congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le Deal du moment :
Cartes Pokémon 151 : où trouver le ...
Voir le deal

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

3 participants

Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  Emmanuel-Kandolo 20/7/2009, 2:55 pm

Ba ndeko, Tozongela mua moke ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973. Na cadre ya masolo maleka, tika tolobela naino ndenge Association Sportive Victoria Club (VITA Club) ebimaki championne ya neuvième édition ya Coupe d’Afrique des clubs champion na 1973. Mpo na kokende kobeta Coupe d’Afrique des clubs champions, esengelaki club ebima yambo champion ya ligue régionale = provinciale (Kinshasa ezali administrativement na statut ya région) mpe sima ekende kokutana na ba champions régionaux mususu na compétition ya Coupe du Zaïre. Soki équipe elongi Coupe du Zaire, wana ekokende ko représenter Zaïre na Coupe d’Afrique des clubs champion. Na yango, na finale ya Coupe du Zaïre, A.S. Vita Club elongaki T.P. Mazembe na match aller na Kinshasa na score ya 3-2. Na match retour na Lubumbashi, Mazembe akokokaki kolonga Vita te. Apolaki na 1- 2. Vita ebimi champion du Zaïre na 1972, mpe ekeyi kobeta neuvième édition ya Coupe d’Afrique des clubs champion na 1973. Na premier tour, Vita ezalaki qualifier d’office mpo na niveau général ya football na biso. Na huitième des finales, Vita esengelaki akutana na Mighty Jets ya Jos, na Etat ya Plateaux na Nigeria. Yango ebimaki Champion ya Nigeria mbala ya liboso na 1972, yango nde esalaki que abeta Coupe d’Afrique des clubs champions mpe mbala ya liboso na 1973. Kasi match ebetamaki te mpo yango e se retiraki na compétition. Donc, Vita aleki na quart des finales. Tango Vita akomi na quart des finales, akutani na Stade Malien. Na match aller na Kinshasa, Stade Malien eliaki 3 à 0. Na retour na Bamako, Vita alongi lisusu kuna na 4 à 1. Na demi-finale, na match aller na Kinshasa, Vita alalisi Léopards de Douala ya Cameroun, na 3 à 0. Na retour na Douala, Vita apoli na 1 à 3. Vita ekeyi finale na faveur ya règlement oyo elobi que na cas ya égalité des points et des buts, les buts marqués à l’extérieur comptent double. Na finale ya Coupe d’Afrique des clubs champions, Vita akutanaki na Kotoko de Kumasi le, 25 novembre 1973. Kasi pendant préparation ya match aller, mauvaise nouvelle ekueyi : « Jeff », « Gento », « Seigneur » asali accident. Stupeur ! Wana mardi le, 20 novembre 1973. Nini wana lisusu ? Vita esengelaki akende na Kumasi na Ghana, mercredi le, 21 novembre 1973. Ba examens nionso na ba radiologies esalemaki, ba médecins balobi que azali na ba blessures graves te. Bon, décision ezuamakii que Kibonge asala kaka voyage wana ya Kumasi. Soki a se rétablir vraiment te, wana akopema na banc. Vita ekeyi na Ghana, mercredi. Vendredi , biso, tokomi na Accra na Kotoka International Airport, via Lagos. Yambo kokita na centre ville esengelaki kosala déclaration ya mbongo mpe sima ko changer yango na ba bureaux ya change ya aéroport Kotoka. Sima ya échange ya ba zaïres na cedis engelaki ko garder ba reçus malamu mpo na sortie ya territoire ba douaniers bakoki kotuna yango. Samedi esengelaki kosala 255 Km entre Accra na Kumasi. Voyage ekokaki kosalema ata dimanche na tongo, kasi samedi ezalaki mieux mpo na ko profiter na zando ya munene ya Kumasi. Na voiture distance wana esalaka trois heurs, na mini-bus ezali quatre heures du temps. Nzela ezali en bon état. Ba Ghanéens, très sympathique mpe fair-play. Lisolo pepele mpe ba échanges ezali vraiment koleka na ba amities nionso. Na Kumasi, moitié ville, moitié village, mobilisation ezalaki ya kosakakna te. Batu nionso balati pembe mpe bazalaki na elikya que Vita akopola mpe Kotoko na Kinshasa eko réussir exploit oyo esalaka face na Mazembe. Na nse ya moyi makasi 38 ºc, animation liseki te. Batu bazali kaka kozela ndenge nini Vita akopola. Stade ya Kumasi, Kumasi Sports Stadium, na l’époque ezalaki munene mingi te (20.000 places environs lelo ekoma na 50.000 places C.A.N. 2008, mpe ekoma kobengama Baba Yara Stadium. Mpo na ba oyo bayebi, baba Yara azalaki international ghanéen mpe joueur ya Kotoko). Kasi entretien ya pelouse ezalaki kitoko. Neti kaka ba stades na biso nionso ya Afrique ezalaka, eyebanaka te, nani nganga, nani officiel, nani membre ya comité ya équipe, nani azali nani ? Na tribune, rarement anglais ezali kolobama. Souvent lokota ya mboka Ashanti. Na rares masolo na ba ghanéens na stade, bazali koyebisa biso que Kotoko ekendaki na lac Bosumtwi, un lieu sacré na périphérie ya Kumasi, message ebimaki kuna ezalaki que Vita ekopola na 4 à 2. Matoyi ezali kaka koyoka !!! Kobanda Accra na hotel, na nzela ya Kumasi, koleka Nsawam, Nkawkaw tee kokoma na Kumasi, doute ezalaki te na défaite ya Vita. Samedi na marché tango nakeyi kosomba ba tissus traditionnels ya Kente, vendeur ayebisi ngai même chose que Vita akozala na buale. Ngai mpe nazali kozongisa que finale ebetamaka na deux manches : aller na retour mpe Vita banda abanda Coupe oyo, etikala ko encaisser but na Kinshasa te mpe etikala kopola te !!! En plus, ezali na ba internationaux oyo balongaki Ghana na Kinshasa na 4 à1 na sanza ya août ya mbula oyoba mpe na novembre oyo tolongi Zambie na aller 2 à 0 na Lusaka mpe na Kinshasa 2 à1, sans ko compter ba défaites ya Haut Volta aller na retour 4 à1 mpe 5 à1, na Cameroun 2 à 1 na Kinshasa. Donc, Vita azali na bilombe !!! Kotoko etiaki équipe oyo : Gardien : Botwe ; Na défense : Dadzie, Dan Oppong, Brenya, Acquah; Na milieu : Yaw Sam, Kwane Nti ; Na attaque : Joe Sam, Essien, Gordon na Malik Jabir Lawal a remplaceaki Essien mpe Osei Kofi azuaki place ya Gordon. Entraineur : Boakye Vita : Gardien : Pombi Litinda « Coco »; Na défense : Lungwila Ndongala, Luyeye Pondi, Matondo Matudi, Lobilo Boba « Docta »; Na milieu : Kondi Affa Luvu « Technicien », Mungamuni Muniangui « Asmara », Kibonge Mafu « Seigneur Gento» Na attaque : Ndaye Mulamba « Mutumbula, Volvo », Kembo Uba Kembo « Monsieur buts, Jean Pépé », Mayanga Maku « Goodyear, passe-partout ». Remplaçants : Tubilandu Ndimbi, Musungu wa Musungu, Mambwena, Ngoie « Bavon », Mavuba Mafuila « Ndoki ya ndombe », Nsangu, Ngassebe, Ntumba kalala « Pouce », Mavuba Mafuila « Ndoki ya ndombe » a replaceaki Kondi Affa Lavu « Technicien ». Entraîneur : Kalambayi Ngoie, adjoint na ye Diantela Tango match ebandi, défense ya Vita ebandi mbala moko musla. Joe Sam abandi kokimisa bango mbangu na kosopa, makelele na stade ya ndenge wana. Sima, Malik Jabir na ba bribles na ye, alalisi Lungwila, akombi Matondo mpe atindi munduki. Pombi amibuaki, lokuta !!! Ekangami : 1 à 0 na 8 ième minute. Vita eluki na ba occasions, kasi précipitation ya ba attaquants ezali kosala que occasion ezala concrétiser te. Kasi elembaki te, na komipesa wana nde Mungamuni « Asmara » ayaki kozua cornet mpe tango akati yango, Mayanga a égaliser na 1 partout na 26 ième minute, tee sima, mi-temps eye na score wana. Na retour, Kotoko apelisi moto mpe défense ya Vita ekomi passoire : 52 ième, 57 ième na 59 ième munute e encaisser trois but. Joe Sam atie mibale mpe munduki en tire croisé ya Olivier Acquah, sima ya kosopa Lobilo na Luyeye, nde esalaki 4 à 1. Tango Mavuba « Ndoki ya ndombe » akoti, nde aye kotia sur penalty na 65 ième minute. Il faut ko reconnaître que attaque ya Vita e tournaki vraiment malamu te mpe défense eyaki kozua poids nionso ya match. Na suka ya match, Président Opango alobi que esala rien, kasi na Kinshasa, Kotoko akozika na moto ya lifelo. Na hotel, Président Lokwa ya Fédération Zaïroise de Football (FE.ZA.FA). abuaki : « ndenge nini ko noyer Kotoko na Kinshasa? » Heure Vita azongi na Kinshasa, mbala moko azongi na beaux cadre ya Motel F.I.KIN.na Limete mpo na ko préparer match retour contre kotoko. Léopards mpe ezalaki kuna mpo na ko préparer match ya décembre contre Maroc mpo na éliminatoires ya Coupe du Monde 1974 na R.F.A. Mercredi, 12 décembre 1973, Kotoko de Kumasi akomi na Kinshasa. Kotoko ou Black Stars bameseneki déjà koya na Kinshsa mpe bayebaki malamu que tango nionso bayaka, balalaka na centre Ville na luxueux hôtel Memling. Wana ezalaki ndenge esengelaki elekela. Cette fois-ci, Président ya FE.ZA.FA. a changer esprit. Ba instructions epesamaki na chauffeur ya bus que amema bango na hôtel ya cité. Bus nini FE.ZA.FA e louaki ? Bus Toyota oyo ebandaki mingi mingi kosala Pont Cabu- Kintambo Hôpital, Kintambo magasins. Bus wana ekumbi délégation kobanda na aéroport ya N’djili tee na Yolo-Sud na hôtel du Midi. Donc, na hôtel du Midi nde esika ba joueurs esengelaki balala mpe na hôtel Commodore, toujours kaka na Yolo-sud, ba officiels. Na makele oyo ezalaka na wenze ya Yolo wana, terrain ya Kapela, églises ya protestant na sima, éeglise catholique mua liboso sur Kimuenza, station ya essence kaka na pembeni wana, plus miziki oyo ebetamaka epayi ya Maître Ngombe « Taureaux » na loyenge oyo ezalaka na centre wana, batu koleka leka, ndenge nini vraiment équipe ekoki ko se concentrer na finale ya Coupe d’Afrique ? Monsieur Emmanuel Baidoo atomboki akeyi tee na ko menacer na ba ruptures ya relations diplomatiques. Ye azalaki Commissaire de district ya Kumasi mpe Chef de délégation. Monsieur Baidoo asengi na chauffeur akumba bango na hôtel Memling mpe Kotoko ekofuta ba frais ya hôtel yango moko. Chauffeur aboyi, alobi na bango que ye, FE.ZA.FA eyebisaki ye que ba joueurs na hôtel du Midi, ba officiels na hôtel Commodore, point Final. Na incompréhension wana, délégation ya Kotoko ekomaki obliger ya kozua une dizaine ya ba voitures taxis te na hôtel Memling. Bakoma na Memling boye, ba chambres libres ezali ya kokoka te. Lobi kaka nde ba départs ekosalema. Nzala epayi, fatigue epayi, kanda epayi, délégation ekumbami na résidence ya ambassadeur ghanéen na Binza ma campagne. Bakeyi epayi ya ambassadeur, Kuna nde basukolaki, baliaki mpe balalaki na ba chambres na salons esika batandaki ba matelas.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Re: Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  Emmanuel-Kandolo 20/7/2009, 2:58 pm

Na tongo, zela bus, bus ezali koya te, zela,zela, tee vers midi bus eye ! Batuna chauffeur boni na retard boye ? Oh, nabandaki kozela bino na hall ya hôtel Memling !!! Epesi ba ghanéens kanda lisusu, bamoni vraiment que chauffeur azali kotiola bango. Oh, non, mpo lobi bozuaki ba taxis, bolobaki que bokokende na hôtel Memling. Or, na tongo na yango, ambassade ya Ghana na Kinshasa etindaki télex mpe e téléphoner FE.ZA.FA. mpo eyebisa que Kotoko ezali na Binza ma campagne epayi ya ambassadeur !!! Ba joueurs bakoti, bakeyi ko s’installer nanu na hôtel Memling na ba frais ya gouvernement ghanéen. Sima bakeyi na entraînement. Batala boye, stade du 24 novembre. Oh ! Batuni lisusu chauffeur, mais esengeli tokende na stade du 20 mai ? Chauffeur azongisi que non, ngai FE.ZA.FA. eyebisi ngai que nakumba bino awa epayi mususu te kaka awa, sima nazongisa bino na Memling. Stade du 24 novembre na état oyo ekomaki ya koboboka ekokaki vraiment ko permettre na Kotoko esala entraînement wana te. Mayi ya mbula wana, mataga, matiti lilayi, bisika mabele, bisika zelo, bisika mabele ekoma lokola mabanga, mpe batu naye wana ebele lokola match ekobetama. Impossible. Neti ba ghanéens baya Kinshasa mbala na mbala (dernière fois ezalaki na août 1973, na cadre ya éliminatoires ya Coupe du monde ya Allemagne 1974) basengi na chauffeur akumba bango na Collège Boboto esika ba équipes visiteuses esalaka dégraissage na tongo. Chauffeur alobi que rien, ye azali na programme wana te !!! Finalement, délégation e décider ezonga epayi ya ambassadeur ko s’entraîner na pelouse ya villa ya ambassadeur !!! Na pokua baye kokende na ba moyens na bango moko na Collège, Vendredi mpe lokola. Donc, Kotoko ayaki kaka komona stade du 20 mai mukolo mua Finale. De son côté, Vita ebandaki ko préparer finale na calme na sérénité nionso. Ezalaki loger na Motel Fikin mpe ebandaki kosala dégraissage na tongo tongo na terrain ya Saint Luc na Limete. Na pokwa, na stade du 20 mai. Na veille ya match, il fallait koyeba soki ndenge nini laboratoire ezali kosala ba prévisions mpe résultat finale ezali nini ? Côté wana, ba dispositions ezuamaki na ndenge ya liseki te mpo Franco atiaki ndaku na ye ya Binza I.P.N. na disposition ya staff ya laboratoire. Vieux Aponga ye moko azalaki ko assurer bonne organisation ya comité de recherche. Mais na butu, infos moko eye kobima que un des nganga azali na besoin ya masuba ya muasi awuti kobota mapasa mpo sans yango, victoire ezali possible te mpe il faut masuba wana emonana avant minuit!!! Ba téléphones ebandi kobetama na ba ndaku, batu batamboli na ba hôpitaux nionso ya Kinshasa tee eye kozuama na clinique universitaire. Samedi na butu, stade ezalaki travailler mpe miner comme il fallait mpe batu ya comité de recherche na ba policiers mobiles balalaki kuna. Kutu kobanda 18 heures epekisamaki kokatisa lopango ya stade du 20 mai. Na butu na yango, Président Mobutu abengi mpo na ko encourager ba joueurs, mpo ye azalaki na Paris na visite officielle. Dimanche na tongo, batu babandi kokende na stade du 20 mai, vers ba 13heures, stade esi etondaki lokola liki : batu bamaki na ba poteaux ya projecteurs, na ba nzete oyo ezalaka sima ya ba pourtours, tee na mabanga oyo ezali na mopanzi ya ba pourtours. Stade etondaki makasi. Na kotonda wana, batu ebele mpe batikali libanda. Kotoko aye, akoteli côté ya Imana, tango wana na Coupe d’Afrique, makambo ya kokumisa équipes ya ba paya ezalaki te. Imana na Bilima bafandaki nien mpe babandaki kobetela Vita maboko même soki ezalaki kokumisa lokola ya Moscou te. Muke te, ba klaxons ebandi kobetama, mua agitation, protocole na ba imposteurs bango wana mbangu mbangu, kobaluka baluka, ba portes ya stade efunguani même côté Kotoko akotelaki, cortège ya ba voitures ebandi kokota, makele epayi, putulu komata, wana ba groupes ya animations oyo batiaki sima ya ba buts ebandi lisusu ko chauffer, ambiance ya kosakana te. Bana Vea baye, détermination ezali komonana na biso ya ba joueurs na ba dirigeants, laboratoire e confirmer lisusu score ya 3 à 0. Nionso ezalaki mise en place mpo Kotoko afukama. Président Opango Ibombo Malamu Ma Tongo abeta boubou ya vert-noir Franco, Aponga, bango nionso bazalaki na vert-noir. Vita etandi équipes oyo : Gardien : Tubilandu Ndimbi ; Na défense : Lungwila Ndongala, Luyeye Pondi, Musungu wa Musungu, Lobilo Boba « Docta » ; Na milieu : Kondi Affa Lavu « Technicien », Mavuba Mafuila « Ndoki ya ndombe », Kibonge Mafu « Seigneur Gento » Na attaque : Ndaye Mulamba « Volvo », Kembo Uba Kembo « Monsieur buts, Jean Pépé », Mayanga Maku « Goodyear, passe-partout » Ba remplaçants : Pombi Litinda « Coco », Matondo Matudi, Mungamuni Muniangui « Asmara », Ngassebe, Ntumba Kalala « Pouce », Mambwena, Ngoie « Bavon », Nsangu Ngassebe ayaki kokota esika ya Ndaye Entraîneur : Kalambayi Ngoie, adjoint na ye Diantela Kotoko : Gardien : Botwe ; Na défense : Oppong, Olivier Acquah, Dadzie, Brenya ; Na milieu : Essien, Kwame Nti, Yaw Sam ; Na attaque : Gordon, Joe Sam Malik Jabir Osei Kofi akotaki esika ya Gordon Entraîneur : Boakye Ba équipes nionso mibale ebimi, Kotoko alati tout en blanc. Vita alati maillot ya vert, manches courtes, ezali na cercle ya noir na V na kati. Short ya noir mpe na ba chaussettes ya vert na ba barres mibale ya noir. Ba casquettes Vita esalisaki ezalaki mpe na cercle na V liboso na yango. Arbitre ezalaki, Monsieur Matuvo, tanzanien. Ndenge moko mpe na ba juges de touche. Sima ya ba hymnes nationaux ya Ghana na ya Zaïre, match ebandi. Kibonge asukumi défense ya Kotoko, apesi na Kembo, incomprehension… Mavuba aningani muke, apesi na Kembo, Kembo abomi Dadzie abuakeli Ndaye mais akitisi mutu te, balle eleki likolo ya barre transversale. Kotoko mpe aluki ko réagir na Joe Sam apesi accélération, akombi Lobilo, abeti na finesse, heureusement Musungu azongaki mbangu mpe a sauver balle juste na ligne. Kotoko ezongi lisusu na attaque na tir ya Gordon, kasi Tubilandu alandi mpe akangi yango. Wana maboko ebetami mpe etie ye en confiance. Vita azali kaka ko attaquer, ko attaquer kasi but ezali kaka koya te. Détermination ya Vita ezali kokita te, Kibonge alambi milieu, apesi na Mavuba, sima azongiseli ye, kasi tir ezali faible mpo e inquiéter Botwe. Mayanga a démarrer na mopanzi, afandisi Oppong, a éliminer Dadzie, kasi Botwe alongoli tir ya Mayanga. Mi-temps eye na sore ya 0 à 0, elingi koloba jusque la, Kotoko azali na lokolo moko na titre. Na retour ya mi-temps, Mavuba alambi lisusu milieu, abuakeli Kembo, Kembo alekisi na mutu epayi ya Mayanga, goodyear atandi munduki ya giza, 1 à 0 na 55 ième minute. Wana stade du 20 mai etelemi mpe sika nzela efunguami. Tango ba centrer boye, Mavuba lisusu abuakeli Kembo, kasi le kamikaze a chargeaki Botwe ndenge ya irrégulier mpe arbitre aboyi deuxième but. Mavuba lisusu, alambi, abuakeli Kembo, sans tarder, afandisi balle mpe a tindi suka na munduki, Botwe amoni eloko te, deuxième but. Wana elingi koloba que Vita akomi champion d’Afrique. Miso na terrain, matoyi na ba sango ya labo mpo na koyeba soki troisième but wana ezali ou elongwe ? Président Opango alakisi na misapi que ezali misatu, ezali koya !!!! Dans l’entre-temps, ba groupes ya animation ezali kobeta mbunda na kobuaka biloko ezali kowuta na laboratoire na poteau ya Kotoko. En fait, ba groupes wana ezalaki mélange ya ba nganga na ba ndulistes !!! Ndaye abimi, Ngassebe akoti. Kotoko asali action kitoko, Joe Sam apumbe na mutu, kasi Tubilandu abibuaki mpo na kokanga balle wana. Na attaque, Mayanga abomi défense ya Kotoko mpe na suka Botwe abuaki na cornert. Mavuba akati cornert, Ngassebe na kembo bazui Botwe en tenaille mpe Mayanga a reprendre balle, elaki na kiyanda mpo na troisième but na 77 ième minute. Wana stade animation liseki te. Kotoko akundami mpe Vita elongoli Coupe d’Afrique. Mandradele Tanzi apesi Kibonge Coupe na ba félicitations ya Président Mobutu.Batu batondi na terrain, bazeli ba joueurs tee tango baye kobima, cortège etamboli tee na vis-à-vis, Franco abandi miziki tee tongo. Mardi le, 18 décembre 1973, Vita ekeyi na aéroport international de N’djili koyamaba Président Mobutu na Coupe, na retour na ye ya Paris. Bakumbami tee na Mont Ngaliema na deuxième fête. Wana ezalaki mua rappel ya ba bons moments ya football na biso. Sportivement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Re: Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  Arafat 21/7/2009, 8:46 am

Mua motuna vieux Emma, parmi ba joueurs ya Kotoko oyo babetaki finale na Vita, est-ce que eza pe na ba oyo babetaka finale contre TP Englebert? Natangi liste ya ba joueurs mais je ne me souviens plus que d´un de seul nom de l´epoque BLACK STARS , Ossei Koffi mais nayebi te soki gardien wana azalaka kolata ekoti pe abetaka finale contre vita, nayebi lisusu que prenom ya gardien yango ezalaka Robert mais kombo na ye ya famille nde nabosani, gardien yango ayaka kokufa tango batiaka ye mbeli na bar. En tout cas equipe africaine ya liboso oyo etika sango na Kin du moins po na géneration na biso eza Kotoko surtout po na finale contre Englebert. Po gardien wana ya ekoti atika penza sango na Kin, tozalaka koyoka kaka masolo na ba grands frères na ba grands cousins. Equipe nationale ya Ghana " Black Stars"pe etika sango. A part Ghana, nazalaka pe kobanga makasi Guinée ya Sekou Touré avec leur equipe nationale Syli National et surtout le Hafia FC de Conakry, ah! que des talents dans cette equipe, ba kombo ekimi ngai mais je me rappele encore de Papa Camara, Bernard Sylla le gardien, Seydouba Bangoura le terrible avant-centre na Nr.11 na bango pe azalaka terrible, il me semble que kombo na ye ezalaka Hamara Sylla (je le dis avec reserve)
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Re: Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  micheal 21/7/2009, 11:58 am

<BLOCKQUOTE id=4470dfb5>
ARAFAT a écrit:Mua motuna vieux Emma, parmi ba joueurs ya Kotoko oyo babetaki finale na Vita, est-ce que eza pe na ba oyo babetaka finale contre TP Englebert? Natangi liste ya ba joueurs mais je ne me souviens plus que d´un de seul nom de l´epoque BLACK STARS , Ossei Koffi mais nayebi te soki gardien wana azalaka kolata ekoti pe abetaka finale contre vita, nayebi lisusu que prenom ya gardien yango ezalaka Robert mais kombo na ye ya famille nde nabosani, gardien yango ayaka kokufa tango batiaka ye mbeli na bar. En tout cas equipe africaine ya liboso oyo etika sango na Kin du moins po na géneration na biso eza Kotoko surtout po na finale contre Englebert. Po gardien wana ya ekoti atika penza sango na Kin, tozalaka koyoka kaka masolo na ba grands frères na ba grands cousins. Equipe nationale ya Ghana " Black Stars"pe etika sango. A part Ghana, nazalaka pe kobanga makasi Guinée ya Sekou Touré avec leur equipe nationale Syli National et surtout le Hafia FC de Conakry, ah! que des talents dans cette equipe, ba kombo ekimi ngai mais je me rappele encore de Papa Camara, Bernard Sylla le gardien, Seydouba Bangoura le terrible avant-centre na Nr.11 na bango pe azalaka terrible, il me semble que kombo na ye ezalaka Hamara Sylla (je le dis avec reserve)

Hummmm. Quels bons souvenirs Ya Emma.

Oui Arafat, le gardien s'appellait Robert Mensah. Il était mort poignardé un ou deux ans avant la finale de Vita.

Ba Guinéens bazalaka somo, Bengaly Silla (No 11), Petit Sorry (No 7 avec dribbing et vitesse de la lumière), Thiam Ousmane Ntolo, Papa Camara.

Micheal</BLOCKQUOTE>
micheal
micheal


Revenir en haut Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Re: Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  Arafat 21/7/2009, 12:14 pm

Hummmm. Quels bons souvenirs Ya Emma
Goga ye mbuta nga ubaka nduenga, dia ye mbuta nga uyukuta vedire parle avec un ancien et tu seras instruit, mange avec un ancien et tu seras rassasié Very Happy
Arafat
Arafat


Revenir en haut Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Re: Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  Emmanuel-Kandolo 21/7/2009, 11:11 pm

Ndeko Arafat,

Ndenge ndeko Micheal yanoli ezali bongo. Kasi nakosenga mua patience muke, masolo ya match wana ezali mpo na vivaka yango. Masolo ya Hafia na Mazembe ou Hafia na Vita mpe ezali. Mua patience moke.

Sportivement,

Emmanuel kandolo

P.S. Merci na proverbe !!!

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973 Empty Re: Ba finales aller na retour ya IX ième Coupe d’Afrique des clubs champions na 1973

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum