congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le deal à ne pas rater :
Manga Chainsaw Man : où acheter le Tome 17 édition Collector de ...
19.99 €
Voir le deal

SECRET ETERNEL

+9
C.Ryma
mongo elombe
Arafat
El-chaman
Mwana ya Congo
ORLY
Satya
Mathilde
FLEUR DE LYS
13 participants

Page 13 sur 14 Précédent  1 ... 8 ... 12, 13, 14  Suivant

Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 28/7/2009, 2:58 pm

lol,ozo imaginer kk ti sikoyo,
kiekiee nazo zela kasi,mais ebangisi ngai
mwa ndambu okomona boye esi omona ngai,
wow,yango oko desiner ango to eza kk cualquier foto
kiee Sulmany bon ewumela te,lol
a+

Sulmany a écrit:Laelce, kobanga te avatar nakotia yango. Nazali naino ko imaginer ndenge ozali, tango nakokanga elongi na yo bien, bien ebongo nakotia yango.
Baluka naino boye namona yo de profil. Kiekieeeeee

Sulm@ny

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Sulmany 28/7/2009, 7:45 pm

Donc Laelce olingi koloba ete oyebi ngai te ? Osekisi ngai kutu ee
Kiekiekiee.
Foto na yo ezali nakati ya téléfone na ngai Ah ahh.
Nakosala yo kaka surprise Laelce Bonzenga kiekieee
Omoni te ndenge Fololo atiki biso na posa ya suite ya lisolo naye ?

Sulm@ny

Sulmany


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  mongo elombe 28/7/2009, 7:50 pm

DESIRE alias Papa FOLOLO abungi atiki biso na SUSPENSE.
mongo elombe
mongo elombe


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 28/7/2009, 8:39 pm

Na repondre yo trankilement
olobaki que oko tia avatar moko boye lelo
aprés ekomi ooh ozo imaginer,sikoyo ekomi
soki nayebi yo te ee ooh soki nakomi lisusu na telefone
portable nayo,wow! Sulmany mwana panama,je comprend plus rien
yo kk mais eza impossible LAELCE grandprêtremére ya palais na ngai
na bima na potable nayo ouf impossible.
Naleki na ngai,a+



Sulmany a écrit:Donc Laelce olingi koloba ete oyebi ngai te ? Osekisi ngai kutu ee
Kiekiekiee.
Foto na yo ezali nakati ya téléfone na ngai Ah ahh.
Nakosala yo kaka surprise Laelce Bonzenga kiekieee
Omoni te ndenge Fololo atiki biso na posa ya suite ya lisolo naye ?

Sulm@ny

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Sulmany 28/7/2009, 10:11 pm

Laelce éééé !

Oleki na yo kaka ! Tokomi kaka lobi.

Na imité na ngai yo te.


I am ....fierce...SULMANY tjrs original !!!
SECRET ETERNEL - Page 13 Bhg3
La beauté naturelle tjrs à la source Laelce
motema pembe, sourire le plus recherché
un coeur rempli d'amour....SULMANY si lo valgo

Sulmany


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 28/7/2009, 10:40 pm

Vaya Sulmany,
que te pasa?

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Sulmany 29/7/2009, 11:06 pm

Tou está bien Laelce. Oh Ma belle ! Peux-tu me dir comment se prononce ton pseudo ?
Omoni Mr Fleur de Lys te ?

Sulmany

Sulmany


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 30/7/2009, 1:14 am

Sulmany,laisse moi trankile,ok
tu me soul avec tes question bidon,oye na retard
na forum ya plein des sujet et plein des rubrik essaye
de parcourir le forum,moi entoucas fiche moi la paix
pas besoin de te connaitre c pas ds mes priorités.
Alors bonne comprehension,a+


Sulmany a écrit:Tou está bien Laelce. Oh Ma belle ! Peux-tu me dir comment se prononce ton pseudo ?
Omoni Mr Fleur de Lys te ?

Sulmany

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Sulmany 30/7/2009, 9:43 am

Bonjour ! Laelce,
Veuille bien m'excuse si je t'ai offensée. Tango na tangaki ete ozali un coeur rempli d'amour, motema pembe, le sourire le plus recherché, nalobi ete tika nasala ye mua blagues.
Koya kala to sika na forum oyo ne veut rien dire.
Nalukaki kaka toseka, mis nasakanela yo te. L'inconnu que l'on ne voit pas, on ne sait pas coment il est, qui il est, etc...

Oublions cela, ma chère.

Que Dieu te bénisse !

Sulmany

Sulmany


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Tsippora 30/7/2009, 4:04 pm

Evil or Very Mad Evil or Very Mad Evil or Very Mad Je deteste rater des episodes apres c'est difficle a suivre Evil or Very Mad Evil or Very Mad lol!

Laelce, na yebaki te que osilikaka pe Razz Laughing
Tsippora
Tsippora


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  mongo elombe 30/7/2009, 4:14 pm

Nga mpe nakamwe parceque je ne vois pas ce que que Sulmany a dit de mal.
mongo elombe
mongo elombe


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Satya 30/7/2009, 4:19 pm

il y a de ces gens qui viennent s'inscrirent dans le but de taquiner les filles..... Evil or Very Mad Evil or Very Mad Evil or Very Mad .....laelce laisse tomber.....
Satya
Satya


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 30/7/2009, 4:31 pm

Non nasilikakate,lol
Je suis claire coe l'eau,salut!

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Satya 30/7/2009, 4:41 pm

laelce a écrit:Non nasilikakate,lol
Je suis claire coe l'eau,salut!

té n'est pas honte ma chewie, dans la vie il faut pé kosilika ma chere sinon batu ba kobanda ko sakana nayo trop surtout na net oyo, trop de rigolos.....
Satya
Satya


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Tsippora 30/7/2009, 4:45 pm

Comme toi Ma'Mongo, j'ai rien pige Embarassed Very Happy Mais j'ai qd meme trouve la reaction de Laelce amusante. Laelce, na ndenge okomaka awa, je comprends que notre ami soit un peu bouleverse Razz Laughing Laughing Laughing

p.s. c'est juste pour rire, faut pas mal le prendre hein Very Happy Wink
Tsippora
Tsippora


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 30/7/2009, 4:50 pm

kiekiee Satya,bon
ko silika je sais pas,mais ds ma vie reel
oui nako silika pona likambo ederranger ngai pe devant
mutu nazo mona,mais na net,pff para que!nalekisa hr.
na mutu kutu nayebite,moi j'aime liberté d'expression nasekaka
trop j'aime l'humour mais ezala tjrs bien placé pe na moment precis
na internet difficil de savoir le but na makomi ya mutu,ezalaka bien
kamwa precision,sinon te kara!
Na net nakolakisa position na ngai,mais kosilika te
d'ailleure kan j'ecris nazalaka na kanda tein,j'ecris ce que je pense,voila!

Satya a écrit:
laelce a écrit:Non nasilikakate,lol
Je suis claire coe l'eau,salut!

té n'est pas honte ma chewie, dans la vie il faut pé kosilika ma chere sinon batu ba kobanda ko sakana nayo trop surtout na net oyo, trop de rigolos.....

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Invité 30/7/2009, 4:55 pm

kiekiee maisTsiporra il faut oyebisa ngai ndenge nini na komaka?
soki lobi nayebite mais na lobi nayebisa mutu na biso,abeta tour na forum
c tout,soki a comprendre ou pas ngai kutu NAZAA,mais bon j'accepte
ses excuse,
a+



Tsippora a écrit:Comme toi Ma'Mongo, j'ai rien pige Embarassed Very Happy Mais j'ai qd meme trouve la reaction de Laelce amusante. Laelce, na ndenge okomaka awa, je comprends que notre ami soit un peu bouleverse Razz Laughing Laughing Laughing

p.s. c'est juste pour rire, faut pas mal le prendre hein Very Happy Wink

Invité
Invité


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Satya 30/7/2009, 4:58 pm

hmmm yo kaka maman na pesi yo conseil.... parce que certaines personnes sous pretexte que nous sommes sur le net en profitent pour ecrirent des betises Shocked Shocked Shocked ce qu'elles ne savent pas c'est que le virtuel n'est pas si different du réel.... et le monde est tellement très petit......surtout chez nous les congolais de la diaspora..... Shocked Shocked okomona kaka boyé ozo solola na mutu alors que c'est en réalité un membre de ta famille lol....n'est ce pas arafat et ma'mathilde Razz Razz Razz
Satya
Satya


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  FLEUR DE LYS 1/8/2009, 4:43 pm

Na bino nioso bilenge ba santu bana
congo kinshasa awa na congodiaspora,... lisaponge eeee... ooooonnnngeeeee.mbote
ya mingi na moko na moko na bino mosika esika bozali.motema oyo epona
bolingo,eza nde motema etonda bwania.tangela nga mboka nini awa na mokili esika
ba tekaka bolingo?miso pe etondaka kolula te,kasi,motema eponaka kaka bolingo
moko.boyisa motema nioso ya mokili,kasi kopima motema eloko eponi te... (YO MOKO
MITUNA SOKI BASI BA LOVA YO).


Bomba bomba mabe eloba bato ya
mokili,lelo nga papa fololo nako fungolela bino masolo kitoko ya ba pactes
ya KINDOKI.. c'est vrai,elobama boye,ndoki zoba!!!kasi ki bozoba ya kindoki
esukaka kaka desastre.likelemba na molili mokolo eko bima na miso ya bato mboka
mobimba bakoyeba.misala mabe na butu.mingi balali.kasi yo ozali koyenga yenga na
molili pona koluka milimo ya bato.mokolo ezali bako belela yo ndoki na miso ya
bato.bolanda lisolo oyo attentivement.nako meka penza ko decrire na bino ndenge
nini laelce na lisolo oyo akomaki na point ya kokoma na kindoki.nzela akanaki
te.mais,azalaki lisusu na choix te.bolanda suite ya lisolo na bosembo
nioso.


Alors,ndenge nini laelce akoma na
kindoki?avant na continuer lisolo,bolanda ndenge laelce akosamaka na compliciter
ya mama pasteur.

na ebandeli ya libala ya orly na
laelce,laelce akendaka esika ya mama moko na camp mombele pona akangela ye orly
alinga ye makasi.

sima ya ba mikolo pe mbula,laelce
azalaki confortable te na libala na ye na acte wana akanga orly na kisi alinga
ye makasi.d'ou,laelce akomaki na makanisi aluka esika akoma kosambela po atubela
mabe wana po bavanda na mobali na ye orly na libala ya bosembo.alors,bino moko
boyebi lelo na kinshasa mangomba ekoma kili kili.mokolo mususu boye,laelce
akenda na eglise moko na kitambo baloba na ye kuna penza kosambela ezali ya
bosolo.ekoma ye kuna na mokolo ya eyenga neti kaka mondimi nioso.mokolo yango
laelce alataki kitoko.akotaki losambo pe alandaki mateya tres bien.na suka ya
mayangani.soeur moko ayaki kobenga ye pe alobi na ye boye,mama pasteur
henriette musamba alingi asolola na yo.avec plaisir nioso lalce akendaki pe
bavandaki na bureau moko kaka ye na mama pasteur musamba.lokola ezalaki mokolo
ya liboso mama pasteur musamba amona laelce,azalaki currieuse ayeba nini etindi
ye akoma koya kosambela na bango.laelce muana'ngani azalaki koloba na ye
boye.soucis na ye azali koluka elongi na yezu.eza na makambo mosusu oyo azali
comforme te na libala na ye.vraiment souhait na ye penza ayeba yezu na bosolo pe
bolingo ya bomoko.voila occassion oyo mama pasteur henriette musamba akomaki ko
devier laelce sans pour autant ye moko laelce ayeba.mama pasteur apesaki laelce
rendez vs bakutuna lobi na yango na ndako na bango na mbinza.lobi na yango pe na
pokwa laelce akendaki na rendez vs.ekomaki laelce kuna.mama pasteur musamba a
presentaki laelce na mobali na ye papa pasteur pierre musamba.sima na yango nde
bango mibale bakomaki kosolola masolo na esika na bango kaka mibale.mama pasteur
atunaki na laelce soki au juste probleme na ye ezali nini?soki akoki ko explique
na ye na mozindo po ayeba.laelce pe na confiance nioso alobelaki mama pasteur
ndenge akanga mobali na ye orly na kisi esika ya mama moko na camp mobele po
alinga ye makasi.suite ya vie conjugale bazali ko vivre,ye laelce azali lisusu
confortable te na bisalasala ya misala mabe po baza kobota te.


juste une parenthese na bino bandeko
n'angai ya basi mama mongo elongo na ba misusu,biyoka yoka na bisala sala ya vie
ya lelo bokeba.

koluka te oyeba ndenge nini moninga
na yo muasi azuaka?mbongo,bilamba,ba voitures,mibali ya sango bo keba ba ndeko
basi.koyebana ezali nde ngambo monene baninga.ebele ya baninga basi mosusu
tomonaka abala te kasi aza na bana mibale to misato.akosala bosoto ya kindumba
na miso ya bana oyo ye moko aboti.alors,lobi lobi soki muana oyo yo moko pe
oboti akomi na bisala sala,cela justifie le terme tel mere tel filles.yokela
mobali na yo pe bovanda na libala na moke bozuaka.soki te.mokolo ezali yo pe
okozala du genre et du nombre.ata obombi na kuzu,mokolo ezali ekoyebana obetisa
na mibali misusu.(oyo eza toli ya nga papa fololo.oyo oko loba aiiii ve dire eza
ye).


la suite,
reaction ya mama pasteur musamba
ezalaki boye,wana eza petit probleme leki n'anga laelce.nako mema yo na mama
moko ye a utilisaka kaka mayi na losambo.ba biloko wana nioso ekolongwa.yo moko
okomona changement na libala na yo.okobota bana basi pe mibali de generation a
generation.sima nde,mama musamba akomaki ko explique na laelce ba ideologie ya
misala ya mabe du genre affermisement.

bolanda sikoyo ba secret oyo mama
musamba akomaki koteya laelce.


1,ya liboso,mama musamba azalaki ko
explique na laelce ba differents monde oyo mingi na mokili bayebaka te.eza
neti,la nuit.. ezali mokolo oyo ba bengaka yango mokolo ya bandoki banganga.eza
monde mosusu oyo satan asalaka misala na ye ya mabe.puissance malefique eza kaka
na effet lorqu'il est nuit.pendant la nuit,ndoki aza na puissance ya komema
avion,voiture.tout comme aussi akoki ko atteindre l'autre bout du monde a traver
ba avions na bango oyo ba mataka.nakati ya avion wana bakutanaka na mindele pe
ba race ebele ya mokili.la plupart na bango ba bombaka bilongi na bango comme
suite.mosusu okoma ye na elongi azali ngulu(porc),kasi le reste ya nzoto azali
na ye normal.donc moyen oyeba secret ya moninga ezali te.bakutanaka kuna na ba
ministres,ba presidents,ba pasteurs,ba savants,ba muscisiens,ba leaders ya ba
politiques ya monde mobimba.etc... voila en bref nini oyo monde oyo la
nuit.mingi elekanaka na butu biso toyebaka te.eza neti na kin. PONT YA MATETE
ezalaka grand marche ya ba ndoki.eglise catholique ezali part ya refuge ya ba
ndoki ebele na monde oyo.souvent lelo na kin.mingi bakoma kosambela.alors,na
retour ya bandoki,defois bakutanaka na moto ya ba prieres.le seul endroit ya
refuge eza eglise catholique na messe ya tongo ya six heure.


2,cimetiere,esika tokendaka kokunda
moto soki akufi.ezali monde oyo ba bengaka yango monde ya kufa.monde ya au
secoure.bato ya misala mabe se communique na ba kufa po milomo ebele
etelenganaka po mokolo na ye ya liwa nanu ekoki te oyo lelo tobengaka ba
demons.na cimetiere kosuana ezalaka,ki motema mabe pe ezalaka.ba feticheurs
basalaka recours na ba kufa pona ko resoudre ba probleme ya basusu awa na mokili
ya se.puissance ya kufa ezali inter poser na esprit misusu ke je ne peu vous
explique.yango lelo na mokili lingala moko elobama boye.SOMO YA EBALE ELEKI YA
CIMETIERE,au fait,ezali nde allussion ya deux monde differents.ebale na
cimetiere ezali ba monde oyo satan azali ko diriger.soit...


3,ebale mozindo etondi milimo
ebele,ndangisa moko eloba boye.zua poisson oyo azali vivant pe tika ye na mokili
sans l'eau?suka na ye kaka liwa.tandisque,yo moto oyo ozali ko vivre awa na
mokili,ezali imposible pona yo o vivre na monde ya se ya mayi po okokoka ko pema
te.voila la difference ya le pourquoi ya ba monde oyo mibale.liwa ya ebale eza
kaka ba compte rendus ya ki bozabolo na famile na yo.

couleur ROUGE ezali accepte ata moke
te na monde ya ebale.milimo mabe emonaka yango toujour neti makila ya moto.si
jamais na la vie ya mokili,moto amema molimo na yo na se ya mayi,eza etumba
monene pona o reccuperer yango.bo bosana te ebale pe emelaka ba bateau pe milimo
ya bato.MAMI WATA nde reine ya ebale oyo tomonaka.mami wata pe azalaka
jalouse.akopesa yo nioso oyo oko senga ye selon ba pactes boyokanaki.une fois
obebisi bikila nde esika ekomaka complique.suka na yango oko futa kaka molimo
oyo ya yo moko.


4,libumu ya muasi na zemi.ezali
monde mosusu po un sorcier akoki kokota pe aleyi muana na yo pe ye moko a
remplacer nakati ya libumu.

alors,soki muasi na zemi azali
koyoka zemi na ye kilos ya makasi koleka,wana boyeba nde eza milimo mabe eza na
libumu na ye.lelo na kin,basi na ba zemi baza na ba risque ebele a travers
milimo mabe.surtout soki osambelaka te.omelaka masanga otala te.oza na zemi
olingi kokende ba matanga.biyenga yenga na butu yo muasi ya zemi na tango oyo
milimo mabe ezali ko circuler.malamu na yo oyo otangi pe oyoki.kasi mawa na oyo
aza matoyi mangongi.


5,matanga,monde oyo esika milimo
mabe eyaka ko solliciter moweyi pona akoma moko na bango na monde mosusu sima ya
liwa.yango lelo tomonaka,mayi oyo basokolaka ebembe tango akufi,ebele bakoma ko
utiliser yango pona lupemba na b'affaires na bango.j'espere boyebi lisolo ya
mama oyo azalaki kosala mikate(beigne na victoire).mama oyo azalaki ko utiliser
mayi basokola ebembe na miliki ya mabele na ye.ezalaki na bato ya mituka
bazalaki kowuta mbinza tiiii na victoire kaka pona mikate wana ya butu.mama oyo
asala succees na ndenge na ye sans pour autant bato bayeba k eza nde ba effets
ya milimo ya moto akufa...kie kie kie... kinshasa mambweeeee.


6,zamba,monde ya milimo ya
bibuele,tomona mobutu azalaki na puissance ya leopard.luambo makiadi guitard
azalaki kobeta azalaki nde mobende(cuisse ya sirene mami wata).j'aimerais bien
na fungolela bino mua passage moko.tango eva aliaki mbuma na jardin eden,ba
effets wana pe ekita tiii na ba niama.lelo oyo po niama ya basi babotaka na ba
meme douleur k etre humaine ya muasi.alors,langue nini ba niama balobaka?po nini
biso ba etre humain toza na accee te na zamba?voila ba raison oyo mam musamba
azala koyebisa laelce.


7,dedoublement,ndoki akoki kolata
nzoto ya moto mosusu pona a reussir operation na ye.na yebi lisolo moko ya vieux
mungulu diaka.mobutu azalaki kokoka ye.donc,il fallait soeur moko kaka na kin
pire moto ya mobutu na monde mistique,alata nzoto ya pire masta ya muasi ya
mungule diaka.muasi yango azalaka kotambola na renault 25 si je ne me trompe
pas.apres avoir femme oyo amonaka kaka femme wana na miso na ye cambarade ya
muasi ya vieux mungul,cette femme,elle a reussit d'abort ya ko affranchir ba
garde na porte d'entree principale.tango nde akomi na kati nde azongelaki nzoto
na ye normale.c'est a partir ya awa nde mobutu azua vieux mungul diaka a noma
ye primier ministre juste pour deux semaine.sima nde akomaki kosala ye ezala
zala soit disant ministre extra oyo ezali kutu na constitution na lois ya zaire
te.le 24 avril na kin,precisement na manifeste ya n'sele le jour ou mobutu aloba
COMPRENNE MON EMOTION.

ezalaka nde dedoublement ya
leopard.j'espere tomona passage oyo cameramen azua mobutu en face pe miso ya
mobutu emonana noir sur blanc k ezali nde leopard.


Au fait,voila en bref nini mama
pasteur musamba azalaki koteya laelce pona azala na idee ya nini elekana awa na
monde ya se.le meme jour wana na pokwa na yango,selon rendez na bango.mama
pasteur musamba alobi na laelce aya na 20h00 basala veuillez de priere.laelce pe
alobelaki orly pe orly apesaki ye accord.na butu na yango nde esika makambo
ebanda.mama pasteur na nuit wana azua laelce batelema likolo ya tapis moko na ba
minuit,sima na yango nde bakomaki na monde ya se ya mayi.laelce amona ba kimona
meso.

ba leaders ya musique na biso,ba
pasteurs,ba homme politiques et consorts.alors,tango mama oyo a presenter laelce
na ensemble na bango,ekomaki deja trop tard pona laelce a changer avis.ba talisa
ye na kitala tala moko pe amona mobali na ye orly.donc,ba senga na laelce a
livrele bango orly akomo neti ntaba na bango.en plus de cela,ba pesa ye pacte ya
21 jours na liwa.elingi koloba boye.apres 21 jours ya ba regle na ye,il faut ye
laelce alala na moto moko akufa sans pour autant ayeba soki azo lala na
nani.rendez vs nde na cimetiere.

bikilila ba pesaki ye akoki kolala
na mobali mosusu te apart orly oyo akomi ntaba na bango.kobota na papa jean eza
eloko oyo ezalaki planifier na monde wana juste pona ko tromper atmosphere ya
bato.entre temp,bana wana pe oyo akobota bazali milimo moko boye ya monde wana
ya se ya mayi.


NB,tres chers(es) freres et
soeurs,mokili oyo eza ya kobeba,na makomi penza eza difficile na lobela bino
makamo nioso ya ba monde oyo.

mais,bozala prudent na mua temp oyo
nzambe apeseli yo po ovivre.pose toi une seul question?a qui il faut faire
confiance?ngai oyo nazali kokomela bino naza mosantu te.ngai pe ba betela ngai
lisolo ndenge nazali kobetela bino.bo keba na bi suivra suivra,mokolo ezali
okokoma ndoki okana te.surtout bino ba soeurs,mibali ya sango keba... lisusu na
lingi boyeba boye,mingi tomonaka lelo bakoma komela masanga juste pona ba
soucis.kasi soucis wana toyebi te soki likambo yango nini?en plus de cela,mingi
lelo pongi ya butu ekomela bango ngambo juste kaka pona ba compte rendus na ba
mauvais esprits.voila oyo nakokaki kolobela bino ndenge mama pasteur musamba
amema laelce na mokili oyo akanaka te.

FLEUR DE LYS


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  FLEUR DE LYS 1/8/2009, 4:45 pm

BOLANDA SIKOYO SUITE YA LISOLO NA
SALLE D'ATTENTE NA MAMA YEMO...


Na nuit ya dimanche a lundi
wana,avant ba scenes nioso oyo esalema,selon ndenge laelce azalaki ko explique
na bango tango asengaki bango parole.ezalaki nde boye.na monde oyo ya se ya mayi
ye laelce azalaki partisant.azalaki pe na bomengo na ye na ndenge na
ye.

alors,tango azongi esika ya ba
parents na ye,mode ya vie ezalaki lisusu la meme chose te na ndenge azalaki
esika ya orly.ye moko laelce na butu ya dimanche a lundi,tango akendaki na monde
na bango.azu mercedez moko na toyota hiace aya na yango a parka yango nakati ya
lopango na bango na sac moko du genre sac ya mamou plein de dollar.wana nioso
ezalaki kolekana na butu.sima nde azonga na ye na pongi.na tongo na yango tango
alamuki,atala esika voiture mercedez ezalaki,amoni linzanza(boite conserve) ya
sardine.esika toyota hiace ezalaki nde amoni lipapa moko ya musuni ya bata.atala
sac oyo ezalaki na ba dollar nde amoni makasa(feuille)ya manga.esika nde laelce
akomaki komona ete akomi na suka ya monde wana.

lisusu azalaki koloba na bango
boye,wana baza kaka na salle d'attente,na ndako oyo bavandaki,ezalaki na cuisine
na bango na coin moko ba cassier ya masanga ezalaka wana,esika wana na butu
ekomaka chambre moko ya mistique esika oyo bazalaki kokanga esprit ya
orly.

la premiere fois asala orly biloko
ya mistique ezali nde boye.mokolo moko azalaki na ba periode na ye.azuaki makila
wana atielaki yango orly na caffee juste pona domination.donc ye laelce akoma na
autoriter soki alobi likambo orly il faut kaka ayoka.en bref,laelce azalaki ko
faire croire na bango k oyo ezali le vrai orly te.donc pitakani ekotaki wana na
salle d'attente entre bango na bango.nani akotuna motuna po ezalaki nde kosala
bango nioso somo.wilco,docta chaman,satya,mathilde,2(fi),arafat elekelaki bango
na nioso oyo laelce azalaki koloba.

alors,bino moko boyebi kaka na ba
kin,ba mama oyo basambela ya mitema malamu bakoma pe kokende na ba hopitaux
kosambela bato bazali na malade.yango esalaki k,mama mongo elombe na baninga na
ye lisusu mibale bayaki wana na salle d'attente pona kaka mateya.

esali pe kaka arafat akomi ko
explique na bango situation ya laelce.

donc,mama mongo na minute wana
azuaki probleme a main.ye moko mama mongo atuni na laelce soki andimi kobuaka
biloko nioso ya misala ya mabe pe alanda yezu comme mobikisi.kasi laelce motema
ezalaki kaka na ba doute.kala te pe docteur ayaki wana pona koloba na laelce cas
ya muana na ye mary ekomi tres grave pe bango moko ba docteur bazali ko
comprendre te.2(fi)aloba na laelce na mongongo moko ya kanda boye.ma chere
laelce,okoya kofkua liwa na makambo na motema na yo heinnn!!!sosola nioso po
obikisama.


Mama mongo na baninga na ye wana
mibale ba banda louange na kati ya salle wana na ndenge ya muke te.entre temp pe
milimo oyo laelce azalaki na yango ezalaki ko supporte presence ya mama mongo
te.mama mongo akebisa na moto nioso azalaki wana bazala prudent po milimo wana
ekoki kolongwa na nzoto ya laelce pe elati moko na bango.ve dire sikoyo moto
nioso ekomaki kaka losambo na monoko.

mama mongo basala priere ya
delivrance na nzoto ya laelce na salle d'attente wana.ba belela makila ya yezu
oyo esopana na ngomba ya golgota ezua possession ya esika bazalaki.oyo penza
boyokaka etumba contre milimo na mabe.ba kala te laelce akomaki kosanza biloko
moko bizarre genre zeyi couleur vert.priere etoka lisusu ya somo nakati ya salle
wana.etumba na milimo ya se ya mayi.le fait mama mongo na baninga na ye bazalaki
na puissance,milimo wana ya se ya mayi eya na renfort moko esala ete bango
nioso na salle wana mopepe moko eya pe ekwesa bango na mabele kambaki.mais,mama
mongo azalaki la seule ya kotelema pe azalaki ko bengana milimo wana ya mabe na
kati ya salle d'attente....... A SUIVRE DANS 1 INSTANT.


kie kie kie.... bakweyi kambaki
bango nioso,2(fi) na zemi,wilco,chaman na junior pe mathilde,arafat na satya
bakweyeli likambo bayebeli moto na makolo te.ekoyebana soki nani akotelema to pe
nani akotikala na position wana.moko na bango wana pe aza moto ya misala
mabe.mais..mais..mais.. moto yango nani???


Ezalaki nde ngai papa fololo abeta
lisolo atika posa,suite ya lisolo ds moin de trois heure,naza toujour en plein
redaction.lelo naza na bino mayele.lisolo ekomi elengi moyen
tseinnnn.


le votre, fleur de lys papa
fololo

FLEUR DE LYS


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  El-chaman 23/9/2009, 7:38 pm

Papa fololo,
Balobi bino kuna mupepe na poussiere yako sakana te.
Mabele ewuti desert,Sydney ekomi jaune ezo monana lisusu vrai te

El-chaman


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  mongo elombe 23/9/2009, 8:15 pm

Bakomi bango nionso rouge. explication spirituel où signe prémonitoire de la fin du monde.
mongo elombe
mongo elombe


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  anysha 18/11/2009, 3:51 pm

bonjour, Fleur 2 Lys kala penza moi je n'ai jamais lu l'histoire j'ai imprimé tes ecrits sur 36 pages lokala mini roman, je vais lire ca pendant mes trajets
j'espère que tu auras d'autre histoire, en plus je me souviens que osilisaki té ba histoire wa libala compliqué et muana nguba

a suivre SECRET ETERNEL - Page 13 Icon_arrow SECRET ETERNEL - Page 13 Icon_arrow SECRET ETERNEL - Page 13 Icon_arrow
anysha
anysha


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  mongo elombe 18/11/2009, 8:53 pm

Mosusu alimwa ye wana.
mongo elombe
mongo elombe


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Vieux Bord 18/11/2009, 9:36 pm

mongo elombe a écrit:Mosusu alimwa ye wana.
on dirait akenda mission na Guadalampur to na Afhganistan SECRET ETERNEL - Page 13 Icon_biggrin
po toyokaka ata nsango ya pamba tein SECRET ETERNEL - Page 13 Icon_biggrin
Vieux Bord
Vieux Bord


Revenir en haut Aller en bas

SECRET ETERNEL - Page 13 Empty Re: SECRET ETERNEL

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Page 13 sur 14 Précédent  1 ... 8 ... 12, 13, 14  Suivant

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum