumba mokonzi ya Kinshasa. Ba chefs ya accusations ezalaki oyo :

1. Complot militaire, 2. Complicité de complot militaire, 3. Organisation des réunions ou des manifestations illégales, 4. Constitution d’association des malfaiteurs ayant pour but d’attenter aux personnes et à leurs biens, 5. Violation des consignes militaires, 6. Détournement et dissipation des munitions ou d’autres matériels militaires, 7. Adhésion à des cercles prohibés et incitation à la révolte, 8.Extorsion sous menace. Kambi ya septs chefs d’accusations oyo ezalaki liseki te. Nionso oyo na objectif ya kokueyisa President Mobutu na pouvoir soit na ko forcer ye akima ou koboma ye.

Selon ndenge Conseil de guerre elobaki, complot ezalaki makanisi ma ba opposants politiques oyo bazali na poto na Belgique mpe bazali ko militer na M.A.R.C. en intelligence na ba officiers ya F.A.Z. Mpo na ko réussir coup na bango esengelaki agent de liaison azala entre ba officiers na Zaïre na ba opposants politiciens oyo bazali na Belgique. Yango wana choix ezalaki porter na Major Kalume Kahamba. Esengeli koloba que ba relations ya affaires mpe ezalaki entre Matanda na Kalume, entre Bouryaba na kalume. Kasi na ba relations wana, Kudia Kubanza abandaki kokebisa bango (Kudia Kubanza tango wana akomaki directeur administratif et financier ya Société Matanada) na ba relations na Kalume mpo abandaki komona que ye azali na lokoso ya mbongo mpe ayebaki que lokoso ya mbongo ememaka na makambo ebele. Ayebaki mpe ba liens oyo bazalaki na yango na baninga na bango ya M.A.R.C. Ezalaki risquer mutu oyo azali na lokoso ya mbongo abalukaka na milieu wana mpo akoki kobimisa sekele facilement na batu ya services secrets.

Selon Conseil de guerre, Kalume azalaki le véritable plaque tournante ya complot, Matanda nde pourvoyeur de fonds, Kudia Kubanza nde agent de liaison, Makani azalaki boîte aux lettres ya complot, Monguya nde cerveau. Makani azalaki mutu oyo Monguya abandaki kotinda epayi ya Major Kalume mpo apesaka ye ba messages ya ndenge na ndenge. Sika mutambu eyaki kosalema na nganda Brigitte na Bandal ya Adjudant-chef Kasonga (une femme). Tango Major Mpiana akufi na bokono, naturellement, baninga baye basalaki cotisation mpe bapesi yango na Colonel Kalonda mpo ye azalaki masuwa na ye (même promotion) mpe na Major Ngoie, ndeko na ye. Mbongi wana yango nde esalaki que basala messe ya action de grâce, famille esomba wax mpo na muasi ya mowe mpo na quarante jours, mpe kofutela ye billet azonga na Lubumbashi esika Major Mpiana awuta. Kinshasa ezalaki esika ya mosala.

Na kosangana wana ba militaires ya ba régions nionso basanganaki na matanga mpe ba oyo bazalaki na mbongo bapesaki cotisation mpe liste esalemaki. Batu ya Seti Yale, Administrateur ya Service ya documentation extérieure (S.D.E. = espionnage) balambi sika likambo ya soi-disant commando oyo ewuti na poto mpe eye kozela na Brazzaville mpo esala attaque na Kinshasa. Kobakisa lisusu na likambo ya mitraillette oyo ba services français ekangaki na yango kalume na Roissy, aéroport Charles de Gaulle. Ba renseignements mususu elobi que Kalume azali en contact na ba agents ya Libye : Mouammar na Rakez Abdoul na deux diplomates belges : Neekens « levier » na Raignier « volant ». Bango babandaki ko se communiquer na batu ya Kalume par intermediaire ya ba sango ya église Saint Gabriel na Yolo Sud. Ba sango wana bazuaki lipapu.

Batu ya Atenda, Administrateur ya Service ya documentation intérieure (S.D.I = contre-espionnage) eye ko découvrir epayi ya Citoyen Bwana na garage na lopango na ye na Kingabwa, ba kesi ya dynamites. Yango ezalaki identifier que ezali ya Major Kalume. Il semblerait que Bwana nde afundaki Kalume mpo alingaki kofuta ye mbongo na ye te ndenge bayokanaki.

Kamitatu Massamba mpe a jouaki rôle na ye ya fiti ndenge esengeli. Ye nde afundaki ba ndeko na ye ya Masi-Manimba na Bandundu : Kudia Kubanza, Matanda ma Temo na Bouryaba. Bango bazalaki kaka kotimbela ye te que azali agent double na solde ya Président Mobutu. D’ailleurs, suite na ki fiti na ye, Président Mobutu ayaki kopesa ye ba huileries na ba plantations ya Kwilu (H.P.K.) oyo ezalaki na Société ya Matanda. Nionso oyo malgré bolamu nionso Matanda asalela ye na vie na ye tango azalaka ngunda na France mpe akomaka mpiaka, Matanda nde asimbaka ye à 100% (kolia, logement, kolata tee na mbongo ya billet ya retour na Zaïre mpo na ye na famille na ye) na nionso mpo ayebaki que bazali na lien ya famille (cousin) kasi ye Kamitatu akomaki déjà kolia mbongo oyo bakotindela ye na Président mpona musala mua ye ya mofiti. Kamitatu, déjà tangu azongaki na 1977 après 10 ans ya exil na France, ezalaki justement mpo Président Mobutu asepelaki na musala nionso oyo asalaki mpe ndenge e permettre bakanga ba Matanda et consort. Na retour na ye akutanaki mbala na mbala na Larry Delvin ya C.I.A na Seti Yale oyo apesaki ye ba félicitations ya Président Mobutu. Sima ya wana ayaki kokoma ministre ya agriculture, finances, développement rural, environnement, conservation de la nature et tourisme, vice premier ministre, membre ya Comité central ya M.P.R., membre ya Bureau politique ya M.P.R., ambassadeur ya Zaïre na Tokyo, P.D.G. ya Office Zaïrois du Café (O.ZA.CAF.) mpe administrateur na ba entreprises publiques de l’Etat. Nionso oyo sima ya ko se contredire après publication ya livre na ye - Le pouvoir à la porté du peuple. Paris, L'Harmattan, 1977. Livre oyo ezalaki véritable poudre aux yeux ya batu nionso oyo babandaki ko considérer ye comme un opposant. Nzoka nde azalaki na ye agent ya Président Mobutu, infiltrer na opposition na Belgique. Tika tobakisa que Matanda na Bouryaba mpe bazalaki ba agents ya Président Mobutu. Kasi na complot oyo, bango bamipesaki na ndenge na bango sans pour autant bazua feu vert ya Président Mobutu = trahison. Par ailleurs, Kamitatu ye azalaki na mapamboli ma Président Mobutu.

Tango mutambu ekangami, liste oyo ya cotisation ya matanga ya Major Mpiana ezalaki na ba kombo na signature ya mutu nionso apesaki cotisation. Batu ya Atenda babongoli yango na liste ya ba comploteurs. Ba effacer ba militaires originaires ya ba régions mosusu sauf : Shaba, Kasaï na Bandundu. Donc, mutambu ekangami na ba kombo na bango moko bakomi na écriture na bango mpe ba signer ndenge basingaka mikolo minso.


Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Emmanuel-Kandolo 3/8/2009, 2:23 pm

Tangu batu bakangemi, ba interrogatoires sous torture ebandi na deuxième cité ya O.U.A. Ba généraux Singa, Babia, Likulia, amiral Lomponda na Colonel Bolozi na Seti babandi koluka kozua ba aveux. Kuna bafandi pendant un mois. Panubule, Kalume, Tshunza na Biamwenga bango bazalaki na Camp Tshatshi.

Na kosambisama esengelaki Panubule aboma Président Mobutu, sima groupe mususu esengelaki e saboter ligne ya haute tension entre Inga na Kinshasa ; ko faire sauter pipe-line na Bas-Zaïre mpo na ko priver Kinshasa na carburant, etc.

Na jugement, Conseil de guerre ekateli 19 personnes peine capitale. Kasi 13 nde babomaki mpe 5 oyo bazangaki ezalaki ba oyo bazalaki na Zaire te : Monguya, Kanyonga, Kadiebwe (na mibale nabosani kombo) na Adjudant-chef kasonga mpo ye azalaki na zemi. Ba militaires babomaki bango na masasi na butu wana ya 17 na 18 mars 1978 na 5h du matin na champ de tirs ya Matadi Mayo. Ba civiles bakufaki na empoisonnement. Ba oyo batikali, bamemaki bango na Angenga na Equateur. Sur 91 personnes oyo bazali inculper, 19 condamnations à mort, 41 bazuaki boloko entre 5 na 20 ans, 4 bazui ba peines ya mike mpe 14 bazalaki acquitter.

Kudia Kubanza, suka suka, ayaki kokueya na mutambo mua suka na 1978 na procès du siècle, procès de terroristes. Neti azalaki lisusu militaire te, babomaki ye na masasi te. Version persistance elobaka que babuakaki ye na cage ya léopard Mimi na Mont Ngaliema. Vivant azali kobundana kasi léopard ezali kopanza ye devant Président Mobutu na verre na ye ya masanga na maboko. Il semblerait que a lalisa Mimi nzala pendant trois jours, avant akotisa Kudia Kubanza na cage na ye. Yango wana tee lelo, nzotu na ye emonana te tout comme ya baninga mususu babomaki bango elongo.

Ndenge emonanaki wuta na ebandeli, but ya process de terroristes ezalaki nde ya kokotisa somo na population mpe ko barer ba jeunes oyo bakokaki ko remplacer bakonzi oyo bazali na mutu ya armée. Wana ezalaki erreur munene oyo e contribuer na manque de relève ya armée na biso.

Le 28 mars, Président Mobutu ayaki ko signer Ordonnance-loi oyo ebandaki ko autoriser kobotola ba biens nionso ya batu oyo bazalaki condamner. Sima bakoteli biloko ya batu oyo babomaki mpe bakendaki na Angenga. Lomponda azua lopangu ya Colonel Tshunzana Binza I.P.N., Kamitatu azua biloko ya Matanda, ba mitaires ya B.S.P bakomaki kosakana na ba voitures ya Matanda na ya batu nionso babomaki, etc. Ba loyenge wana, Président aye kolongola ba officiers nionso ya Shaba, Kasai na Bandundu.

Sima mikolo, Ngbanda ayaki kosala tout mpe Pierre Kanyonga Mobateli baye koboma ye na 1978, na Bruxelles, juste après condamnation na ye à mort par contumace na jugement rendu na Conseil de guerre ya ville de Kinshasa, le 17 mars 1978. Sima ya wana, na été 1978, pouvoir e utilisaki T.P. O.K Jazz na complicité ya Franco mpo na koboma Kanyonga. Assassinat na ye babongolaki yango na suicide alors que ezali ndenge wana te. Pour la petite histoire, ba présumés assassins ya Kanyonga bazalaki ba vrais-faux musiciens ya O.K. Jazz oyo bazalaki na délégation ya une trentaine de musiciens Franco awutaki na bango na Kinshasa. Ba vrais-faux musiciens et présumés assassins bakotelaki ye na appartement azalaki na copine na ye ya Irène (une métisse belge). Ye azalaki na ye na butu oyo babomaki ye. Irène atikala na zemi ya Kanyonga mpe attitude na ye ezala claire te « neti azalaki mpe na likopa wana ? ».

Tee na mokolo mua lelo oyo enquête etikala kosalema te na liwa ya Kanyonga. Affaire Kanyonga nde ezali continuité ya mise en scène macabre ya procès des terroristes autrement dit : procès du siècle. Yango ebomisisaki : Colonel Biamwenze, Colonel Mwepu, Lt. Colonel Kalonda, Lt. Colonel Mwehu, Lt.Colonel Tshunza, Major Kalume, Major Panubule, Cap. Fundi, Citoyen Buryaba, Citoyen Kudiakubanza, Citoyen Makani, Citoyen Matanda na Citoyen Mbangama. Adjudant-chef Kasonga, ye abikaki na liwa mpo azalaki na zemi. Par ailleurs, Citoyen Monguya, Citoyen Kanyonga, Citoyen Kadiebwe, ba condamnaki bango par contumace. Tee lelo oyo bazali na bomoyi, sauf Kanyonga nde towuti komona ndenge babomaki ye.

Ba soupçons ya complicité na ba batu ya Ngbanda ezalaka sur copine ya Kanyonga na lolenge a insistaki ye akende kolala kuna sans pour autant a prévenir baninga baye. Atako ye Kanyonga azalaki na munduki na nzotu, ezalaki nécessaire a prévenir mpo batu ya Ngbanda babandaki ko traquer ba opposants ndenge ya liseki te mpe bayebaki kosala batu mabe. En plus, commando oyo ewutaki Kinshasa, ezali véritable commando oyo eyebi ndenge ya kosala ba sales besognes sans kotika ba traces. Bien que ministre belge ya Affaire étrangères, monsieur Henri Simonet, asilikaki, enquête etikala kosalema te. Sima mikolo, ye ministre wana ayaka kokoma conseiller ya Président Mobutu mpe muasi na ye aye ko dondua na marché ya cobalt zaïrois na Hong Kong. Président Mobutu asomba bango. Souhaitons qu’un jour, enquête ekosalema sur likambo ya liwa ya Kanyonga mpe Ngbanda akoloba nini oyo ye ayebi mpe rôle na ye ezalaki nini tango abandaki ko diriger antenne ya Bruxelles ?

Na oyo etali enquête, ekomaki difficile na Belgique mpo Président Mobutu abinisaki classe politique na gouvernement belge : Léo Tindemans, Premier ministre belge, asala ba déclarations ya ko flatter Président Mobutu après ba kanda na suite na ba exécutions ya ba condamnes à mort na procès de terroristes, roi Hassan II abengisa ministre ya Affaires étrangères, Henri Simonet na Rabat, asolola na ye mpe sima a téléphoner Président Mobutu basololi bango mibale mpe na sima , Hassan II a passer Henri Simonet, Président Mobutu na téléphone. Babongisa makambo, ba relations ezongaka malamu, Président Mobutu atiki kosenga na Premier ministre Tindemans alongola Simonet, etc. Na ambiance wana, ezalaki risquer kotia ba intérêts d’Etat en péril likolo na enquête na liwa ya Kanyonga. Suka suka, Monsieur Simonet na muasi na ye bakomaki na service ya Président Mobutu a 100%. Sika, soki famille ya Kanyonga esali makasi mpo eyeba vérité, ekoyeba yango. Maître kanyonga Bidimpata, leki ya Kanyonga Mobateli, azali avocat, ayebi nzela esengeli alanda mpo vérité eyebana.

Pierre Kanyonga Mobateli akomaka livre kitoko : Dix ans de régime Mobutu ou les années les plus sombres du Congo-Zaïre, Monthey, Suisse Ivy, 1976. Livre oyo, na ndenge Kanyonga ayaki kolongua na J.M.P.R. Belgique mpo na kosala M.A.R.C., nde ezalaki ebandeli ya makambo oyo ememaki ye na liwa. Daniel Monguya Mbenge akomaki, - Histoire secrète du Zaïre : l’autopsie de la barbarie au service du monde, Paris, l’Espérance, 1977.

Kamitatu na exil na ye ya 10 ans na France, akomaki livre ya liboso na 1971. Kamitatu, C. - La grande mystification du Congo-Kinshasa, Paris, Maspero, 1971.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Tonton Ricos 3/8/2009, 2:44 pm

Juste une question Kulutu Emma.Pourquoi major Kalume andimaka existence ya ba operation oyo baplanifiaka selon accusation durant le procès?Soki ba aveu asalaka yango sous la torture peut etre durant l'instruction,il avait le libre choix de revenir la dessus surtout que le procès était public et retransmis en direct à la radio et à la télé.
Na liste wana nakobakisa colonel Kamandji,azalaka à l'époque commandant ya gendarmerie na Kananga.Il avait été aquitté.Selon maloba ya bato,il parait ke Mobutu akanelaka ye banda kala,puisqu'il avait fait parti na rebellion na tango ya bitumba ya Kamaniola.Après procès,azalaka radié na armée.C'était le papa d'un ami d'école.
Est ce que oyebi histoire oyo babomelaka colonel Mudiayi,je crois en 1969 ou 70?Na moment yango tozalaka classe moko na muana na ye.Il y avait je crois une histoire de diamants na kati.

Tonton Ricos


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Admin 3/8/2009, 5:51 pm

Kuklutu merci mingi.

Intérêt na nga po na lisolo oyo eza que moko na bango azalaka nde oncle na ngai.
Mais na lingaki na zwa mwa ba details en recul sur lisolo yango, po na cadre ya famille ezalaka penza pasi.


En tout cas merci bcp
Le reste na komeli yo en privée
Admin
Admin
Admin
Admin


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Hiro-Hito 3/8/2009, 8:34 pm

Celui qui m'intrigue c'est Monsieur Ngbanda, j'aurai voulu q ceci soit un livre pour qu'on le confronte, c vraiment un gars qu'il fo tenir a l'oeil

_________________
Cooperation only lasts as long as the status quo is unchanged (National Treasure)

I demand respect, if I can't get it, I'll take it

et que celui qui n'a pas d'épée vende son vêtement et achète une épée. Luc 22:36
Hiro-Hito
Hiro-Hito
Admin
Admin


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Vieux Bord 4/8/2009, 10:40 am

le mal date de longtemps au congo vraiment No
Vieux Bord
Vieux Bord


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  kinois 4/8/2009, 4:50 pm

Mobutu avait une capacite de destruction et d'infiltration a travers ses generaux et espions.
Merci Kulutu
kinois
kinois


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Emmanuel-Kandolo 5/8/2009, 11:39 pm

Tonton Ricos a écrit:Juste une question Kulutu Emma.Pourquoi major Kalume andimaka existence ya ba operation oyo baplanifiaka selon accusation durant le procès?


Major kalume andimaka projet ya planification ya coup d’Etat mpo, d’un côté, azalaki assoiffé ya pouvoir na mbongo mpe ambitieux na motema moto moto trop. De l’autre, azalaki tellement naïf à tel point que abandaki ko croire sans discernement na couverture ya Général Likulia mpo abandaki kolakisa ye que alingaka Président Mobutu te mpe azali ko soutenir ba prises ya initiative ya kokutana na ba politicies opposants oyo bazali exiler na Belgique, pendant que idée ya ko formater complot- Guet-apens ewutaki nde na ba milaires oyo babandaki ko craindre ba jeune militairres baya ko zua relève. Parmi bango Likulia, Chef direct ya Kalume. Yango wana esengelaki koluka moyen ya kokueyisa bango, par ricocher na ba politiciens oyo bakozala tenter na aventure oyo. Au fait, tout a été mis en action mpona kokueyisa na mutambo mutu nionso azalaki na liste ya batu oyo Président Mobutu alingaki ko éliminer physiquement. Yango wana particularite na yango mususu ezalaki que ba juges wana ba condamnaki bazalaki curieusement ba competants et très proches collaborateurs ya ba futurs juges (Singa, Likulia, Lomponda « Président ya Conseil de guerre », Bolozi) na bango : Kalume azalaki responsables ya ba prisons militaires pendant que Likulia azalaki haut magistrat militaire. Colonel Mwepu azalaki Chef d’état –major adjoint ya Gendarmerie nationale pendant Général Singa azalaki titulaire. Major Panubule azalaki Commandant second ya renseignements ya gendarmerie (B2) pendant que Bolozi azalaki titulaire. Coïncidence moko frappante !!!

Tonton Ricos a écrit:Soki ba aveu asalaka yango sous la torture peut etre durant l'instruction,il avait le libre choix de revenir la dessus surtout que le procès était public et retransmis en direct à la radio et à la télé.


Oui, Kalume, azalaki un brillant juriste, ayebaki procédure pénale devant Cour martiale malamu! Kasi ba irrégularités ezalaki ebele na niveau nionso : Singa, Likulia, Lomponda na Bolozi bazalaki ba « magistrats instructeurs » mpe babandaki ko arracher ba aveux sous torture. Bango wana kaka bakomaki lisusu ba « juges » na procès. Sauf likulia, bango nionso wana bazali ba juristes te. Et Likulia akokaki ko prendre part ni na instruction ni na procès mpo Kalume azalaki collaborateur na ye (relation ezali entre magistrat na prevenu). Mise à l’ ecart ya ba magistrats militaires pourtant bango nde bayebi droit pénal militaire zairois. Ba droits les plus élémentaires ya ba prévenus ezalaki respecter te, ba droguer batu, misusu bazalaki na ba plâtres devant la Cour martiale, misusu babandaki kokoka kotambola malamu te suite na kobetama soit na deuxième cité ou na camp Tshiatshi.

Ba éléments nini ekokaki kosalisa Kalume na contradiction ya instruction ? Instruction yango moko ezalaki bâclée mpe scenario ezalaki écrit d’avance na Président Mobutu na ba Généraux na ye, ba preuves fabriquées mpe objectif ya procès wana ezalaki nullement recherche ya vérité na ba techniques juridiques. But ya procès ezalaki ya ko atteindre objectif oyo ye Mobutu Président Mobutu a se fixaki : ko éliminer batu oyo amonaki neti menace na pouvoir na ye, kobengana ba officiers ya Shaba, Kasai na Bandundu na armée mpe kokotisa terreur na population mpona komatisa crainte na pouvoir na ye

Kalume durant le procès azalaki drogué mpe séance tenante, Général Bolozi, moko ya ba juges, ayebisi ye que Président alingi asolola na ye na téléphone. Tango Kalume asololi na Président en secret na téléphone, sima ya conversation aye koloba liboso ya ba juges que : « Président Mobutu, Commandant suprême, asengi na ngai naloba vérité sur makambo bakangeli ngai. Soki alobi vérité, Président Mobutu ako garantir ngai vie sauve na grâce présidentielle ». Na moment wana biso nionso to comprenaki que Kalume azalaki na ba facultés intellectuelles na ye lisusu en place te. Pire, ndenge nini juriste ya niveau wana akoki kondima promesse wana pendant que eloko te esalemaki na garantie ya ba droits fondamentaux na bango mpe ba magistrats nionso wana bazalaki na juges et parties ? Yango wana a continuali ko enfoncer baninga mpe ba précisions abandaki kopesa par rapport na gravité ya ba chefs d’accusations oyo ebandaki ko relever na peine de mort, ezali tout simplement hallucinantes mpo tango wana esengeli nde ko lutter mpo na ko éviter la peine capitale. Ye, au contraire, abandaki ko répondre comme s’il s’agissait d’un simple vol ya mikate : na légèreté na deconsertation nionso. Azalaki très sûre na promesse ya Président Mobutu mpe abandaki ko compter na Likulia qui lui faisait miroiter que azali mutu ya opposition na régime même soki azali auditeur général ya F.A.Z.

Tonton Ricos a écrit: Na liste wana nakobakisa colonel Kamandji,azalaka à l'époque commandant ya gendarmerie na Kananga.Il avait été aquitté.Selon maloba ya bato,il parait ke Mobutu akanelaka ye banda kala,puisqu'il avait fait parti na rebellion na tango ya bitumba ya Kamaniola.Après procès,azalaka radié na armée. C'était le papa d'un ami d'école.Est ce que oyebi histoire oyo babomelaka colonel Mudiayi,je crois en 1969 ou 70?Na moment yango tozalaka classe moko na muana na ye.Il y avait je crois une histoire de diamants na kati.


Ba officiers banso ya Shaba, Kasaï na Bandundu bazalaki radier na armée. Ata moko te atikalaki. Situation wana yango nde eya kosala que batu ya ba régions wana bazala na ba hauts gradés na F.A.Z. te. Ba Colonels na ba Généraux ya Shaba, Kasaï na Bandundu bazalaki ya kotanga na misapi. D’ailleurs, banda 1978 tee na 1996, ba régions wana ezalaki na ba généraux 4 na 3 étoiles te.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Emmanuel-Kandolo 5/8/2009, 11:43 pm

Ndeko Hiro Hito,

Na oyo etali Ngbanda, na ba livres na ye nionso akoma, alobelaka mingi makambo basusu basala . Oyo ye moko asala, alingaka kopesela ba details na yango te.


Ndeko Kinois,

Oui, yango wana ba alliances minene esalema mpe ba généraux wana batikala na pouvoir durant règne ya Mobutu. Tala lisusu ba parcours na bango banso okozala édifier.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE) Empty Re: PROCES DES TERRORISTES (PROCES DU SIECLE)

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum