congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le deal à ne pas rater :
Funko POP! Jumbo One Piece Kaido Dragon Form : où l’acheter ?
Voir le deal

Prise du pouvoir de Mobutu

+3
mongo elombe
Tsippora
Emmanuel-Kandolo
7 participants

Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Emmanuel-Kandolo 28/11/2009, 8:42 pm

Ba ndeko,

Mpo na ko comprendre lisolo ya coup d’Etat ya 24 novembre 1965, esengeli tozongela mua moke parcours ya Joseph-Désiré Mobutu. Ye abotami le 14 octobre 1930 na Lisala. Azali muana ya papa Alberic Ngbemani na mama Marie-Madeleine Yemo. Muana moke, Joseph-Désiré Mobutu aye na Léopoldville (Kinshasa) na mbula ya quatre ans, na ba boti baye mpe abandi kelasi epayi ya ba sango ya Sainte Anne na 1937. Kasi ailisi kuna te, bazongi lisusu na Equateur mpe abandi kotanga na Molegbe epayi ya ba sango ya Capucins na Scheutes. Sima ya wana akeyi na Coquilatville (Mbandaka) kosala école moyenne epayi ya ba Frères Chrétiens. Kuna, azalaki na mua mobulu mpe alingaki nzela ya kolanda basi. Yango wana moninga na ye Laurent Gabriel Eketebi ayaki kofunda ye mpe babengani ye na kelasi mpe batindi ye na mosala mua soda mpo na redressement na ye.

Atindami na école centrale ya Luluabourg na 1950. Sima ya mbula mibale asilisi mpe azui brevet militaire na ye ya secrétaire dactylo comptable na 1952. Akeyi na Léopoldville esika azuaki mutation na Quartier général. Na libanda ya musala mua soda, abandi ko collaborer na ba journaux locaux kino ayaki kokoma journaliste na journal Avenir na 1956. Na 1958, azalikati na 500 familles congolaises oyo bazui occasion ya kokende na Belgique na exposition universelle. Ya Bruxelles. Avant départ na Belgique, asalaki déjà connaissance ya Patrice-Emery Lumumba na rédaction ya journal Avenir na Léopoldville. Na Bruxelles kuna, na nse ya milulu mia exposition universelle, congrès ya presse coloniale mpe esalemaki. Tango awuti na Belgique, nde aye kozua ebonga ya rédacteur en Chef ya Avenir avec promesse ya kozonga lisusu na Bruxelles mpo na kosala stage na Office ya information na relations publiques mpo na Congo belge na Rwanda-Urundi na 1959. Tango azongi na Bruxelles, asali stage na ye, asilisi. Sima ya wana, alongi na concours ya jury central mpo na kokota na Institut Solvay mpo na kosala ba études ya sciences sociales.

Séjour ya Joseph-Désiré Mobutu na Bruxelles na 1959 ezalaki tournant monene na vie na ye. Wuta wana nde akomaki recruter na services belge ya renseignements. Na ebandeli ya 1960, du 20 janvier au 20 février, Table ronde politique esalemi na Belgique mpo na masolo matali lipanda ya Congo, Mobutu akomi membre ya M.N.C. - Lumumba. Sima na yango, Table ronde économique mpe esalemi na sanza elandi, kobanda 26 avril tee na 16 mai 1960. Sima ya participation na ye na Table ronde économique, azongi na Léopoldville sur proposition ya Lumumba. Sima ya ba élections générales, Lumumba asali gouvernement mpe apesi ye ebonga ya Secrétaire d’Etat à la Présidence du Conseil, le 10 juin 1960. Poste oyo ezalaki stratégique mpo ye nde ezalaki charger ya ba questions politiques et administratives mpe azalaki na accès na ba dossiers minene. Esika wana, pembeni na Lumumba, ezalaki esika oyo esengelaki na ye mpo abanda kotala nini Lumumba azali kobongisa mpo ba Belges na ba Américains bazalaki hostile na idée ya komona ye na pouvoir.

Sima ya lipanda, le 30 juin 1960, na mikolo milandi, Président Kasa Vubu na Premier ministre Lumumba bayokani que Mobutu akoma Chef d’état-major ya armée nationale congolaise (A.N.C.) mpe ba bombarder ye Colonel le même jour, le 8 juillet 1960. Position confortable na armée, nzela ebandi kofungwana moke moke mpe ba ambitions ya komata na sommet de l’Etat ebandi koya. le 5 septembre 1960, ba soda babimisi mobulu na Léopoldville. Tango koswana ekoti kati na Kasa Vubu na Lumumba mpe ba révocations réciproques esalemi, Mobutu a sauter na opportunité mpo alakisa force na ye. Na mitindo mi aye, armée e neutraliser bango banso babale, le 14 septembre 1960. Yango nde ezali le premier coup d’Etat militaire oyo esalemi na Afrique mobimba.

Colonel Mobutu azalaki na admiration sans borne mpo na ba études universitaires mpe akanaki kokende mosika na ba études na ye. Kasi ba circonstances ya vie e décidaki ndenge mosusu. Ba rencontres na ye na Bruxelles entre 1958 na 1959 na ba étudiants congolais na exposition universelles ou tango ye moko akomaki étudiant na Université libre de Bruxelles na 1959 etikelaki ye ba meilleurs souvenirs na oyo etali mayele oyo amonaki na ba jeunes oyo bakendeki mosika na ba études na bango. Azalaki na admiration mingi mpo na bango. Yango wana asalaki ba jeunes diplômés universitaires ya R.D.Congo na Belgique (ba misusu bazalaki naino na ba études) confiance mpe le, 19 septembre 1960 bakomi ba commissaires généraux na kati ya collège = gouvernement.

Sima ya wana, le 7 janvier 1961, Président Kasa Vubu apesi ye pete ya Général-major mpe a bombarder ye Commandant en chef ya armée nationale congolaise . Le 3 novembre akomi Lieutenant général.

Sima ya collège ya ba commissaires généraux, gouvernement ya Joseph Ileo wuta 9 février 1961 tee na 2 août 1961, Cyrille Adoula, wuta 2 aout 1961 tee na 10 juillet 1964, Moise Tshombe wuta 10 juillet 1964 tee na 18 octobre 1965.

Mpo na nini Président Kasa Vubu alongolaki Tshombe na poste ya Premier ministre ? Likambo ekotisaki mindondo entre Kasa Vubu na Tshombe ezali ya ba élections. Tango gouvernement Tshombe esalisi ba élections mpe ba résultats ebandi kobima, Kgbokoso ekoti kati na bango mibale mpo Kasa Vubu alingaki te a perdre ebonga na ye ya Président de la République mpo na miso ma ye, Tshombe azalaki na mposa ya ebonga wana !!! Kasa Vubu abandi kofongola miso mpe aye kosala discours na radio mpo na koyebisa que ba élections ezali na ba irrégularités, esengeli ba examens ya ba recours esalema. Na yango, akati processus électoral mpo apesa Cour suprême temps ya ko examiner ba requêtes batu na ba partis politiques et associations ekotisaki.

Ba oyo babandaki ko critiquer ndenge gouvernement a organiser ba élections babandaki koloba que yango esalemi suivant mode ya Confédération Nationale du Congo (CONACO ex-CO.NA.KAT) mpo Godefroid Munongo nde azalaki ministre de l’intérieur. Kasi tango Cour suprême esengi que ba bandela ba élections bipayi oyo emonaki que ba irrégularités ezali ya solo, remaniement ministériel esalemaki dans le souci ya komeka ko apporter équilibre. Victor Nendaka ayaki kokoma ministre de l’intérieur. Ye azalaki opposant ya Tshombe. Kokota ya Nendaka na gouvernement ememaki élan mususu na oyo etali lutte contre Tshombe.

Kasa Vubu na Tshombe boyokani bozalaki lisusu te, opposition ekomaki kosenga na Tshombe a élargir gouvernement na ye tee suka suka ekomi kosenga démission ya Tshombe na gouvernement na ye. Front Démocratique Congolais (F.D.C) ya Nendaka ekomaki kosala ba pressions makasi mpo na mise en place ya gouvernement d’union nationale. Nionso oyo eyali ko affaiblir Tshombe politiquement en plus ya situation politique, économique et sociale ya mboka. F.D.C. ekomaki kosala nionso mpo Tshombe alongua : kosenga na Président Kasa Vubu asalela message na ye oyo apesaki na radio le, 30 avril 1965, a nommer informateur mpo na consultation en vue ya formation ya gouvernement ya sika, etc.

Le, 13 octobre 1965, Kasa Vubu aye kolongola Tshombe na discours asalaki na séance solennelle ya ouverture ya session ordinaire des Chambres, en ces termes « En vue d’assurer le respect des exigences fondamentales et des règles habituelles de la démocratie, j’ai mis fin aux fonctions de Tshombe à la date de ce jour, les Chambres constituées, et le gouvernement n’ayant pas cru devoir, de sa propre initiative, présenter sa démission » (Discours repris na Courrier d’Afrique ya le, 8 octobre 1965.)

Kasa Vubu na discours na ye alakisaki kanda azalaki na yango na lolenge alongolaki Tshombe. Acte oyo esepelisaki ba oyo babandaki kolinga Tshombe akwueya. Kanda ya Kasa Vubu ewutaki du fait que asengaki na Tshombe, mbala na mbala a démissionner kasi ye aboyaki kosala bongo, yango wana Kasa Vubu ayaki ko agir ndenge a agisaki wana, sans diplomatie aucune. Kasi, Tshombe aningana te, aloba eloko mko te, afanda très calme et digne.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Emmanuel-Kandolo 28/11/2009, 8:44 pm

CO.NA.CO. ya Tshombe e gagnaki ba élections (Chambre des Représentants « Assemblée nationale» na Sénat). Il était évident que na moment oyo Tshombe akomaki ko bouler ndenge nini akoma candidat ya parti na ye mpo na ba élections présidentielles.

Constitution ya 1er août 1964, na art 185, aliéna 2, elobaki que la mission du gouvernement de transition était d’organiser les élections. Molili ezalaki na sima, c’est-à-dire, disposition moko te ya terme ya transition dont la mission essentielle ezalaki ya ko organiser ba élections. Et après publication mpe proclamation ya ba résultats ya ba élections, gouvernement oyo ekokoma nini ?

Commission constitutionnelle etikelaki Président de la République choix ya ko décider soki alingi gouvernement de transition ezala tee na suka ya mandat na yango ou bien alongola yango soki ba circonstances politiques ezali kosenga que alongola yango. Selon constitution, na art. 66, e prévoir que Président de la République a soumettre na approbation ya Parlement réuni na congrès, l’acte ya nomination ya ba membres de tout gouvernement qu’il forme, et cela dans le délai de 30 jours à compter de la première séance du Parlement.

Conflit oyo ebandaki ko renforcer position ya Président Kasa Vubu mpe ezalaki ko désavantager Premier ministre Tshombe, dans la mesure où mission ya gouvernement de transition ekomaki na suka, Président de la République a révoquaki ye na discours ya le, 13 octobre1965 devant deux Chambres reunies en congrès national na première session ordinaire na yango oyo ebandaki le, 7 octobre 1965, mukolo session extraordinaire esilaki.

Président Kasa Vubu ayaki ko nommer Evariste Kimba formateur du gouvernement, ye azalaki ministre ya Affaires étrangères ya Katanga à l’époque ya Etat Indépendant du Katanga, Député mpe élu ya Balubakat, membre ya F.D.C. ya Nendaka, oyo ezalaki na minorité na Parlement.

Evariste Kimba azalaki nommer na ordonnance n° 397 du 18 octobre 1965. Le 14 novembre 1965, akeyi liboso ya ba Chambres, conformément na art. 66 ya constitution, kasi congrès e recaler ye : sur 262 parlementaires votants, gouvernement Kimba, ezua 121 voies pour, 134 voies contres, na 7 abstentions. Na motu makasi, Kasa Vubu a renouvelaki ye lisusu confiance na ye. Kasi, Kimba azuaki lisusu temps ya komeka lisusu mbala ya mibale kokende devant congrès nationale te mpo Haut commandement militaire eyaki kosala coup d’Etat le, 24 novembre 1965, ekuewisi Kasa Vubu na Premier ministre na ye Kimba, y compris na ba Chambres nionso ya Parlement ! Avant mokolo mua 24 novembre, nini elekaki na mposo wana?

Le, 21 novembre, Général Mobutu akutani na Ministre ya Affaires étrangères ya gouvernement Kimba, Kamitatu mpo atuna ye motindo délégation congolaise na O.N.U. na vote na bango na likambo entre gouvernement ya Chine na gouvernement central ya peuple ya République populaire ya Chine. Ye azongiseli ye que position ya R.D.Congo ezali kolanda miye mikamatamaki na Accra mpe eboyi kotandama sima ya une quelconque puissance étrangère. Kamitatu en bon politicien, a utilisaki subtilité ya langage mpo ayebaki que Général Mobutu akomaki accrocher mingi na politique mpe force na ye ezalaki redoutable. Sima ya Kamitatu, Général Mobutu, akutani na noko na ye Litho. Ye azalaki déjà politicien mpe Parlementaire. Ayebisi ye que asepeli te ndenge ba parlementaires misusu ya Ubangi baboyi kolanda ndenge ye asengaki bango mpo ba soutenir gouvernement Kimba na vote. Wana, Kimba azalaki na difficulté makasi mpo Parlement eboyaki kolekisa gouvernement na ye. Kimba aye na camp paracommando kokutana na Général Mobutu mpo ye azalaki na appui na ye. Sima ya wana, Bolikango mpe aye kosangana na bango na masolo mpe Kimba asalaki ye proposition ya kokota na gouvernement na ye.

Le, 22 novembre, Général Mobutu, ambassadeur américain G. McMurtrie Godley na Tshombe, basangani na masolo, toujours na camp paracommandos.

Le, 23 novembre, ba politiciens ya F.D.C. batomboki na Nendaka mpo bayoki que ye azali na masolo na ba ambassadeurs ya Etats Unis, Belgique na France na Léopoldville. Baluki kokutana na Général Mobutu, kasi ye aboyi poliment koyamba bango en prétextant que azali occuper na kobongisa milulu mia premier anniversaire ya victoire sur la rébellion ya Gbenye. Tango wana nde boule esi ekomaki kaka que ye moko azwa pouvoir mpe asilaki kozua carte blanche na ba pays ya troïka.

Le, 24 novembre, Commandant en Chef ya armée nationale congolaise akutanaki na mindele oyo bazali ba conseillers militaires na ye : Marlière, Powis de Ten Bosh, Lamouline, Delperdange, na Prouteau. Sima, aye kokutana na bakonzi ya Haut commandement militaire mpo na mbala ya mibale, mpo na kosala analyse ya situation ya conflit kati na Kasa Vubu na Tshombe mpe na position ya Parlement en faveur ya Tshombe.

Masolo mabandi nde Général Mobutu a dévoiler projet na ye ya coup d’Etat mpe a garantir bango soutien ya ba services secrets américains na belges mpe ndenge armée ezali kaka na intention n ya kozua pouvoir mpo na mbula mitano, sima akozongisela yango na ba civils. Ba alliances misusu ya non trahison esalemi kuna.

Mise en application ya plan ebandi tango ya changement ya corps de garde ya présidence. Batiye ba paracommandos en tenu ya garde républicaine na esika ya ba gardes républicaines. Sima na yango, ba isoler palais ya mont Stanley na coupure ya communication na action ya Major Wabali. Tango Président Kasa Vubu akoti na isolement sans ayeba, Lieutenant Ilosono asilisi ko taper déclaration ya proclamation ya prise ya pouvoir na Haut commandement militaire. Général Mobutu abengisi mutu na ye oyo akotisaki ye na journal avenir, Pierre Davister na Conseiller militaire principal na ye, Colonel Marlier, mpo na ko confirmer bango que Kasa Vubu alongwe mpe journal ya Davistere ekomi, Marlier a informer ba oyo ye esengelaki a informer na Bruxelles.

Na tongo na yango, Capitaine Lonoh aye kosakola changement ya régime mpe kombo ya mokonzi ya sika. Président Kasa Vubu ayokaki nouvelle na radio, mpe officiellement Haut commandement etindi Colonel Malila na mukanda oyo ezali koyebisa ye que alongue mokonzi mpe ko garantir ye traitement malamu, mpe na ba avantages nionso lokola. Ye andima sans problème mpe amekaki ata ko pata pata te. Asengi na Président Mobutu apesa ye escorte mpo azonga epayi na ye na Tshela. Na tongo wana kaka ya 25 novembre, Président ya sika, Général Mobutu, abengisi ba journalistes na camp paracommandos mpe ayanoli na mituna na oyo etali ba raisons etindi Haut commandement ezua pouvoir. Sima ya wana, aye koyamba ba Parlementaires na congrès na Parlement. Esengo ekoti na ekolo, batu kosepela makasi , koyemba , miziki ya ba soda ebandi kobeta na radio, batu banso bandimi bokonzi bua Président Mobutu na Haut commandement : ba politiciens, ba syndicalistes, ba étudiants na église, ba pays ya Afrique mpe na ba pays ya O.T.A.N.

Sima ya wana, Nyamaseko, aide de camp ya Président Kasa Vubu, asalaki nionso mpe Major Mpuati asalaki même proposition na Kasa Vubu mpo na koluka solution militaire ya kozongisa ye na bokonzi, kasi aboyaki. Le 4 décembre, conformément na demande na ye, Président Mobutu atindaki Major Tshatshi mpo a escorter ye en sécurité tee na Tshela. Kokende nionso na résidence surveillée wana mpe ko vivre calvaire tee na ndenge ayaki kokufa d’une manière inexpliquée.

Wana ezalaki mua rappel ya prises de pouvoir ya Président Joseph-Désiré Mobutu.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Tsippora 29/11/2009, 2:15 am

Papa Emmanuel, il faut penza okoma livre. Je ne sais pas si vous avez deja publie vos ecrits mais vous etes une encyclopedie vivante et il fautdrait en faire profiter tous les
Congolais, tout le monde entier! Prise du pouvoir de Mobutu 337703
Tsippora
Tsippora


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  mongo elombe 29/11/2009, 8:54 am

Prise du pouvoir de Mobutu 337703 éducatif boni Tsippo?
mongo elombe
mongo elombe


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Arafat 30/11/2009, 1:03 pm

Yango wana moninga na ye Laurent Gabriel Eketebi ayaki kofunda ye mpe babengani ye na kelasi mpe batindi ye na mosala mua soda mpo na redressement na ye.
Eketebi Moyidiba? je crois que azalaki commissaire d´état aux transports et communications, arrêté, jugé et lourdement condamné pour detournement des fonds publics. Je pense que Mobutu azalaki toujours na kanda na ye ndenge afundaka ye Very Happy
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Emmanuel-Kandolo 3/12/2009, 12:38 am

Ndeko Arafat,

Ezali Eketebi moko wana oyo oyebi. Yango wana na profiter mpe nabela yo lisolo na ye.

Ezali Eketebi moko wana oyo oyebi. Yango wana na profiter mpe nabela yo lisolo na ye. Laurent Gabriel Eketebi Moyidiba Mondjolomba abotami le 13 mai 1936 na Coquilatville (Mbandaka) na Congo-belge (R.D.Congo). Tata na ye azali Ngombe, mama azali Mongo. Azali diplômé ya école secondaire na section commerciale et administrative epayi ya ba Frères des écoles chrétiennes na Mbandaka. Très brillant, abimaki lauréat ya promotion na ye na 1954. Abalani na Béatrice Lifeta Y’Aekesako, fille ya ancien Bourgoumestre ya commune ya Kinshasa, mpe Directeur-général ya Bralima . Na ye, baboti bana libua.

Tango Gabriel Eketebi Moyidiba Mondjolomba asilisi kelasi na ye na 1954, akomi kosala na Administration territoriale comme agent ya troisième classe, sixième catégorie na service provincial financier ya Equateur. Sima ya mbula misatu, akomi agent ya quatrième catégorie, fonction ya likolo oyo mutu moindo akokaki kozua mpo wana azali kosala elongo na mindele. Pembeni ya Administration provinciale, azalaki membre ya Association du Personnel Indigène de la colonie na province ya Equateur. Na 1958 aye koponama Premier Secrétaire ya Association iye. Azali mpe kati na batu oyo basali Fédération du Nord de l'Equateur (FE.DU.NEQ) mpe aponami Secrétaire général. Yango esangisi ba mutuelles nionso oyo ya ya territoires ya nord ya province ya Equateur. Sima na yango, aye koponama Président ya province ya Equateur na 1960 tee na 1962. Mpe aye kokoma Président ya Moyen Congo kobanda na 1963 tee na 1964. Sima ya wana, tango Président Mobutu azui pouvoir mbala ya mibale, le 24 novembre 1965, na sanza elandi, a nommer ye Chef de cabinet adjoint ya Président de la République. Titulaire nde Evariste Loliki. Asali kuna wuta décembre 1965 tee na mai 1969. Notons que ye na Président Mobutu basalaki kelasi yoko mpe bazali baninga. Président Mobutu afanda na famille ya ba Eketebi na Mbandaka mpe bamesanaki makasi. Sima ya présidence, Président atindi ye Ambassadeur extraordinaire et plénipotentiaire na Dar es Salam wuta mai 1969 tee na novembre 1970. Tango azongi na Kinshasa, mpo na ngonga muke na Affaires étrangères, mpe sima atindami lisusu na Président Mobutu comme Ambassadeur auprès des pays de Zone du Conseil de l'Entente avec résidence na Abidjan. Kuna, asalaki kaka sept mois wuta ebandeli ya mbula tee na juillet 1971. Président Mobutu abengisi ye na Kinshasa mpe akoki na gouvernement na ebonga ya vice-Ministre ya Affaires étrangères (kobanda juillet 1971 tee na septembre 1972). Titulaire na ye, Mario Cardoso (Losembe Bantwanyele).

Kokoma kaka akomi na Affaires étrangères na 1971 wana, abandi kosala Mario Cardoso musuku suku na likambo ya authenticité mpe afundi ye na Président Movbutu mpo na détournement ya mbongo ya ministère ya Affaires étrangères (fonds américains ya assistance mpo na kosalisa Holden Roberto na lutte na ye na libération ya Angola) mpe abakisi lisusu que alingi kaka babengaka ye Mario Cardoso bien que tokomi na ba kombo authentiques, mpe azali koloba na batu que azali avant tout Portugais ata soki azali na gouvernement. Eketebi apelisa moto na bifunda funda wana tee na ndenge Président ayaki kolongola Citoyen Losembe Batwanyele le, 21 février 1972 na poste ya Ministre ya Affaires étrangères. A remplacer ye na Nguz a Karl i Bond. Président Mobutu asalela likambo wana meeting mpe alobi que Losembe Batwanyele, Mario Cardoso, azali traitre, a trahir Zaïre kuna na Portugal, ekolo ya ba koko ba ye. Asilisi ye loposo, alobi lisusu ndenge akimeli na nzela ya Rwanda mpo akeyi kosenga asile politique na Suisse. Ata ko bongo, esengeli asambisama mpo na trahison na détournement ya mbongo ya l’Etat. Action publique esalemaki mpe ememi na procès oyo e condamner ye na contumace mpo gouvernement helvétique eboyaki ko extrader ye na Kinshasa. Etc.

Tango Eketebi akueyisi Mario Cardoso, awi promotion le, 18 octobre 1972 en tant que Commissaire d’Etat (Ministre) ya département ya transports et communications. Ye moko sika oyo akomi akomi titulaire mpe abandi ko gérer budget ya département na ye. Abandi kosakana na mbongo. Président Mobutu atikela ye temps mpe abandaki kolakisa ye que azali kidiba ndenge azali kobenda ba l’ar kuna. En plus, amataki makasi mpo ye nde alongolisaki Mario Cardoso. Donc, mikolo wana vova na vova. Nani akoloba na ye ? Nzoka nde ezalaki lolenge ya komikotisa na mutambu malembe malembe.

Awa nde likambo ya détournement eyaki kokanga ye. Juridiquement parlant, Eketebi akokaki ko justifier te ba mouvements ya mbongo ebele oyo ebandaki kowuta na compte ya ministère ya transport, na trésor public, tee na oyo ya ba familles na relations na ye. Yango ebengamaka malversation na détournement ya fonds publics. Lisusu, en tant que Commissaire d’Etat de tutelle, esengelaki asomba Boeing 747 mpo na compagnie nationale Air Zaïre. Akenda kosala leasing na Pan American World Airways (Pan Am) = azui avion wana na crédit. Kasi crédit ekosala que avion ekoma ya Air Zaïre soki kaka compagnie ezali ko futa ba redevances na ba pourcentages ya option oyo ekoya ko céder ye droit ya propriété à part entière. Na yango, esengengelaki elandela plan comptable américain. Na leasing wana, esala que atikala na mbongo mpe asala na yango makambu na ye pendant que compagnie ekobanda kobimisa lisusu mbongo mosusu ya kofuta ba intérêts ya crédit. D’ailleurs, Boeing 747 wana bien que ezalaki na décoration ya Air Zaïre, ebandaki ko voler na immatriculation ya Pan Am mpo ezalaki na leasing, ekomaki naino propriété ya Air Zaïre te mpe compagnie nationale abandaki même pas kofuta mbongo ndenge esengelaki. Neti niongo elekakaki mpe ebandaki kofutama te, Pan Am a récupéra avion aye mpe mbongo oyo Zaïre epesaki ekeyi na mayi. Mbala ya liboso 737 wana ebandaki kosala liaison entre Kinshasa na ba capitales européennes, esalaki que ba autorités libyennes basenga na yango ekita mpo na contrôle mpo bakanisaki ezali un avion américain ezali ko survoler territoire na bango sans autorisation du fait que ebandaki kaka ko voler na immatriculation américaine.

Ndenge Eketebi afundaki Mario Cardoso eyaki mpe kozongela ye. Azalaki Ministre ya Transports na Communications kobanda septembre 1972 tee na janvier 1975. Na 1975, Cour suprême moko wana esambisaki Mario Cardoso Losembe, esambisaki ye mpe e condamner ye na peine ya travaux forcés assortie na confiscation générale ya ba biens na ye nionso : meubles, immeubles, comptes en banques, etc. Président Mobutu ayaki ko gracié ye na ordonnance n°94-060 ya 18 octobre 1994. Yango ezongiselaki ye boloko na ye oyo l’Etat ebotolaki.

Président Mobutu akangela ye kanda mpo ye nde akendaki kofunda ye epayi ya ba sango que akimaka kelasi. Yango babenganaki Mobutu na kelasi. Rancunier, Président Mobutu atikala kobosana likambo wana te mpo il tenait absolument afutisa ye yango : amatisi ye mpo aya kokueyisa ye complètement.

Eketebi atiki mokili mikolo mileki, suite na choc esalaki ye tango ayaki ko se rendre compte que huilerie na ye ya Lisala ebandaki lisusu ko tourner bien te. Atikaki gestion na yango na leki na ye ya mobali. Pendant que ye Eketebi azali na Kinshsasa, leki na ye, Directeur-gérant, atindelaka ye ba documents falsifiés oyo ezali kolakisa bonne santé ya huilerie. Nzoka nde asi akweyisa yango kala. Tango Eketebi a décider akende ko inspecter ye moko, nde ayaki kokutana na surprise désagréable wana, akokaki ko supporter coup te.

Merci na ba ndeko Tsippora mpe nayoki conseil na yo. Merci lisusu na ndeko Mongo Elombe.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Arafat 3/12/2009, 10:04 am

Président Mobutu asalela likambo wana meeting mpe alobi que Losembe Batwanyele, Mario Cardoso, azali traitre, a trahir Zaïre kuna na Portugal, ekolo ya ba koko ba ye. Asilisi ye loposo, alobi lisusu ndenge akimeli na nzela ya Rwanda mpo akeyi kosenga asile politique na Suisse. Ata ko bongo, esengeli asambisama mpo na trahison na détournement ya mbongo ya l’Etat. Action publique esalemaki mpe ememi na procès oyo e condamner ye na contumace mpo gouvernement helvétique eboyaki ko extrader ye na Kinshasa. Etc.
Je me souviens très bien de cette affaire tellement que esalaki bruit minigi, biso toyebaki kaka que Mario Cardoso akimaki na ba sanduku ya mbongo. Ironie du sort lelo oyo Mario Cardoso aka Losembe Batwanyele azali 2° vice-président ya sénat.
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  C.Ryma 3/12/2009, 5:49 pm

C’est fou quant même. Au lieu de mettre l’emphase sur l’histoire occidentale et des différentes civilisations non africaines, voila le genre de chose que le système d’éducation congolaise devrait mettre au premier plan.

Ndeko Emmanuel, est ce que o koki ko beta lisolo ya zoo humain oyo ezalaki na Bruxelles ? na yebi ke Roi leopol II asalaki zoo moko boye ou les congolais étaient exposées lokola ba nyama.
C.Ryma
C.Ryma


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  BOMA 4/12/2009, 12:12 pm

Ndeko Kandolo, okoki ko pesa biso lien...On peut s'infomer de nous-même en attendant. Merci pour tes efforts et la bonne foi de nous édufier avec l'histoire du Zaire notre pays. Bon courage.

Moi, je voulais savoir la différence de Tétéla et les Mongo. Il parait, ils viennent d'une même famille? Si tu pourras Merci.
BOMA
BOMA


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Tonton Ricos 4/12/2009, 2:24 pm

BOMA a écrit:Ndeko Kandolo, okoki ko pesa biso lien...On peut s'infomer de nous-même en attendant. Merci pour tes efforts et la bonne foi de nous édufier avec l'histoire du Zaire notre pays. Bon courage.

Moi, je voulais savoir la différence de Tétéla et les Mongo. Il parait, ils viennent d'une même famille? Si tu pourras Merci.

Boma,

yo oza kosenga Kulutu Emma apesa yo lien. Pour lui,c'est du vecu donc c'est des choses qu'il sait via ses relations de l'époque.
Il y a de fois des gens qui écrivent sur notre histoire en omettant beaucoup d'erreur,donc tu peux archivé ces écrits.

Tonton Ricos


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Emmanuel-Kandolo 4/12/2009, 11:08 pm

Ndeko Arafat,

Na ironie du sort nakobakisa lisusu que Leon Kengo wa Dongo, oyo azali Président ya Sénat mpe mokonzi ya Mario Cardoso, ye nde a luttaki mpo na kozua extradition na ye epayi ya ba Suisses, kasi esimba te. Ye lisusu nde asengela ye boloko na procès. Lelo oyo, bakoma kosal esika moko!!!

Est-ce que cas oyo ezali na proverbe moko na kikongo? Soki ozali na yango, pesela naino.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Emmanuel-Kandolo 4/12/2009, 11:14 pm

Ndeko C.Ryma,

Masolo tokabolaka awa ezali mpe koteya biso banso. Kasi mawa esalaka ngai komona que na ekolo na biso R.D.Congo, histoire ekomamaka selon pouvoir politique oyo ezali en place. Lelo oyo, batu mususu bazali kosala neti kutu Mobutu a existaki te ata na misala malamu ye asalaki. Kombo na ye ezali lisusu kotangama te ata na ba documents ye a signaki. Ezalaka bongo te. Il est vrai que ye mpe asalaki bongo na baye bazalaki wana liboso na ye. Histoire ya ekolo eponaka te, elobaka manso maye maleka ndenge ezalaki. Yango wana, esengeli nde tosala keba na maye mazali koleka na ekolo na biso mpe na maye tozali koyoka na ba radio, komona na ba télévisons mpe kotanga na ba journaux na internet.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Emmanuel-Kandolo 4/12/2009, 11:16 pm

Ndeko Boma,

Ndenge Tonton Ricco ayebisi yo wana, lien ya kopesa yo ezali te. Soki olingi okoki koluka ba livres ya Histoire ya Zaïre ou le Congo mpo oyeba makambu mususu eleka kuna. Kobosana te que makambu mosusu okokuta yango kuna te mpo etikala ya kobombama ou ba acteurs ya époque baloba yango polele te tout comme misusu batu bayebi mpo basalaki na milieu wana mpe na ba réalités mua mingi.

Tonton Ricco,

Merci na maye oyebisi ndeko Boma.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  BOMA 7/12/2009, 1:14 am

Tonton Ricos a écrit:
BOMA a écrit:Ndeko Kandolo, okoki ko pesa biso lien...On peut s'infomer de nous-même en attendant. Merci pour tes efforts et la bonne foi de nous édufier avec l'histoire du Zaire notre pays. Bon courage.

Moi, je voulais savoir la différence de Tétéla et les Mongo. Il parait, ils viennent d'une même famille? Si tu pourras Merci.

Boma,

yo oza kosenga Kulutu Emma apesa yo lien. Pour lui,c'est du vecu donc c'est des choses qu'il sait via ses relations de l'époque.
Il y a de fois des gens qui écrivent sur notre histoire en omettant beaucoup d'erreur,donc tu peux archivé ces écrits.

Merci Kulutu Rico, j'ai cru que c'est possible d'avoir un lien. Mais M. Emma Kandolo est une bibliothèque vivante
BOMA
BOMA


Revenir en haut Aller en bas

Prise du pouvoir de Mobutu Empty Re: Prise du pouvoir de Mobutu

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum