congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le Deal du moment :
Cdiscount : -30€ dès 300€ ...
Voir le deal

50 ANS YA LIPANDA

2 participants

Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 7/6/2010, 3:06 pm



Jean Bolikango Akpolokaka Gbukulu Nzube (papa Jean)

Abotami na Léopoldville mokolo mua 04 février 1909

Akoti kelasi na 1917 epayi ya ba sango Scheutistes na collège Saint Joseph ya Léopoldville mpe asilisi kuna na sténodactylographie mpe comptabilité na 1925.

Mbala moko, na mbula elandi, abandi kotangisa kaka kuna wuta 1925 tee na 1958. Parmi ba eleves na ye, tokotanga : Joseph-André Ngalula (futur Cardinal Malula), Joseph Ileo, Thomas Kanza, Eugène Moke (futur Monseigneur), Cyrille Adoula, Albert Mongita, etc.

Parrallement na ba activités ya kotangisa, azalaki wuta

1944, Président général ya Association des Anciens Elèves de Kinshasa (A.E.E.K.), Sima eye kokoma Association des Anciens Elèves des Pères de Scheut (A.A.DE.P.S) .Tee eye kokoma Association des Anciens Elèves des Pères de Scheut (A.D.A.PE.S.)

1946, Vice -Président ya Comité ya Union des Intérêts Sociaux Congelais (UN.I.S.CO.)

Kobanda na 1953 tee na 1956, Membre suppléant du Conseil provincial ya Léopoldville.

Na 1954, akomi Président général ya comité ya liboke lya Bangala.

Na 1958, aponami conseiller municipal ya commune ya Kinshasa. Malheureusement, tango esengelaki kokitana Pierre Molowayi, oyo azalaki disqualifier mpo na une ténébreuse affaire ya trafic vin rouge, Bourgoumestre Jean Torcieur, apesaki de tout son poids mpo na ko barrer la route na Jean Bolikango mpo akoma Bourgoumestre ya commune ya Kinshasa te.

Kaka na 1958, Bolikango .aye kokende na mbala ya mibale na Bruxelles Belgique mpo na Exposition universelle de Bruxelles. Mbala ya liboso ezalaki ezalaki na 1956, na liwa ya tata Raphaël de la Kethulle de Ryove mpe akendaki kozua ebembe na ye kuna mpo aya kokunda yango na Léopoldville ndenge ADAPES esengaki. Neti abandi kokoma na ba journaux la Voix du Congo na Conscience Africaine, atikalaki na Belgique na cadre ya stage ya journalisme na Office de l’Information et des Relations Publiques pour le Congo belge et le Rwanda-Urundi.

Tango azongi na Léopoldville na 1959, akomi Commissaire général adjoint du Service de l’information général du Gouvernement général.

Na 20 janvier-20 février 1960, a participer na Table ronde ya Bruxelles en qualité ya délégué ya Association des Ressortissants du Haut Congo, Alliance de Bangala (ASSORENCO).

Avant wana, asali Front de l’Unité Bangala (F.U.B.) na Janvier 1960. Na sima ya Table ronde, aye kosala Parti de l’Unite nationale (P.U.NA) na mars 1960.

Na ba elections ya mai1960, aye kobonama Député national ya P.U.NA. na circonscription électorale ya Mongala. Kasi atiki ebonga wana mpo na kondima oyo ya Président ya province ya Congo-Ubangi.

Na mai 1960, alongi te na élection na poste ya Président ya Chambre des Représentant Joseph Kasongo alongi ebonga wana na 78 voies contre 58 mpo na Jean Bolikango.

Akatani lisusu na 43 voies na élection na poste ya Président de la République et Chef de l’Etat, face na Joseph Kasa Vubu oyo azuaki 159 voies . 11 voies ezalaki nuls.

Kobanda na 13 tee na 20 septembre 1960, Ministre ya Information na gouvernement ya Ileo II

Wuta mokolo mua 9 avril tee na 1er août 1961, vice-Premier Ministre mpe Ministre ya Information na gouvernement Ileo III

Kobanda mokolo mua 13 février tee na 11 juillet 1962, vice-Premier Ministre mpe Ministre ya Information na gouvernement Adoula.

Mars 1961, a participer na Conférence ya Tananarive

Fin Avril tee na début mai 1961, participation na Conférence ya Coquilatville

Wuta 28 décembre 1965 tee na 4 avril 1966, Ministre ya Travaux publics na gouvernement Mulamba.

Wuta 4 juillet 1968 tee na 16 décembre 1970, Membre ya Bureau Politique ya M.P.R.

Kobanda 1970 tee na 1975, Commissaire du peuple, ya circonscription de Lukunga.

Kobanda Septembre 1980, membre ya Comité central ya M.P.R.

A cote ya carrière politique na ye, entre 1970 na 1982, azalaki mpe administrateurs ya ba sociétés mpe Délégué général ya Société Kinoise de Transport (S.T.K.), Administrateur délégué ya Société générale de Construction (SOGENCO), Délégué général ya Société Zaïroise des Matériaux (ZAMAT)

Sur le plan culturel, na juillet 1948, azuaki deuxième prix littéraire ya foire international de Gand mpo na ouvrage na ye « Mondjeni Mobe » , « le hardi » na lopoto.

Na ba distinctions honorifiques :

1950, médaille ya Bene Merenti ya Saint siège na Vatican

1955, médaille d’or ya Association Royale Sportive Congolaise, médaille d’or Royal du Lion, médaille Commémorative du voyage royal

1960, médaille de bronze et d’argent pour services rendus

1970, Commandeur de l’Ordre national du Léopard.

1980, Grand officié de l’Ordre national du Léopard

Papa Jean Bolikango azongisaki molimo na Liege, na Belgique, mokolo mua le 17 février 1982

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 7/6/2010, 3:11 pm



Pierre Mombele Sem Nkira

Mokitani ya Chef ya Ba Teke ya Kingabwa mpe koko ya Chef Ngaliema, abotami na Léopoldville, mokolo mua 22 juin 1924. Atangi ba kelasi na ye epayi ya ba sango Scheutistes na collège Saint Joseph, ex-Sainte Anne mpe future collège Elikya.

Na 1944, akoti na Force publique mpe na 1946 akomi Sergent, sténo dactylographe mpe comptable. A cote ya mosala mua ye, azali mpe komipesa na ba activités sportives militaire na na kati ya Cercle Général Gillaert. Lieutenant-général Auguste Edouard Gillaert azalaki Commandant en Chef ya Force publique coloniale.

Tango azui mise en disponibilité na ye na 1947, azui mosala na Agence Maritime Internationale en tant que secrétaire sténo dactylographe. Na mbula elandi, na 1949, akeyi kosala na Societe Coloniale Anversoise.

En 1949, aye kozua ebonga ya comptable agrée na Union Chimique Belge. Na 1955, alongue mpo na kozua poste ya secrétaire de direction na Bata (chaussures Bata). Na 1958 akomi secrétaire na service commercial ya Nieuwe Afrikaansche Handels Vennotschap (N.A.H.V.). Na 1959, akeyi na Bralima mpe kuna azui ebonga ya agent commercial adjoint.

Entre 1957 na 1965, azalaki Président ya Union de Ba Teke.

Na 1958, Co-Président ya Interfédérale ya ba groupes ethniques en 1958. Na même année, aponami Conseiller communal ya Kalamu na ba élections municipales esalemaki na Léopdville.

Na 1959, Trésorier ya parti ya Unité Congolaise mpe Secrétaire national ya Parti National du Progrès (P.N.P), « pene pene na mundele » ndenge ba détracteurs na yango babandaki kobenga yango !!!! Na titre oyo nde akendaki na Luluabourg mpo na koluka relaxe ya Kalonji tango akangamaki na mundele.

Na 20 janvier-20 février 1960, azalaki na Table ronde politique ya Bruxelles en tant que membre suppléant ya P.N.P.

Wuta sanza ya juin 1960 tee na juillet 1962, Ministre provincial ya Travaux public mpe Communications na gouvernement provincial ya Leopoldville, présider na Cléophase Kamitatu.

Na 1964, Secrétaire général adjoint ya Parti Lumumbiste Unifié (P.A.L.U.).

Na 1969, Propriétaire mpe gérant ya imprimerie Ngaliema.

Wuta 1966 tee na 1968, Président ya Ligue des familles nombreuses.

Kobanda mokolo mua 04 juillet 1968 tee na 1er aout 1969, Membre ya Bureau Politique du Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.)

Na 1977, aponami Commissaire du Peuple (Député) suppléant ya circonscription électorale yaMont Amba

Na ba élections ya septembre 1982 nde aye kolonga ebonga ya Commissaire du peuple mpo na circonscription électorale ya Mont Amba

Na 1986, akomi Membre ya Comité central ya M.P.R.

Depuis le, 24 avril 1990, asalaka lisusu politique active te.

Azali na médaille commémorative de la guerre 1940-1945, médaille d’or ya Ordre national du

Zaïre na 1986 mpe na ya Chevalier ya Ordre national du Léopard

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 7/6/2010, 3:12 pm



Albert Delvaux Mafuta Kizola,

Abotami na Kapanga, na Katanga, le, 08 mai 1918 . Tat na ye azali mundele ya Belgique mpe mama na ye azali Congolaise ya Kwango.

Na six ans, abandi école primaire na colonie scolaire ya Boma. A continuer tee na secondaire. Nakatikati, alongue, akeyi ko continuer na Ecole normale ya Tumba mpe kaka kuna, alandi ba kelasi ya juvénat ya ba Frères des Ecoles Chrétiennes ya Tumba, mpe aleki na Noviceat ya Bamania mpe na Scolastique ya Tumba.

Sima ya ba kelasi na ye ya ki sango, akomi kotamngisa na Matadi. Aboyi vie ya ki sango, abendani na Kintambo, esika aye kozua mosala na Office des Transports Coloniaux (O.TRA.CO.) na 1940. Entre 1940 na 1959, asali na Compagnie Cotonnière Congolaise (CO.TON.CO), pharmacie UNICONGO, pharmacie MELIPHARE.

Na juillet 1959 nde abandi carrière politique na boponaki en tant Président sectionnaire ya Fédération Kwangolaise ya Binza(F.K.).

Le 4 octobre 1959, na mbotama ya Union Kwangolaise pour l’Indépendance et la Liberté (Luka), na Léopoldville (Kinshasa), aponami Président nationale.

Le 10 novembre 1959, na Congrès ya Parti National du Progrès na Coquilateville (Mbandaka), aponami Secrétaire national.

Na 20 janvier-20 février 1960, akeyi na Table ronde politique ya Bruxelles en tant que membre P.N.P.

Na mai 1960, aponami Député national ya front commun esalemaki kati na : ASSORENCO, A.BAKO/KANZA, LUKA, PUNA, R.D.I.K, UNI.BAT., P.N.P, UNI.MO.

Mai 1960, Ministre résident Na Bruxelles mpe membre ya gouvernement Lumumba wuta le, 23 juin tee na 4 septembre 1960

Le, 05 septembre 1960, Delvaux azalaki moko ya deux contresignataires ya décret ya 05 septembre oyo e révoquer Premier Ministre Lumumba.

Ministre résident na gouvernement Ileo I, wuta le 05 septembre tee na 12 sept 1960

Ministre ya Travail wuta mokolo mua 12 tee na 20 septembre 1960 na gouvernement Ileo II

Juillet 1960 , membre ya délégation congolaise oyo ekeyi na Suisse mpo na ko negocier maye matali la dissolution de la Banque Centrale du Congo Belge et du Ruanda-Urundi Banque centrale du Congo

Ministre du Travail 12 au 20 septembre 1960 septembre 1960, na gouvernement Ileo II

Ministre résident na Belgique kobanda mokolo mua 09 février tee na 1er août 1961, na gouvernement Ileo III

Ministre ya Transport na gouvernement Adoula, wuta mokolo mua 11 juillet 1962 tee na 09 juillet 1964

Ministre ya Tavaux publics na gouvernement Kimba, kobanda mokolo mua 18 octobre tee na 24 novembre 1965

Aponami Député national na circonscription ya Lukunga na ba législatures ya 65, 70, 75.

Membre ya Bureau Politique ya M.P.R. wuta le, 4 juillet 1968 tee na 16 décembre 1970. Mpe doyen ya Bureau politique ya M.P.R.

Na 1970, Président Mobutu a nomaki ye Président ya Commission ya Bureau Politique ya M.P.R. : Commission d’enquête mpo na contentieux électoral na Kivu. Commission esalaki rapport na yango mokolo mua 28 juillet 1970. Prosper Mandrandele Tanzi, Directeur ya Bureau politique nde atangaki yango.

Aponami membre ya Bureau Politique ya M.P.R. na 1977 mpo na circonscription Lukunga. Lisusu, doyen ya Bureau Politique ya M.P.R.

Na 1977, Premier vice-président ya Congrès ordinaire ya M.P.R. na N’sele

18 fevrier 1981, fin du mamdat au Bureau Politique.

Na 1980, membre ya Comité central ya M.P.R.

Na mokolo mua 18 février 1981, mendat electoral na ye en qualite ya membre ya Bureau Politique esili.

Ba distinctions honorifiques :

Na 1969, Commandeur ya Ordre national ya Léopard,

Na 1980, Grand officier ya Ordre national ya Léopard

Mpo na ba oyo bayebaka te, Binza Delvaux ekoma kobengama boye mpo Delvaix azalaki na ferme munene kuna. Neti azalaki kozala wana mingi mpe na bolingo na ye na mosala ya boloni mpe na ya bibuele, yango wana kombo na ye etikala bongo na Binza Delvaux.

Ye akenda wuta 1985.


A suivre...

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 7/6/2010, 3:15 pm




Voici ba liens ya malonga na cadre ya 50 ans ya lipanda :


50 ANS YA LIPANDA Rdc_pari_congolais
Le pari Congolais : De la colonisation à l’indépendance



50 ANS YA LIPANDA Chez_les_balubas
Premier Ministre Cyrille Adoula, situation au Katanga et au Kasaï


50 ANS YA LIPANDA Mulele
Pierre Mulele


Patriotiquement,




Emmanuel Kandolo


Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Invité 7/6/2010, 4:44 pm

50 ANS YA LIPANDA 337703 Merci beaucoup,

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  mongo elombe 7/6/2010, 5:33 pm

Binza Delvaux 50 ANS YA LIPANDA Icon_biggrin kozanga koyeba eza liwa ya ndambo merci ndeko.
mongo elombe
mongo elombe


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:31 pm

Cyrille Adoula

Abotami na Léopoldville, le 13 septembre 1921. Asali ba kelasi na ye na Institut Saint Joseph ya Léopoldville. Tango asilisi ba kelasi na ye, akoti na Banque centrale ya Congo belge Rwanda Urundi na 1940. Azalaki mutu moindo ya liboso abandaki kosala na banque wana. Abandi kuna neti Commis na administration ya banque. Na 1956, akoti na Fédération générale du travail de Belgique (F.G.T.B.), section ya Congo, secteur ya Banque. Sima na mbula misatu, ekomi kobengama Fédération générale du travail du Kongo (G.G.T.K.) mpe akokoma Secrétaire général na yango wuta 1956.

Na août 1958, azali kati na batu zomi na motoba oyo ba signer mémorandum des seize. Yango ezalaki manifestation ya ba nationalistes Congolais oyo bazalaki kosenga na autorités coloniales instauration ya régime local ya autonomie. Azali mpe kati na baye basangani mpo na bokeli Mouvement National Congolais (M.N.C.).

Na 1959, tango M.N.C. ekabuani, ye akeyi na mopanzi ya Kalonji mpe bakeli M.N.C. / Kalonji.

Na mai 1960, na ba élections législatives, aponami Sénateur ya Coquilhatville (Mbandaka).

Wuta 12 septembre 1960 tee na 19 septembre 1960, Ministre ya Intérieur kati ya gouvernement Ileo.

Kobanda mokolo mua 09 février 1961 tee na 2 aout 1961, Ministre ya Intérieur, na gouvernement Ileo II.

Na juillet 1966 tee na janvier 1967, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Congo na Bruxelles mpe Chef de mission diplomatique ya Zaïre au près ya Communauté Economique Européenne (C.E.E.) na Bruxelles.

Na janvier 1967 tee na aout 1969, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Congo na Washington.

Na 02 août 1961 tee na 30 juin 1964, Premier Ministre. Mandat na ye ezalaki ya koluka kokotisa kimia na ekolo. Asalaki nionso mpo na Tshombe atika kokabola Katanga na Congo en imposant plan U Thant, ya Nations Unies, mpe Congo ezongaki lisanga. Na mokolo mua 30 juin 1964, a démissionner mpe Tshombe akitanaki ye mpe Constitution ya sika ebandaki wuta le 01er juillet 1964, Constitution ya Luluabourg.

Na 01er août 1969 tee 07 décembre 1970, Ministre ya Affaires étrangères na gouvernement Mobutu.

Wuta décembre 1970, ba problèmes ya santé ebandaki kotungisa ye mpe ememi ye na paralysie. Na 1974. Le 24 mai 1978, na Lausanne, na Suisse, ezalaki mokolo etikaki mokili.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:33 pm

Alphonse Nguvulu Lubundi Lambika Ngoyo

Abotami na Nsiafumu, mokolo mua 19 décembre 1922. Akoti kelasi na Boma, esika atangi école primaire mpe école moyenne. Asilisi na 1940. Mbala moko azui mosala na Fonction publique coloniale. Abandi carrière na ye en tant que Commis Principal na direction ya enseignement technique supérieur. Sima, akomi Commis-Chef na service du personnel ya Gouverneur général ya Congo belge.

Parallèlement na mosala mua ye na administration coloniale, na 1952, akomi un des co-fondateurs ya Cercle Langue Française, Association esangisi baye balingaki lokota ya français. Wuta 1954, a bandi mpe kotiya molende na défense ya ba droits des travailleurs na boponami Secrétaire général ya Association du Personnel Indigène de la Colonie (A.P.I.C.).

Na 1956, asali voyage ya liboso na Bruxelles, elongo na ba membres mosusu ya délégation A.P.I.C.mpo na bokutani na Ministre ya colonies Auguste Buisseret. Na 1957, alongue na A.P.I.C., mpo na kozua ebonga ya likolo ya vice-Président ya Fédération Générale du Travail de Belgique (F.G.T.B.), section Congo belge, secteur public.

Appartenance na ye na Syndicat Socialiste, e influencer ye na création ya Action Socialiste (A.S.) na 1957 mpe akomi Président na yango. Na aoôt 1958, azali kati na batu zomi na motoba oyo ba signer mémorandum ebengami : Mémorandum des seize. Yango ezalaki manifestation ya ba nationalistes Congolais oyo bazalaki kosenga na autorités coloniales instauration ya régime local ya autonomie mpe ko dénoncer absence ya politique ya intégration ya mutu moindo na ba postes ya haute responsabilité na administration publique. Na octobre 1958, azali mpe kati na baye basali Mouvement National Congolais (M.N.C.).

Na janvier 1959, oyo ebandaki kobengama Action Socialiste, ekomi na kombo ya Parti du Peuple (P.P.), naturellement, azalaki Président na yango. A ce titre, akeyi na Congrès ya Kisantu, na décembre 1959 mpe a se retrouver na tête ya délégation ya parti na ye, P.P., na Table ronde politique ya 20 janvier tee na 20 février 1960, na Bruxelles mpe na Table ronde économique ya avril na mai 1960, toujours na Bruxelles. kuna na Table ronde politique, tango Kasa Vubu abendanaki, ye nde akomaki Président ya Carte ya A.BA.KO.

Tango awuti na ba Tables rondes, asali journal Emancipation na mai 1960.

Na 30 juin, akoti na gouvernement Lumumba en tant que Secrétaire d’Etat na Coordination Economique mpe na Plan. Le, 05 septembre, alongue na décret Président Kasa Vubu a signaki mpo na kolongola Premier Ministre Lumumba.

Na 1961, akomi membre ya A.BA.KO. na étiquette oyo nde ayaki na Table ronde politique ya janvier-février 1961, na Lovanium, na Léopoldville. Sima ya Table ronde, akomi Chef de Cabinet ya Charles Kisolokele, Ministre ya Parastataux na gouvernement Ileo II.

Wuta 18 avril 1963 tee na 10 juillet 1964, Ministre ya Travail mpe Prévoyance sociale na gouvernement Adoula III.

Mokolo mua 18 mars 1966 tee na 11 avril 1967, Haut Commissaire na Plan mpe na Reconstruction Nationale (avec rang ya Ministre).

Na août 1972 tee na février 1973, vice-Président ya Institut de Gestion ya Portefeuille de l’Etat.

Na février 1973 tee na octobre 1976, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire du Zaïre na Pékin.

Kobanda mai 1978, Administrateur na Institut de Recherche Scientifique (I.R.S.) mpe chercheur indépendant.

Wuta le 02 septembre 1980 tee na 28 juillet 1985, premier mandat en qualité ya membre ya Comité central ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R. parti-Etat)

Wuta 28 juillet 1985 tee na liwa, deuxième mandat ya membre ya Comité central ya M.P.R. parti-Etat

Akoma plaquette iye :

- Nguvulu Lubundi Lambika Ngoyo, L’humanisme négro-africain face au développement, Kinshasa, Opika, 1971.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:34 pm

Joseph Ileo Songo Amba

Aye na mokili na Léopoldville, mokolo mua mua 15 septembre 1923. Atangi ba kelasi na Institut Saint Joseph ya Léopoldville wuta 1929 tee na 1940.

Tango asilisi, abanki kosala na journal Courrier d’Afrique kobanda na 1940 tee na 1945. Sima Na 1945 tee na 1950, akomi secrétaire ya direction général ya Bata. Asepeli kozua formation mosusu mpe akimomisi na ba cours du soir ya comptabilité na Mission Sainte Anne mpe azali kolanda ba cours ya philosophie, sciences politiques, sociologie, logique, droit, économie na psychologie. Ba cours iye ezali kopesama na groupe ya ba évolués catholiques epayi ya Abbé Joseph Malula na Mission Christ-roi. Yango nde ememaki Manifeste de Conscience Africaine, mokolo mua 30 juin 1956.

Na 1951 tee na 1960, akomi comptable na Office des Cités Africaines.

Na 1947, azali kati na Union des Intérêts Sociaux Congolais (UN.I.S.CO.).

Na 1958, akomi Rédacteur en chef ya Conscience Africaine. Azali kati na ba batu zomi na motoba oyo ba signer Mémorandum ya 26 août 1958.

Membre ya Comité provisoire ya Mouvement National Congolais (M.N.C.) na mokolo mua 10 octobre 1958.

Na bokabuani bua M.N.C. na ba ailes mibale : Lumumba na Kalonji, na juillet 1959, akomi Secrétaire ya M.N.C. / Kalonji mpe azali ko collaborer na Voie du peuple, journal ya M.N.C / Kalonji.

Na décembre 1959, aponani Secrétaire général ya Bureau ya Congrès ya Cartel fédéraliste A.BA.KO., na Kisantu.

Na 20 janvier tee na 20 février 1960, membre effectif ya délégation ya M.N.C. / Kalonji, na Table ronde politique ya Bruxelles.

Na avril 1960, akomi Administrateur ya Institut politique congolais na ya Courrier d’Afrique

Na mai 1960, a échouer na ba élections législatives na province ya Equateur. Kasi, aponami Conseiller provincial ya Léopoldville na liste ya M.N.C. / K.- P.S.A. Aponami Sénateur ya Union ya ba Mongo UNI.MO. na province ya Equateur.

Na mokolo mua 22 juin 1960, aponami Président ya Sénat national na liste ya cartel ya Union nationale. Azui na 49 voix, contre 39 voix na Alexandre Mahamba, candidat ya Bloc nationaliste lumumbiste.

Na mokolo mua 05 septembre tee na 12 septembre 1960, akomi Premier Ministre, Ministre ya défense nationale mpe Ministre ya Justice, na gouvernement Ileo I.

Na 13 tee na 20 septembre, Premier Ministre, na Gouvernement Ileo II.

Na 09 février tee na 1er août 1961, Premier Ministre, na Gouvernement Ileo III.

Na 25 janvier tee na 16 février 1961, Président ya Table ronde ya Léopoldville.

Na 08 tee na 12 mars 1961, membre ya Conférence ya Tananarive.

Wuta 24 avril tee na 28 mai 1961, membre ya Conférence ya Coquilathville.

Na 22 juillet tee na 2 août 1961, azali na Conclave ya Lovanium.

Na mikolo minso Ileo azalaki Premier Ministre, gouvernement na ye ezalaki provisoire mpo ba Ministres na ye bakikala kozala investis te mpe ba postes misusu ezalaki kaka na ba Ministres te par défaut ya cohésion nationale mpe ba oyo bazalaki wana, bazalaki na cumul ya mandat ya Ministre na ya Député.

Wuta 16 janvier 1969 tee na 14 avril 1964, Ministre-résident ya gouvernement central na Katanga, gouvernement Adoula.

Kobanda na 14 avril tee na 09 juillet 1964, Ministre d’Etat chargé des Affaires katangaises, na gouvernement Adoula.

Na 13 décembre 1963, akomi Président ya Commission Constitutionnelle ya Luluabourg.

Na ba elections legislatives ya octobre 1965, aponami Sénateur ya province ya Cuvette centrale.

Na 1967 tee na 1971, Président ya Conseil d’administration ya Office nationale pour la Recherche et le Développement (O.N.R.D.).

Wuta 08 mars 1969 tee na 28 janvier 1975, membre ya Bureau politique (Commissaire politique) ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.).

Na août 1971 tee na octobre 1981, Président ay Conseil d’administration ya université du Zaïre

Na 08 mars 1974, akomi doyen ya Bureau politique ya M.P.R.

Kobanda na 28 janvier 1975 tee 18 février 1981, membre permanent ya Bureau politique ya M.P.R.

Na novembre 1975, aponami Commissaire du peuple (Député) na circonscription électorale ya Bas-fleuve.

Wuta 22 novembre 1977 tee na 18 février 1981, Secrétaire permanent ya Bureau politique ya M.P.R.

Kobanda na avril 1979 tee na avril 1980, Président ya Conseil législatif national (Assemblée nationale) mpe azali ko cumuler na mandat ya Commissaire politique.

Kobanda na 02 septembre 1980 tee na 21 septembre 1981, membre ya Comité central du M.P.R. Ye moko alonguaki na politique active mpo na ba raisons ya santé.

Na mai 1990, azali co-fondateur ya Parti Démocrate et Social-Chrétien (P.D.S.C.) mpe akomi Président national.

Na 17 janvier 1991, P.S.C.D. ekomi légaliser na ministère ya intérieur.

Mokolo mua 19 septembre 1994, papa Ileo aweyi na bokono, na Bruxelles.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:36 pm

Godefroid Munongo Mwenda M’Siri Shyombeka we Shalo

Abotami mokolo mua 20 novembre 1925 na Bunkeya. Asali école primaire esika abotami, na 1936 mpe akeyi kosilisa yango na Saint-Boniface na Elisabethville na 1940. Sima ya wana, akeyi kosala ba humanités na Mission catholique ya Kapiri wuta 1940 tee na 1947.

1947-1949 Tango asilisi ba humanités na ye, akeyi kokota na Grand séminaire ya Baudouinville mpo na kosala philosophie. Kasi, asilisaki tee mpo atangaki kaka mbula mibale, kobanda 1947 tee na 1949.

Tango alongue kuna, amati na Kisantu mpo na kotanga na Ecoles ya sciences administratives ya Lovanium-Kisantu, esika azuaki diplôme na 1954. Tango asilisi kuna, abandi mosala.

Na 1954 tee na 1955, Commis na administration coloniale, na service ya pension.

Na 1955 tee na 1956, Greffier na Tribunal de police.

Na 1956 tee na 1957, Juge-assesseur na Tribunal de territoire mpe sima aye kokoma Juge de police.

Na 1957 tee na 1959, Juge-Président ya Tribunal de territoire.

Na 1959, agent territorial, Chef de bureau ya état civil, sima akomi Administrateur ya ya Etablissement public Inga mpe akeyi na misala mia Conseil, na Bruxelles, na 1959.

Na octobre 1958, co-fondateur mpe premier Président général ya Confédération des Associations tribales du Katanga (CON.A.KAT.). Neti azalaki mosali na administration coloniale, fonctionnaire, atikeli Moïse Tshombe, ebonga.

Na mai 1960, aponami Député provincial ya Confédération Nationale ya Katanga (CO.NA.KAT.).

Na juin 1960, membre du Collège exécutif provincial ya Katanga.

Na 14 juillet 1960 tee na janvier 1963, Ministre ya Intérieur, na gouvernement (gouvernement sécessionniste) Tshombe.

Na époque oyo nde asalaki épuration ethnique na bobengani ba Luba ya Kasaï na oyo ya Katanga tango ya sécession ya Katanga. Discours na action ya Munongo ezalaki ya kobengana ba Luba na Katanga mpo bango bazali na misala oyo esengeli ezongela ba Katangais mpe bazali kozua bomengo nionso ya Katanga pendant que ba katangais bazali na eloko te, et pourtant mabele na bango etondi na bomengo mpe bomengo oyo esengeli e profiter kaka na bana ya Katanga (Sud-Katanga = Katangais de souche). Yango wana esengelaki kobengana ba étrangers Luba mpo na kopesa ba Katangais de souche nionso ebendaki ko bénéficier na bango.

Paradoxe ya vision oyo ezali que ye moko Munongo, azali descendant ya nkumu M’siri, d’origine tanzanienne na village ya Nyamwenzi. Awutaka na Tanzanie mpe aye na Bunkeya na 1850 esika asalaki royaume ya Garenganze. Akutaka ba Luba na mabele ma bango na Katanga mpo bazali originaire ya wana.

Na février 1963 tee na juillet 1964, Ministre ya Justice sima, Ministre ya Santé publique, na gouvernement ya Katanga orientale.

Na 09 juillet 1964 tee na 09 juillet 1965, Ministre ya Intérieur mpe na Fonction publique, na gouvernement Tshombe (gouvernement central).

Na octobre 1965 tee na 25 avril 1966, Gouverneur ya Katanga Oriental.

Na 25 avril 1966 tee na décembre 1966, Gouverneur ya Sud-Katanga. Akangemi na likambo ya

complot na ba mercenaires étrangers. Atindami na boloko ya Bula Bemba.

Na 30 août 1968, a bénéficier na grâce présidentielle. Mpe abimi na boloko ya Bula Bemba

Na 1968 tee na 1971, azui nomination en tant que vice-Président ya Office de Transports ya Congo (O.TRA.CO.).

Na 1971 tee na 1974, akomi vice-Président ya l’Institut de Gestion de Portefeuille.

Na 1974 tee na 1976, Président Administrateur Délégué ya Société Zaïro-Italienne de Raffinage

Wuta 12 septembre 1976, akomi introniser Chef coutumier ya Bayeke.

Na 02septembre 1980 tee na 28 janvier 1985, membre ya Comité central ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.).

Mokolo mua 05 novembre 1982 tee na 1er novembre 1983, Commissaire d’Etat na Administration du territoire, na gouvernement Kengo.

Na 1992, azalaki moko ya ba conférencier na Conférence Nationale Souveraine (C.N.S.).

Na mokolo mua 28 mai 1982 akufi brusquement mokolo esengelaki asala témoignage alakaki na lolenge gouvernement ya Katanga ebomaki Premier Ministre Patrice, Lumumba ; Sénateur, Joseph Okito na Député, Maurice Mpolo, tango Président Kasa Vubu, Colonel Mobutu, Collège ya ba Commissaires généraux na groupe de Binza e livraki bango na Tshombe, na Katanga.

Liwa ya Munongo etikala suspecte mpo na veille, le 27 mai 1982, akendeki na Gbado-Lite kokutana na Président Mobutu. Ba proches na ye bakebisaki ye na bokutani na Président Mobutu kuna. Na bozongi na ye, asala malaise na kati ya plénière ya Conférence Nationale Souveraine, na salle de Congrès ya Palais du peuple.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:37 pm

Joseph Ngalula Mpanda Njila

Abotami mokolo mua 12 décembre 1928 na Lusambo. Akoti kelasi epayi ya ba sango ba Frères de la Charité, esika asali école primaire mpe na école moyenne (art graphique) wuta 1934 tee na 1943.Tango asilisi , aye na Léopoldville na 1944, esika azui mosala na Office d'Exploitation des Transports Coloniaux (O.TRA.CO.), en tant que Commis.

Na 1954, abandi kolanda ba cours ya anglais mpo na kosala face na compétence ya batu ya Afrique anglophone (coast man) mpo bango nde mindele babandaki kolinga mingi mpo na eyebeli na bango ya mosala. Mpo na komiya na niveau linguistique mpe ko faciliter collaboration na koyekola mosala epayi na bango, yango wana amikomisaki na ba cours ya anglais na sténographie, na Léopoldville.

Wuta 1944 tee na 1946, azui ba cours par correspondance na Institut National d’Etudes Supérieures ya Belgique.

Na 1949, aponami vice-Président ya Ligue ya ba Employés Chrétiens.

Wuta 1951 tee na 1956, azali ko collaborer na journal ya La Croix du Congo mpe abandi kolanda ba cours oyo ezali kopesama na epayi ya ya Abbé Joseph Malula, na Mission Christ-Roi ba cours yango ezali ya : sciences politiques, sociologie, économie, droit, philosophie, psychologie mpe na logique. Kuna nde likanisi ya Conscience Africaine ebotami na 1951, mpe eye kokoma Manifeste ya Conscience Africaine na mokolo mua 30 juin 1956.

Na 1952, Akomi Secrétaire ya Fédération Kasaïenne ya Léopoldville.

Na 1956, akomi journaliste na Conscience Africaine.

Na 17 avril tee na 18 octobre 1958, akeyi na exposition universelle et internationale ya Bruxelles.

Na 28, 29, na 30 juin, a participer na kati ya misala mia Congrès international ya presse coloniale, na Bruxelles.

Na mokolo mua 20 août 1958, azali kati na ba co-fondateurs ya Mouvement National Congolais (M.N.C.). mpe azui ebonga ya reponsable ya propagande.

Na septembre 1958, akomi rédacteur en chef ya Présence Congolaise mpe azali kati na baye ba signaki mémorandum ya batu zomi na motoba na 1958.

Na mokolo mua 10 octobre 1958 nde M.N.C ebimaki officiellement neti parti politique national.

Na mokolo mua 05 tee na 13 décembre 1958, akeyi ko assister elongo na baninga baye ba M.N.C., Lumumba na Diomi, na Conférence panafricaine ya Accra.

Na janvier 1959, akangemi na mobulu esalemaki mokolo mua 04 janvier 1959 (martyrs de l’indépendance) mpe batiki ye sima ya ba poso.

Na 15 tee na 21 avril 1959, akeyi na Lumumba na Guinée-Conakry, esika Président Sekou Toure azali kati na baye basangani na Luluabourg, na Congrès ya ba partis politiques ya Congo.

Na juillet 1959, M.N.C. ekabuani na ba ailes mibale, Lumumba na Kalonji, mpe ye aponi mopanzi nya Kalonji. Na sanza moko oyo, aponami vive-Président ya Mouvement Solidaire Muluba (M.S.M.).

Na janvier-février 1960, azali na Table ronde politique ya Bruxelles en tant que suppléant ya M.N.C. / Kalonji.

Na février-mars 1960, akeyi Etats-Unis na cadre ya programme ya échanges internationaux oyo ba Américains basangisi batu.

Na mai 1960, aponami Conseiller provincial ya territoire ya Bakawanga, na district ya Kabinda.

Na août 1960, akomi Premier Ministre ya Etat autonome ya Sud-Kasaï

Na 23 avril 1961, azali kati na Table ronde ya Coquilatheville

Na 01er juin tee na 16 juillet 1961, Vice-président ya royaume Fédéré ya Sud-Kasaï. Akoti en conflit na Kalonji mpe aye kolongola ye.

Na 02 août 1961 tee na 11 juillet 1962, Ministre ya Education national, na gouvernement Adoula.

Wuta 12 octobre 1962 tee 26 juin 1965, Président ya gouvernement provincial ya Sud Kasaï. Na Présidence na ye nde Bakawanga ebandaki kotongama. Suite na urbanisation wana nde ayaki kozua kombo ya Mpandanjila = mosali nzela.

Na novembre 1963, a fonder Rassemblement ya Peuples Luba (RA.PE.LU.)

Na mai 1965, aponami Député nationale na circonscription électorale ya Ngandajika mpe aye kokota na Front Démocratique Congolais (F.D.C), Cartel ya ba nationalistes pro-Kasa Vubu na lutte politique contre Tshombe na Confédération Nationale Congolaise (CO.NA.CO.) .

Na 1967 tee na 1971, Président ya Compagnie de Chemin de Fer du Katanga-Dilolo-Léopolville (K.D.L.).

Na novembre 1970, aponami Député na circonscription électorale ya Haut-Lomami.

Na novembre 1975, aponami Commissaire du peuple (Député) na circonscription électorale ya Lukunga.

Na octobre 1977, Commissaire du peuple na circonscription électorale ya Kabinda.

Wuta 1974, Administrateur na ba Editions Okapi.

Na 01 er novembre 1980, azali kati na ba Commissaires du peuple zomi na misatu (treize parlementaires) oyo bakomi lettre ouverte au Président-Fondateur du Mouvement Populaire de la Révolution et Président de la République.

Na 31 décembre 1980, akangami na deuxième Cité ya Organisation ya Unité Africaine (O.U.A.) na pavillon 21.

Na 12 janvier 1981, a perdre mandat na ye ya Commissaire du peuple.

Na 04 décembre 1981, azongi na Kinshasa, libre, suite na ba pressions occidentales.

Na 15 février 1982, azali kati moko ya ba co-fondateurs ya Union pour la Démocratie et le Progrès social (U.D.P.S.).

Na 27 mars 1982, akangemi na prison central ya Makala suite na création ya U.D.P.S.

Na 19 tee na 28 juin 1982, procès esalemi na Cour ya Sûreté de l’État mpo na complot qualifié.

Na 01er juillet 1982, Cour ya Sûreté de l’État e condamner ye na baninga ba ye na 15 ans ya prison.

Na 09 juillet 1982, alongue na prison ya Makala mpe atindami na prison ya Osio esika esengeli asala etumbu na ye.

Na bénéfice ya Ordonnance-loi n° 83/007 ya 21 mai 1983 portant amnistie générale concernant tous les Zaïrois, azui liberté mpe azongi na Kinshasa.

Na 08 mars 1983, pouvoir ezongisi ye na village d’origine, na Tshilunda. Sima, ekumbi ye na Kapena. Nionso oyo mpo azali kati na bakonzi ya U.D.P.S. balobelaki attaque esalemaki na village natal ya Tshisekedi, Mupompa, pendant que ye azalaki kuna na relégation.

Na 22 juin 1985, bazui liberté sur intervention ya roi Baudouin 1er mpo esengelaki aya na célébration ya 25 ans ya indépendance ya Zaïre.

Na 13 juin 1986, akangami lisusu mpe reléguer na village d’origine, na Tshilunda.

Na 05 mars 1987, akutani na Président Mobutu na Gbado-Lite mpe na mokolo mua 17 mars 1987, akumbi délégation ya U.D.P.S. na Gbado-Lite epayi ya Président Mobutu.

Na 27 juin 1987, azali moko na baye ba signaki ba accords ya Gbado-Lite. Yango ezali condima U.D.P.S. comme aile opposante na kati ya M.P.R. parti-Etat.

Na mokolo mua 01 novembre 1987, akomi membre ya Comité central ya Mouvement Populaire de la Révolution, parti-Etat. (M.P.R.parti-Etat). Awa nde atikaki ba activités ya U.D.P.S. mpe akomi kosalela ba intérêts ya Président Mobutu.

Na mai 1990, akomi Conseiller politique ya Président Mobutu.

Ngalula atika mokili oyo ya nse.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:41 pm

Cléophase Kamitatu Massamba (Kami ou Masatu)

Abotami le, 10 juin 1931 na Kilombo na Masi Manimba. Ayebani mpe na kombo ya « Kami » na « Masatu ». Atangi ba Kelasi na ye na école primaire ya Kinzumbi na 1937 tee na 1943 mpe a continuer na petit séminaire ya Kinzambi, epayi ya ba sango ya Jésuites wuta 1943 tee na 1950. Tango asilisi ba humanités latines et mathématiques na ye, asepeli kosala kelasi mpo akoma sango. Akoti na Noviciat na Compagnie ya Jésus. Sima ya mbula misatu, babengani ye mpo abukaki mibeko.

Abandi kotangisa mpe sima na yango, akeyi koluka mosala na agence ya Banque du Congo belge et du Rwanda Urundi na Kikwit. Asali kuna kobanda juin tee na novembre 1953. Alongue kuna, akoti na administration territoriale coloniale, en tant que Commis, na Kikwit, chef lieu ya district ya Kwuilu.

A côté ya mosala mua ye na territorial, abandaki kokanba Association ya ba Anciens Elèves des Pères Jésuites ya Kikwit (A.S.A.P.) pendant 10 ans : kobanda 1956 tee na 1966.

Na 1957 tee na 1959, Secrétaire extra-coutumier na Kikwit

Na décembre 1958, Pierre Mulele, Fernant Nima, Théodore Bengila, Fernant Munanga, ba fonder P.S.A. na janvier 1959 nde ebimi officiellement.

Mokolo mua 02 septembre 1959, Pierre Mulele, asengi na ye afandisa parti na Kwuilu mpe akomi Président Provincial ya P.S.A. na Kwuilu.

Na décembre 1959, akeyi ko représenter P.S.A na Congrès ya Carter A.BA.KO. na Kisantu.

Akeyi na Belgique na Table ronde politique ya 20 janvier tee na 20 février 1960, na étiquette ya P.S.A mpe na Mars-avril 1960, na Table ronde économique, kaka na Bruxelles, ya même année.

Na mai 1960, aponami Député national ya Circonscription ya Kwuilu, mpe Député provincial ya ville ya Léopoldville. Na yango, aponami Président ya province ya Léopoldville, mpe a tiki mandat na ye ya Député national.

Na mars 1961, a participer na Conférence ya Tananarive, mpo na koluka kimia na Congo. Etamboli na ye ezali lokolo moko na ngambo ya gouvernement central, lokolo mosusu na ngambo ya gouvernement ya Stanleyville, esika Gbenye asalaki rébellion.

Alandi ngambo ya gouvernement central mpe na mokolo mua 11 février 1962 tee na 18 avril 1963, akomi Ministre ya Intérieur na gouvernement Adoula II.

Wuta 18 avril 1963 tee na 30 juin 1964, Ministre ya Plan mpe na Développement, na gouvernement Adoula III.

Kobanda mokolo mua 18 octobre 1965 tee na 24 novembre 1965, Ministre ya Affaires étrangères na gouvernement, Kimba.

Aponami Député national ya P.S.A. na circonscription électorale ya Kwuilu. Aponami Porte-parole ya Front Démocratique Congolais (anti-Tshombe) na octobre 1965.

Na mokolo mua 29 mai 1966, akangami na likambo ya complot ya pentecôte. Asali boloko ya sanza zomi na libua, na Bula Bemba.

Na novembre 1967, abimi na boloko.

Na 1970, azui condamnation ya justice na mbula mitano ya boloko mpo na offense na Chef de l’Etat mpe kosala ba activités subversives. Mystérieusement, azui moyen ya kokima mpe akeyi kobuaka ngunda na France. A profiter mpo na kozongela kelasi mpe akoti na Institut d’Etudes Politiques de Paris (sciences po.) mpe azui diplôme na ye na 1973, na option relations internationales. Mpe aye ko soutenir thèse na ye na thème : Problématique et rationalité́ dans le processus de nationalisation du cuivre en Afrique centrale : Zaïre, 1967 et Zambie, 1969. Yango epesaki ye titre ya Docteur na sciences politiques ya Institut politique de Paris, le 29 juin 1976.

Tango akomi kopusana na soutenance ya thèse na ye, asalisi un faux parti politique na kombo ya Front Socialiste Africain (F.S.A.) mpo na ko attirer lisusu attention ya Président Mobutu mpe na ko faire croire na batu que azali na lutte ya kozua pouvoir.

Na 1971, kombo na ye etangami na Affaire ya Ligue Congolaise pour la Paix et l'Amitié entre les Peuples (LI.CO.P.A.) Kasi, akangamaki te mpo azalaki déjà ngunda na France.

Na début novembre 1977, azongi na Zaïre mpe azui mosala en tant que chercheur na Institut pour la Recherche Scientifique (I.R.S.). En réalité, azalaki na solde ya service de sécurité.

Na 1978, azali na lisolo ya likambo na procès des terroristes (procès du siècle) mpo ye nde atekaki ba ndeko na ye ya Masi Manimba : François-Xavier Matanda ma Temu, Jean de Dieu Kudia Kubanza na Jean Bouryaba.

Malgré ba mbongo Matanda abandaki kopesa ye mpo a vivre na France mpe na lolenge a supportaki séjours na ye tee na kosombela ye na famille na ye ba billets ya retour na Kinshasa, a trahir Matanda mpe tango ba condamner ye, aweli kozua ba biens matériels na ye nionso (usines, plantations, mapangu, ndaku, voitures, camions, mbongo), na bénéfice ya Ordonnance-loi Président Mobutu a signaki : Ordonnance-loi du 28 mars 1978 confisquant rétroactivement les biens des condamnés présents et ceux qui l’étaient par contumace.

Mokolo mua 18 janvier 1981 tee na 18 février 1981, Commissaire d’Etat (Ministre) na Environnement, Conservation de la nature, na gouvernement Nguza.

Na 18 février 1981 tee na 23 avril 1981 : Commissaire d’Etat na Agriculture mpe na Développement rural, na gouvernement Nguza.

Na 23 avril 1981 tee na 09 octobre 1981 : Commissaire d’Etat na Agriculture mpe na Développement rural, na gouvernement Singa Udjuu.

Na 07 mai 1982 tee na 05 novembre 1982, Commissaire d’Etat na Agriculture, Développement rural, Environnement na Tourisme, na gouvernement Singa Udjuu .

Na 05 novembre 1982 tee na 18 mars 1983 : Commissaire d’Etat na Agriculture, Développement rural, Environnement na Tourisme, na gouvernement Kengo.

Na 18 mars 1983 tee na 01er novembre 1983 : Commissaire d’Etat na Agriculture, mpe na Développement rural, na gouvernement Kengo.

Na mokolo ma 05 janvier 1983, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre na Tokyo.

Na 17 juin 1984, akomi na juridictions ya mibale, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya Zaïre na Séoul. Kasi, résidence ezali kaka na Tokyo.

Na mokolo mua 28 janvier 1985, akomi membre du Comité central ya M.P.R. parti-Etat.

Bien que Kamitatu atekaki immeuble ya ambassade ya Zaïre na Tokyo, Président Mobutu abengisi ye na Zaïre, mpe apesi ye poste ya Ministre ya Finances. Kobanda na 07 Mars 1988 tee na 28 Juillet 1988 na gouvernement Sambwa.

Kobanda mokolo mua 26 novembre 1988 tee na 04 mai 1990, Ministre ya Plan ya gouvernement Kengo.

Na 1990, azali kati na ba co-fondateur ya Parti Démocrate Social-chrétien (P.D.S.C.), vice-Président ya P.D.S.C. mpe Porte-parole ya Collectif d’Opposition Démocratique Pluriel (C.O.DE.P.)

Na juillet 2003 tee na septembre 2006, Sénateur.

Azalaki mpe Modérateur ya Mouvement des Pionniers de l’Indépendance

Wuta Septembre 2006 tee na 12 octobre 2008, Député provinciale ya Bandundu. Oyo ezali mandat na ye ya suka mpo mokolo mua 12 octobre 2008 nde atikaki mokili .

Azali auteur ya ba buku iye :

- Cléophas Kamitatu Massamba, La Grande mystification du Congo-Kinshasa : Les crimes de Mobutu, Paris, Maspero, 1971.

- Cléophas Kamitatu Massamba, La Grande mystification du Congo-Kinshasa. 2ème édition, Paris, Complexe, 1973.

- Cléophas Kamitatu Massamba, Le pétrole: instrument de la politique libyenne, Institut d'études politiques de Paris, 1973.

- Cléophas Kamitatu Massamba, Problématique et rationalité dans le processus de nationalisation du cuivre en Afrique centrale, Mémoire D.E.A., Institut d'études politiques de Paris, 1976.

- Cléophas Kamitatu Massamba, Problématique et rationalité́ dans le processus de nationalisation du cuivre en Afrique centrale : Zaïre, 1967 et Zambie, 1969, Thèse de doctorat, Institut d'études politiques de Paris, 1977.

- Cléophas Kamitatu Massamba, Zaïre: le pouvoir à la portée du peuple, Paris, Harmattan, 1977.

- Cléophas Kamitatu Massamba, Colloque du 22 au 23 février 1978: thème, les problèmes actuels de l'économie zaïroise : rapport général, Paris, CREF/ IRS, 1978.

- Cléophas Kamitatu Massamba, Kilombo ou le prix à payer pour rebâtir la R.D. Congo, Mémoires lieux de savoir: Archive congolaise, Paris, L'Harmattan, 2007.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:42 pm

Marcel Antoine Lihau Ebua Libana la Molengo

Abotami mokolo mua 09 septembre 1931 na Monga, na province ya Equateur. Asali ba kelasi na ye epayi ya ba sango ya Scheut, na petit séminaire ya Notre Dame de Grâce ya Bolongo-Molongo. Tango asilisi école primaire kuna na 1943, alongue, akoti na école moyenne na Boyange mpe asilisi kuna na 1947.Azui mosala na administration provinciale comme Commis, wuta 1947 tee na 1949.

Na 1949, akoti na Ecole des sciences administratives ya Lovanium-Kisantu mpe asilisi kuna na 1955.

Na 1955, akeyi na université ya Louvain esika azui inscription na philosophie. Akati ba cours na nzela mpe akoti na droit.

Wuta 1955 tee na 1959, Président ya Association Générale ya ba Etudiants Congolais na Belgique (A.G.E.C., section Belgique).

Na 1959, akomi azui licence na droit.

Pendant séjours na ye na Belgique, misala mia Table ronde politique mpe économique misalemaki wuta janvier tee na avril 1960. Lihau, na position na ye ya Président ya Association des Etudiants Congolais, asololaki na ba politiciens Congolais mpo na kolakisa bango ntina ya lisanga na maye matali masolo ma lipanda ya Congo.

Azalaki mpe na Table ronde inso mibale na qualité ya observateur mpe azalaki associer na préparation na yango, spécialement na kati ya Commission Vogel, mpo na Table ronde économique.

Wuta 19 septembre 1960 tee na 09 février 1961, Commissaire général (Ministre) na Justice, na Collège des Commissaires généraux (gouvernement) Bomboko.

Na 09 février 1960 tee na 02 août 1961, Secrétaire d’Etat (vice-Ministre) na Justice, na gouvernement Ileo II.

Na mars-avril 1961, Porte-parole ya Conférence ya Tananarive, mpo na réconciliation na Congo.

Na 1962, a soutenir thèse na ye ya doctorat na droit public mpe akomi Docteur.

Na 1963, akomi kotangisa na faculté ya droit ya université de Lovanium. Ye azali Congolais ya liboso mpe mutu moindo ya liboso oyo akomi professeur na faculté ya droit, Chef ya département ya droit public mpe Doyen ya faculté.

Na 1964, professeur associé na université de Lovanium.

Wuta mokolo mua 10 janvier 1964 tee na 11 avril 1964, membre ya Commission constitutionnelle esanganaki na Luluabourg (Kananga). Yango ebimisaki projet ya Constitution oyo endimamaki na référendum populaire esalemaki wuta 25 juin tee10 juillet 19964 mpe Promulguer mokolo mua 1er août 1964.

Na 1966, professeur na université Lovanium.

Na février 1966, Lihau azali moko na kati ya baye basali projet ya Constitution ya sika, oyo Président Mobutu a déposer na mars 1966, na Parlement. Yango nde ebengami Constitution ya 24 juin 1967.

Na 1967, Président Mobutu a signer Ordonnance-loi n° 67/312 ya 10 août 1967, portant création mpe organisation ya Office National de la Recherche et du Développement (O.N.R.D.) mpe Lihau aye koponama Délégué général na yango.

Na janvier 1968 tee na 03 octobre 1975, Premier Président ya Cour Suprême de Justice.

Wuta 1968, Lihau akoma professeur ordinaire na université Lovanium

Na 1971 tee na 1974, membre ya Comité exécutif ya Mouvement Populaire ya Révolution (M.P.R.).

Na mokolo mua 08 mars 1974 tee na mokolo mua 03 octobre 1975, membre ya Bureau Politique (Commissaire politique) ya M.P.R.

Mokolo mua 03 octobre 1975, Président Mobutu alongolaki Lihai na poste ya Premier Président ya Cour suprême ya Justice mpe ya membre ya Bureau Politique (Commissaire politique) mpo azalaki ko partager te décision iye Bureau politique ezuaki na bateau M.S. Kamanyola, na réunions esalemaki mikolo mua 11 tee na 13 juillet 1974. Yango nde eyaki kondima mokolo mua 10 août 1974, projet ya loi portant révision constitutionnelle, oyo ezalaki na 83 articles mpe ezuaki vote na unanimité na séance esalemaki pendant cinq heures du temps. Yango nde epesaki Président Mobutu ba pouvoirs inimaginables. A ce sujet, Lihau abandaki déjà ko manifester volonté na ye ya ko démissionner mpo azalaki conscient na dérive oyo ezali kokumba ba pouvoirs minene Chef de l’Etat et Président de la République akomaki na yango. Avant kutu a démissionner ye moko, ba « informateurs » basila koyebisa Président Mobutu nionso sur ba intentions ya Lihau. Wuta awa, atikalaki kaka na mosala na corps académique ya université nationale du Zaïre.

Na 27 mars 1982, akangemi na prison central ya Makala suite na création ya U.D.P.S., le 15 février 1982.

Na 19 tee na 28 juin 1982, procès esalemi na Cour ya Sûreté de l’État mpo na complot qualifié.

Na 01er juillet 1982, Cour ya Sûreté de l’État e condamner ye na mbula mitano ya boloko.

Na 09 juillet 1982, alongue na prison ya Makala mpe atindami na village natal, na Monga, esika esengeli asala etumbu na ye.

Na bénéfice ya Ordonnance-loi n° 83/007 ya 21 mai 1983 portant amnistie générale concernant tous les Zaïrois, azui liberté mpe azongi na Kinshasa.

Na 1985, akeyi kosenga ngunda na na Etats-Unis mpe azui yango. Andimami mpe na université Harvard, na Cambridge, na Massachusetts. Comme professeur ya droit.

Azongi na Kinshasa na vacance, na juin 1986. Na kokita ya avion, akangami mbala moko.

Na mokolo mua 13 juin 1986, atindami na relégation, na Monga, village natal na ye.

Na janvier 1987, azui liberté mpe azongi na Kinshasa. Na sima, azongi na Cambridge.

Na 1988, abengisi masolo na Cambridge, na Massachusetts mpo na kofandisa U.D.P.S. na Etats-Unis.

Suite na élan ya 1988 nde makanisi ma kobengisa Conférence Nationale mpo na kosolola makambo matali Zaïre, ebotamaki na juin 1989, epayi ya Lihau.

Wuta mokolo mua 07 août 1991 tee na 06 décembre 1992, Conférence Nationale Souveraine (C.N.S.) esalemi na Zaïre. Lihau azalaki Président ya Commission Constitutionnelle.

Na 1994, pouvoir eyaki ko utiliser maladi ya Lihau mpo na kokotisa bokabuani na baninga ba ye ba U.D.P.S. mpe ye asalaki ba déclarations ya divisons ethniques, contraires na ligne philosophique et politique na ye. Mutu nionso amonaki que Lihau wana, ezalaki oyo azalaki lisusu na makasi mingi te mpo maladi esilaki kolemisa bo mutu bua ye.

Eyebanaki banda kala que wuta 1985, Lihau azalaki ko faire face na ba problèmes ya santé. Mokolo mua lundi 10 Avril 1999, na Boston, na Massachusetts, atikaki baye banso ba mokili.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:46 pm

Thomas Kanza Nsenga

Na 1934 nde amoni mokili na Kinshasa. Atangi na école primaire mpe secondaire na Institut Saint Joseph ya Léopoldville mpe asilisi kuna na 1951. Sima ya ba kelasi na ye, akomi molakisi kaka na Saint Joseph. Philippe na Thomas bazali ba kukutu ya Sophie Madeleine. Bango banso, bana ba mbuta Daniel Kanza.

Na 1952, akeyi koyekola na Louvain, grâce na piston ya tata Raphaël de la Kethule. Ye nde amemaki Kanza epayi ya Directeur ya Usine Textile ya Léopoldville (U.TEX. Léo), Romain Nelissen, na perspective que a se porter garant ya Kanza na mikolo minso akosala na Belgique mpo na ba kelasi na ye. Nelissein andimaki sans problème mpe yango nde e permettre Kanza akende kotanga na Belgique.

Rappelons que Romains Nelissein azalaki mpe administrateur-gérant ya journal Pourquoi pas ? Congo. Ayaki mpe kosomba lisusu journal l’Avenir colonial belge, tango esalaki faillite. Tango asombi yango, abongoli kombo , ekomi L’Avenir.

Ye mpe lisusu nde a engageaki Philippe Kanza, kulutu ya Thomas, Secrétaire na journal Pourquoi pas ? Congo.

Na projet na ye, alingaki kokende kosala ba études ya droit. Malheureusement, ba autorités coloniales balingaki te asala ba études wana. Mpo abima na Congo belge, esengelaki andima oyo bango ba imposaki ye : pédagogie na psychologie.

Akeyi na Louvain, atangi yango mpe azui licence na pédagogie na psychologie na 1956. Wuta, wana, Kanza akoma diplômé universitaire laïc ya liboso ya ekolo na biso.

Tango azongi na Léopoldville na septembre 1956, akomi kotangisa na Institut Saint Joseph mpe na Institut ya éducation physique. Neti azalaki diplôme ya université, esengelaki azala na ba mêmes droits lokola mindele oyo bazali ba diplômes ya université lokola ye. Kasi, yango ezalaki bongo te. Situation wana elukaki ba manifestations na milieu ya ba étudiants congolais ya Lovanium mpo bamilobaki que soki ye mutu kutu atangi kuna na Louvain, bazali koo traiter boye na mindele, ebongo biso baye tozali kotanga awa na Léopoldville, soki tosilisi tokozala na traitement nini ? Na musukusuku wana nde mundele ayaki kopesa Kanza, carte ya immatriculation mpe kopesa ye mosala na université en tant que assistant. Kasi, yango e calmaki kaka ba esprits te.

Na 1957, Kanza azongi lisusu Belgique kotanga mpe akoti na Collège européen ya Bruges kosala ba études post-universitaires.

Na 1958, azui diplôme spécial ya hautes études européennes. Tango asilisi, azui mosala en tant que fonctionnaire international na Marché commun, na siège na yango na Bruxelles. Na ngambo mosusu azali très actif na journal Congo, oyo esalemi na mars 1957 na Léopoldville epayi ya Philippe Kanza na Mathieu Ekatou mpe na ye moko Thomas Kanza. Ce dernier, azalaki Chef de bureau ya journal Congo na Bruxelles wuta 1958.

Na 1960, a démissionner na Marché commun mpo na komipesa na misala ya avenir ya Congo. Akomaki proche ya Lumumba mpe membre ya A.N.C. Philippe na Thomas nde bazauaki likanisi ya kobengisa African Jazz eya kobeta na Table ronde na Bruxelles mpe na quelques pays ya Europe na 1960.

Na 23 juin 1960 tee na 12 septembre 1960, Ministre délègue na New York na Organisation des Nations Unies (O.N.U.), na gouvernement Lumumba.

Na 05 septembre 1960 tee na 12 septembre 1960, Ministre délégué na New York na O.N.U., na gouvernement Ileo.

Na octobre 1960, akomi na gouvernement Gizenga na Stanleyville.

Na mokolo mua 03 tee na 07 janvier1961, atindami en qualité ya représentant ya gouvernement Gizenga na Conférence ya Groupe Progressiste (GR.PR.), na Casablanca. Groupe oyo, ekomaki kobengama Groupe de Casablanca.

Na février tee na août 1961, Ministre délégué na New York na O.N.U, na gouvernement Gizenga.

Na janvier 1962 tee na août 1963, Chargé d’Affaires en titre ya Congo na Londres, na gouvernement Adoula.

Na septembre 1963, azongeli kelasi na université ya Oxford, esika azali koyekola économie.

Tango azui diplôme na ye na 1964, akeyi epayi ya Gbenye, na République Populaire du Congo mpe akoti na gouvernement rebelle na ye comme Ministre des Affaires extérieures et du Commerce extérieur wuta juillet 1964 tee na mai 1966.

Wuta mai 1966, akeyi na Harvard esika a soutenir thèse na ye ya doctorat na économie.

Na 1967, abandi kotangisa na ba universités ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts na Etats-Unis mpe na Oxford, na Angleterre. Na même moment mpe azali ko collaborer na journal Jeune Afrique.

Na 1970, abandi kosangisa ba activités na ye ya universitaire na ba affaires mpo azali kati na ba actionnaires mpe cadres ya Groupe multinational Lonrho.

Na juin 1985, azongi na Zaïre mpo na ko implanter filiale zaïroise ya Lonrho. Na yango, akomi Président délégué général ya Lonrho na Zaïre.

Na 15 août 1992, na élection ya Premier Ministre na Conférence Nationale Souveraine, azalaki candidat malheureux face na Etienne Tshisekedi.

Na 08 juin 1997 tee na 23 juillet 1997, Ministre ya Coopération internationale, na gouvernement L.D.Kabila.

Na 22 mai 1997, Administrateur ya Banque Centrale du Congo.

Wuta 23 juillet1998 tee na 05 janvier 1999, Ministre ya Travail et Prévoyance sociale, na gouvernement L.D.Kabila.

Na octobre 1999 tee na 25 octobre 2004, Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire ya R.D.Congo na Stockholm ; Helsinki ; Copenhague mpe na Oslo. Résidence ezali na Stockholm. A continuaki en tant qu’Ambassadeur, wuta 16 janvier 2001, na gouvernement Joseph Kabila.

Na 15 aout 1996, a fonder Fondation tata Raphael.

Na 18 septembre 1996, akomi Président na yango tee mokolo liwa eyibaki ye mokolo mua 25 octobre 2004 na Oxford, na Angleterre.

Kanza akomi ba buku iye :

- Kanza, Thomas R., Tôt ou tard ...: (Ata ndele ...), Bruxelles, Le Livre Africain, 1959.

- Kanza, Thomas R., Le Congo à la veille de son indépendance ou propos d’un Congolais désillusionné, Bruxelles, L’Auteur, 1959.

- Kanza, Thomas R., Propos d’un Congolais naïf, Bruxelles, les Amis de Présence Africaine, 1959.

- Kanza, Thomas R., Congo, pays de deux évolués, Léopoldville, Actualités africaines, 1956.

- Kanza, Thomas R., Eloge de la Révolution, Bruxelles, remarques Congolaise, 1964.

- Kanza, Thomas R., Sans rancune, Bruxelles, Remarques Congolaises, 1965.

- Kanza Thomas R., Conflict in the Congo: the rise and fall of Lumumba, Oxford, Penguin African library, 1972.

- Kanza Thomas R., The rise and fall of Patrice Lumumba: conflict in the Congo, Londres, R. Colling, 1978.

- Kanza Thomas N., Evolution and Revolution in Africa, Harvard, Schenkman Books, 1978.

- Kanza Thomas N., Africa Must Change: An African Manifesto, Harvard, Schenkman Books, 1978.

- Kanza Thomas N., Sans rancune, Paris, Collection L'Afrique au cœur des lettres, L'Harmattan, 2006.

Notons que roman « Sans Rancune », na deuxième édition na yango, epesamaki na manuscrits non polis epayi ya Jean-Pierre Orban. Ye abanda koluka banda kala ko travailler na professeur Thomas Kanza mpo na kokoma lisusu buku iye. Kasi, tango abengaki epayi na ye, na Oxford mpo na kozua rendez-vous, famille Kanza eyebisi ye que awutaki kozongisa molimo na butu ewuti koleka. Yango nde epesaki ye ba manuscrits oyo ye moko Kanza atiki mpo abandaki déjà kokoma lisusu sur la suite ya « Sans rancune ». Mise au point mpo na édition na yango esalemaki na Valérie Kanza, muana nkasi ya Thomas Kanza. Introduction esalemi na professeur Herbert Weiss, ya City Univesity ya New York, na kati alobeli jeunesse ya Kanza na introduction sociopolitique asaleli ye. Professeur Mukala Kadima-Nzuji na Jean-Pierre Orban nde basali lecture.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:48 pm

Sophie Madeleine N’Kanza Lusibu Zala (Sophie Lihau N’Kanza)

Aye na mokili, na Léopoldville, mokolo mua 08 février 1940. Atangi école primaire mpe secondaire epayi ya ba ma melo ya Sacré-Cœur, na lycee Sacré-Cœur ya Léopoldville. Atangi lisusu na secondaire epayi ya ba ma melo ya Saint-Joseph ya Cluny na Brazzaville, sima azongi lisusu na Sacré-Cœur ya Léopoldville mpe aye ko continuer ba humanités latines epayi ya ba sango Jésuites na Collège Albert 1er ya Léopoldville, na 1960.

Akeyi na Suisse, na université de Genève, na faculté ya sciences économiques et sociales (S.E.S.)., esika azui licence na sociologie, na 1964. Mbala moko, faculté e retenir ye comme assistante na département ya sociologie.

Tango Président Mobutu abengisi ye na Kinshasa, na 1966, a démissionner na mosala mua ye na université ya Genève.

Na 29 octobre 1966 tee na 05 octobre 1967, Ministre ya Affaires sociales, na gouvernement Mobutu.

Na 05 mai 1967 tee na 17 décembre 1967, membre mpe Présidente ya Commission ya Promotion sociale ya Bureau politique ya Mouvement Populaire de la Révolution (M.P.R.).

Na 05 octobre 1967 tee na 05 mars 1969, Ministre ya Affaires sociales et Développement communautaire, na gouvernement Mobutu.

Na 05 mars 1969 tee na 1er août 1969, Ministre d’Etat chargée na Travail, Prévoyance sociale, Habitat na Coordination des Affaires sociales, na gouvernement Mobutu.

Na 1er août 1969 tee na 07 décembre 1970, Ministre d’Etat chargée na Affaires sociales, na gouvernement Mobutu.

Na 1971, akeyi na Etats-Unis, na département ya sociologie ya université ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts.

Na 1973, azui diplôme ya études approfondies, na département ya sociologie ya université ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts mpe akomi fonctionnaire internationale mpe membre ya Conseil d’administration ya Institut des Nations Unies pour la Formation et la Recherche (I.N.U.FR.), wuta 1973 tee na 1977, na New York, na Etats-Unis.

Na 1977, a soutenir thèse na ya doctorat mpe azui titre ya Docteur en sociologie ya université ya Harvard, na Cambridge, na Massachusetts. Theme ya these na ye:

-Nkanza Lusilu Zala, The Social Origins of Political Underdevelopment in the Ex-Belgian Congo, Zaïre, Ph.D., dissertation, Harvard University, Cambridge, MA. 1977.

Na 1977 tee na 1981, Directrice ya Centre des Nations Unies pour le Développement Social et les Affaires Humanitaires, na New York, na Etats-Unis.

Na 1981 tee na 1985, Directrice générale adjointe ya Organisation des Nations unies pour l’éducation, la science et la culture (U.N.E.S.C.O.), na Paris.

Wuta 1981 tee na 1999, professeur na université ya Boston.

Wuta 1985 tee na 1988, Chargée de Mission ya Directeur général ya U.N.E.S.C.O.

Na 1984 tee na 1985, professeur visiteur na faculté ya sciences économiques ya université de Kinshasa (U.N.I.KIN.).

Na 1989, asali Ecole internationale Zala, na Kinshasa. Secrétaire général ya Nations Unies aponi ye Secrétaire exécutif ya Année internationale des personnes handicapées.

Na 1990, asali parti politique ebengami Force Populaire Africaine (F.P.A.).

Professeur Sophie Nkanza azalaki muana ya mbuta Daniel Kanza mpe molongani ya professeur Marcel Lihau (bakabuana wuta ba années 70). Elongo, baboti bana mitano ya basi : Elisabeth, Anne, Irène, Rachel na Sophie.

Sophie N’Kanza azali elenge muasi ya liboso laïque na R.D.Congo azui diplôme ya ba humanités secondaires, diplômes ya université mpe post universitaire, fonctionnaires internationale, professeur ya université, Secrétaire générale adjointe ya U.N.E.S.C.O., Ministre, Ministre d’Etat.

Ye amipesaki makasi na ba actions humanitaires na bosungi bana etike, bilenge basi mpe na personnes handicapées physiques.

Abimisaki buku na makomi maye esalaki thèse na ye ya doctorat:

- N’Kanza Zola, Les origines sociales du sous-développement politique du Congo belge : « de Patroado a la loi fondamentale », 1482-1960, Kinshasa, Presse Universitaire du Zaïre, 1985.


Na 1999, nde atikaki mokili.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Emmanuel-Kandolo 23/6/2010, 2:49 pm

Conscience Africaine, na 1951 : Abbe Joseph Malula, Joseph Ileo, Victor Njoli, Joseph Ngalula, Albert Nkuli, Antoine Ngwenza na Dominique Zangabi.

Liste ya baye ba signaki mémorandum de seize, na août 1958 : Cyrille Adoula, Laurent Bariko, Gaston Diomi, Joseph Ileo, Maximilien Liongo, Patrice Lumumba, Gabriel Makoso, Ignace Makuta, Joseph Mbungu, Jean Montigia, Joseph Ngalula, Albert Nkuli, Alphonse Nguvulu, Antoine Ngwenza, Arthur Pinzi na Pierre Tona Masesa.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

50 ANS YA LIPANDA Empty Re: 50 ANS YA LIPANDA

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut


 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum