congodiaspora
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le Deal du moment :
Pokémon EV06 : où acheter le Bundle Lot ...
Voir le deal

To Lobela Education mwa moke

2 participants

Aller en bas

To Lobela Education mwa moke Empty To Lobela Education mwa moke

Message  Emmanuel-Kandolo 2/4/2010, 3:45 pm

Ba ndeko,

Na ekolo na biso éducation ya bana ezali kokufa sans pour autant to se rendre compte na gravité ya situation. Kokufa miso oyo ezali kolakisa que ba responsables ya ekolo na biso ba comprendre te qu’environnement oyo muana azali kokola ezali na influence mingi na kokola na ye mpe yango esengeli ezala na espace ya masano ezali kotambola na kokola ya muana kino akokoma elenge mpe mokolo. Tango natangi ba responsables, nazali komona : l’Etat, territorial, municipalité, école na ba parents. Mpo tokoba na masolo malamu, nazali nde ko proposer tosolola mingi sur le rôle et la place des jeux et loisir, détente, musique na danse na vie ya muana na elenge.

Lisano (jeu) ezali lolenge ya ko manifester loisir na vie ya moto. Yango ekotaki na ba programmes scolaire mpo na ko divertir bana en tant qu’activité récréative sima ya ngonga ya concentration na ba leçons na kelasi. Jeu mpe ezalaki kosalema na ndaku sima ya ngonga ya kelasi mpe pendant ba périodes ya congés scolaires. Jeu ebandaki mpe kosalema na ba circonstances ebele : concours, réunions, célébrations, etc. Nionso oyo ezali kolanda kaka ezaleli mibale ya masano : intellectuelle ou physique.

Lelo oyo, tozali ko remarquer que na ekolo na biso, na ba écoles ou na cité, ba jeux ezali lisusu na esika na yango te mpo na ba raisons miyike : manque ya politiques éducative fondée na promotion ya pratique ya activité sportive na pratique ya jeu, ba infrastructures ekufa mpe idée ya kosala ya sika ezali te, désintérêt ya ba particuliers mpo ba investir na divertissement, bakonzi bazali wana bayebi te rôle nini masano ezali ko jouer na santé mpe épanouissement ya mutu, ba parents mpe bazali suffisamment éduquer te, environnement oyo ebandaki kopesa cadre na jeu ekufi mpo espace wana ezali détruit mpo na ba intérêts illégitimes : vente illégale ya ba terrains ya jeu, constructions anarchiques, destructions systématiques, etc.

Soki nazui exemple ya Kinshasa, avant indépendance, espace vert ezalaki mingi. Ata tango likanisi ya plan décennal ezuamaki na 1948, souci ya respect ya urbanisation ezalaki mpe ba construction ya ba cités ya sika e tenaki compte na yango mingi. Bana babandaki kokola na environnement oyo ebandaki kozala propice na ba jeux na loisir ya ndenge na ndenge : nzango, kede, kebo, silikoti, lipate, kukulu elombe, lipate, kanzenzekale, lipungu pungu na singa, liyoto, tata na mama, jeu ya mayi na molangi, jeu ya carte, jeu ya dame, jeu de six « dès », jeu ya ngola, jeu de billes, ba courses ya makolo, course ya jante ya vélo (cerceau), course ya pneu (kopapola na loboko ou ya ko guider pneu na ba nzete), fabrication ya ba voitures ya file de fer ou ya manzanza, ba ndaku na ba bateaux ya carton ou ya ba fiches ya I.B.M. avec fufu comme comme adhésif, cerf-volant, match ya ba bouchons, etc.

Soki tosali observation malamu, okomona que na ekolo na biso, bana balingi technique mingi , mpe mingi balekaka wana mpe sima, par manque de déboucher, manque ya orientation malamu na absence ya information adéquate, bakendeke kobuaka nzotu na ba écoles, facultés na ba instituts pédagogiques oyo bakokaki ko se retrouver kuna te. Tika na monisa ba techniques oyo muana asalaka mpe lolenge jeu esali que afunguama bongo (cerveau)
Na technique ya fabrication ya voiture de fils de fer, eyebani que fil de fer na bobine ezali ba « matières premières indispensables ». Muana azali na idée na mutu, sans description na yango sur le plancher, akeyi koluka ba fils de fer (fil de barbelé ou barbelé). Esengeli akata ba barbelés na pince. Sima, akofungola yango moko moko mpo ezali ya kolingma esika moko. Koteta yango na libanga mpo ekoma redresser. Une fois ba fils de fer nionso ekomi redresser malamu, abandi kosala ba formes oyo alingi mutuka na ye ezua en imitant dessin ya ba marques oyo eyebani. Sima ya ba formes, esengeli a raccorder ba formes nionso wana na fils ya bobines (kongenga ya fils mpe epesaka esthétique na car). Mpo mutuka etambola, esengeli ezala na ba roues na ba suspensions avant et arrière. Neti moteur oyo ekoki kotambusa mutuka ezali te, yango ekotambola na accélation ya mutu(etamboli ya mutu oyo azali kotambusa yango). Na yango, arbre ya direction ya mulayi mpe solidifier na biteni ya chambre à air nde ekosimba volant. Na nse na yango, ezali na crocher na suspension avant mpo e permettre mouvement ya rotation ya mobile. Soki idée ya kotiya minda eye, wana esengeli koluka ba ressorts ya matelas mpo e servir na amortisseurs mpo e amortir masse ya ba piles mpe e garder auteur ya châssis na niveau esengeli ezala.

Na oyo etali voiture ya manzanza ya sardines, yango ebendamaka na singa mpe etambolaka yango moko ou na convoi. Transmissions na yango ezali tige ya kombo mpe ba roues ezali ba capsules « bouchons ». Yango etiamaka neti lokola na voiture ya solo. Yango etiamaka na lolenge que likolo ya bouchon ekangana na boite ya sardines mpe kati ya bouchon emonana libanda (pembe). Mpo bouchon e se détacher na transmissions te, yango ekokangama na ndambu ya tige ya pondu « boulon ». Le tour est joué, car ebandi kotambola.

Technique mosusu nayebi ezali ya kosala piste ya jeu de bille ebengami tour de France. Muana akobeta mbata na mabele mpo a tester solidité ya sol. Soki mabele ezali makasi, akobuakela yango mayi kino ekolemba. Soki elembi, abandi mosala. Soki mpe mabele ezalaki makasi mingi te, abandi mosala. Tango azali kosala parcours ya tour de France na linzanza ya tomate comme pelleteuse, ayebi ndenge ya ko niveler piste na ye mpo e permettre na ba billes ezali na sima eleka liboso soki joueur a calculer trajectoire na ye malamu na angle ya shoot. Ba chicanes ezali mpe ba difficultés na virage soki owuti na ligne droite. Piste ya tour de France esalemi mpo na kopesa difficulté na jeu mpe oyo akobima champion, azali le plus astucieux.

Soki totali malamu, na fabrication ya cerf-volant, muana akosala yango en misant na longueur ya singa mpo ayebi que longueur ya singa nde ekosala hauteur ya cerf-volant na ye. Akozua elamba mpo asala toile na ye en mettant mbanzi ya mulayi mpe akatisi yango na transversale na ba mbazi mosusu mpo epesa eteni ya elamba ou ya plastique na ye, forme ya toile. Muana akotala sika direction ya vent en se référent na ba étapes ya nzete ya mbila ou ya cocotier, voir na matiti ya milayi. Sens yango ezali kokende elakisi nde direction ya mupepe. Alors, mpo cerf-volant epumbua, ye akokima na direction contraire na mupepe mpo epesa effet aérodynamique na cerf-volant na ye. Wana, ebandi komata tee na maximum ya hauteur na yango oyo ezalaki estimer initialement na longueur ya singa.


Bilenge basi mpe batikali sima te na technique ya kosala muan ya bitendi mpe na lolenge ya ko entretenir ye lokola mutu ya solo. Na lisano ya liyoto, tobandaki komona ndenge mingi babandaki kolamba na serieux nionso lokola bazali na libala. Tango muana muasi azali kosala tracer ya kede, sans ba mesures, azali kosala ba estimations na ye en fonction ya difficulté ya jeu oyo ezali ko tenir compte na équilibre sur un pied, kopusa libanga en dosant systématiquement mouvement ya pulsion de sorte que yango ezala proportionnel na espace esengeli libanga eleka te.

Na lisano ya silikoti, wana soulesse mpe synchronisation ya elenge muasi ezali sans pareil mpo esengeli azala apte ya klanda vitesse ya rotation ya silikoti mpe na ba variations na yango y compris na ba changements ya cadences.

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

To Lobela Education mwa moke Empty Re: To Lobela Education mwa moke

Message  Emmanuel-Kandolo 2/4/2010, 3:46 pm

Il est évident que ba loisirs mosusu ba boti balingaki yango te, kasi bana balingaki kosala yango na kinsueki : kokende na esobe kokanga mabangi, koluka makelele, kokende kosakana na zamba ya avocat, kosukola na mayi ya Kalamu ; Fuma ; Makelele ; N’djili ; Yolo ; Tshiangu ; Bitshiakutsiaku, mayi ya jaune, Belgika vers Sant Paul filles, mpe na ba bassins (piscines) ya Funa, Athénée de Kalina, stade tata Raphael, N’sele. Ba jeux mosusu eyaki kobakisama : une, deux, trois piano stop ! Baby-foot « Kickers », patins à roulettes, scrabble, (oyo ezali ba jeux bana oyo babandaki kowuta poto bakumbaki na vacances na Kinshasa).

Loisir ezalaki mpe kotinda bilenge na makanisi ma kosala ba lance-pierre na biteni ya chambre à air. Muana akokangisa yango na maseke mibale ya nzete oyo efandi na esika ye akosimbela. Biteni bia chambre à air oyo ekolinga maseke de sorte que na angle yango ekosala, atiya libanga ou nzika oyo eko servir na lisasi ya koboma ndeke. Na kelasi, version miniature na yango ezalaki kosalema na ba élastiques « molaso » na esika ya eteni ya chambre à air. Pouce na indexe ezalaki ko remplacer maseke ya nzete mpe libanga ou nzika ezalaki remplce na eteni ya lokasa (papier ou feuille) mpe muana abandaki kogumba yango en forme ya tenaille. Soki a pincer yango en tirant, na relâchement yango ekokende ko atteindre objectif na yango.

Loisir lokola pêche, ezalaki mpe ko intéresser bana. Koloba mbisi na nzete ya bambou na singa ya Michaux mpe na musopi mpo mbisi akangama. Mingi mingi, sima ya konoka ya mbula, soki fleuve etondi, mbisi ekokota tee na niveau ya belgika, Kalamu, Funa, Makelele, N’djili mpe ebandaki kotikala sima te.

Ba activités na zamba ebandaki mpe ko permettre na bana bamesana na ba fruits lokola mbila esobe, tondolo, matonge, makala kongi, mapela, safu, malala, baobas, mapakapaka. Komata nzete na cité kobuka ba cocoti (noix de coco), pay pay (papaye), madamen (badamier), maracuja, manga, manga sende, tamarin en coques (fruit préfère ya ba élèves ya athénée de Kalina, collège Albert 1er na lycée sacré cœur oyo babandaki kosala école buissonnière. Tomalin ezali déformation ya tamarin en coque ) etc.

Tango muana akomi elenge, esengeli akoba na ba activites recréatrices. Kasi, lelo oyo bilenge ya R.D.Congo bazali koyeba ko admirer eloko ya kitoko lisusu te mpe bazali limiter na ba idées. Na ba activités recréatrices, promenade ezalaka lisusu na makanisi te, bayebi kosala randonnées te. Elenge ya lelo azali na amour ya nature te mpe ayebi ndenge ya ko apprécier beaute naturelle te : promenade na bord ya fleuve, ko adminer levée na couchée ya soleil, intérêts ya botanique, kolinga ba plantes, fleures mpe nzete ebunga ye. Mingi bakendaka même pas ko visiter jardin botanique na Zoologique mpe bayebi même pas lolenge niama ezali. Richesse naturelle etondi na ekolo na biso, ezali koloba rien mpo na jeunesse.

Ba visites na ba lieux touristiques mpe organisations ya ba excursions soit na niveau ya ba clubs des jeunes na quartiers ou communes mpe na ba écoles, instituts superieurs mpe universites ezalaka lisusu te. Nionso oyo ezali kosala que jeunesse ekola sans kozala na admiration ya ba monuments, ba bâtiments na ba édifices na ba ouvrages kitoko etongami na ekolo na biso. Bilenge na ba kelasi babandaki kozua ba initiatives wana, ya ko organiser ba excursions na ba endroits touristiques ebele etondi na ekolo na biso. Ba Kinois babandaki kokende na Bas-Congo mpe na Brazzaville sans ko compter Maluku, N’Sele, Mont Ngaliema, Lac de ma Valée, chute de la Lukaya, Kimuenza, Kinkole, na ba sites misusu. Ba concerts na matinée, ba rencontrer sportives interscolaires mpe universitaires mpe ebandaki kosanisa bilenge na masano.

Pratiques ya ba sports kili kili ezalaki kotiya bana na ba dispositions malamu mpe ko développer sens ya instinct, tactique, souplesse, intelligence mpe kotiya mutu en confiance face na ba défis.

Ba passions ezali kobunga kaka boye ! Gout ya poésie na ba échanges ya ba cahiers de poésies, lectures ya ba arlequins mpe ba romans romans d’amour ; d’espionnage ; courtois ; policier ; historique, etc.) ; classiques ya ndenge na ndenge mpe ba revues lokola Amina, jeunes pour jeunes, Kouakou, Likembe, etc.

Na nionso oyo, na observer lisusu que bilenge ya lelo : filles et garçons, bakomi na langages ya ba bills na ba yankees. Or, kala ebandaka kobengama langage ya ba voyous ou hindou bill. Lelo oyo elobeli ekoma incompréhensible : jeune fille azali lisusu koloba na elobeli ya muasi te, avec charme et tendresse ! Timbre vocal ya muana muasi ezali lisusu kosala elengi na litoyi te mpo langage etonda vulgarité na non-sens. Muana mobali mpe kuna, ayebi lisusu koloba clairement te. Langage etengama na ba vocables oyo inintelligibles. Ayebi lisusu kobimisa maloba ya ko exprimer na ko formuler avec courtoisie admiration na ye mpo na elenge muasi te. Ko draguer ezali lisusu na maloba ma séduction te mpe makambo oyo ezali kokende na yango, ekoma négliger : présentation, élégance, elobeli, personnalité mpe ezaleli ya bo moto. Maloba ya ko fole, kokuesia na yango petite chérie ezali lisusu te mpo na limite ya ouverture d’esprit na manque ya kozala naturel. Ba mots gentils ebunga, ba compliments ezalaka lisusu te, ba règles élémentaires ya savoir vivre en société elimua, kobunga ko captiver fille na lisolo, consistance ya lisolo entre fille et garçon ezalaka lisusu te. Nionso oyo mpo esprit imaginatif ebunga na mitu ya bilenge mpo ki yankee, ki bill na ki mutu ya mouvement mpe ko se comporter lokola musicien abaluka mutu ezali kozua ampleur moko incroyable mpe ezali kokoma normal esika nionso.

Miziki na mabina, yango ezali lisusu komema esprit ya elenge te tout comme ezali lisusu ko procurer nsayi oyo ezalaki kosala que elenge a se retrouver na oyo ye azali ko vivre ou ko s’imaginer ko vivre na jeunesse na ye te. Au contraire, miziki ekomi accessoire ya ko accompagner masanga mpo na koluka milangua. Elenge akomi victime ya ba brasseries oyo ezali kotala ba intérêts commerciaux na bango na ko organiser ba concerts oyo ezali kobebisa ye. Jeune ayebaki kokabola makambo. Na ba feti, tobandaki komona que miziki ebengami : slow, ebandaki kaka kobeta na butu mpe kati ya mikolo. Soki ba nzembo wana ebandi kobeta, minda ekufi. Souvent, yango ebandaki kobeta esika ba boti bazali te. Soki feti ezali kosalema na ndaku ya ba boti, elingi koloba que bango bazali te ou batikeli bilenge basepela bango na bango. En tout cas, bana na bakolo bazalaki mêler na miziki wana te. Lelo oyo, ba nzembo ya impudicité bazali koyembela elenge, ye, azali ko confondre yango na ba nzembo oyo ezali ko toucher sensibilité mpe ko inciter ye na bolingo kati na elenge mobali na muasi. Manque ya pudeur mpe na banalisation ya sexualité na ba textes ya nzembo ezali kozua facilement connotation ya ba nzembo ya bolingo tout comme Kosangisa ba nzembo ya nsoni na mabima ma nsoni, ezali kosala que miziki e perdre appartenance na yango na art mpe ekoma pervers. Nde Kobunga nzela nionso wana.

Kobunga ya elenge ezali kosala que ye ayeba te que centres ya documentations mpe archives, librairies, bibliothèques, salons de livres, centres culturels, cinémas, musées, maisons ya bilenge, salles de sport, cinémathèques, bassins de natation, parcs na jardins publics, ba espaces de jeux, salles de réunions ; conférences, fêtes ; spectacles, espace ya exposition artistiques, médiathèque, discothèques, promotion ya culture na art, ezali indispensables mpo na jeunesse.

Vie ya mutu ezalaka na ba étapes na yango. Nakati wana, jeunesse ezali étape esengeli kosakana mpe ko profiter na masano ya vie mpo soki yango eleki, esengeli mutu a se concentrer na ba priorités, obligations na ba responsabilités. mosusu oyo ekobanda lisusu kotikela ye tango ebele te neti oyo azalaki na yango na bolenge bua ye.

Patriotiquement,

Emmanuel Kandolo

Emmanuel-Kandolo


Revenir en haut Aller en bas

To Lobela Education mwa moke Empty Re: To Lobela Education mwa moke

Message  regarder et bien voir. 24/1/2011, 1:55 am

Je ne suis pas doue' avec le francais, certes; mais le Lingala me parait toujours difficile a` lire, j'ai quand meme essaye' de comprendre ta perspective.

Ceux qu'on considere comme les piliers de la science ne commencaient pas par les analyses pour monter et inventer comme ca a ete' fait, mais ils y sont arrive's en s'amusant, au hasard, et par jeux. Souvent leurs peres possedaient des ateliers au sein desquels ils ont grandi, observant et touchant ca` et la`. Donc je suis de meme avis que les jeux, les detentes et le loisir parviennent a` developper l'esprit de l'enfant pour que plus tard celui-ci atteigne la capacite' de manipuler, manoeuvrer, initier, observer, et de creer.

Le probleme est que ca touche au niveau politique, l'Etat avec son pouvoir de redistribuer les biens est le mieux positionne' a` reinstaller cette vision des choses. Esperons que la nouvelle republique de bientot va tendre la main aux congolais de tous les horizon pour rebatir ensemble ce Congo Rd par le travail et les bonnes intentions.

regarder et bien voir.


Revenir en haut Aller en bas

To Lobela Education mwa moke Empty Re: To Lobela Education mwa moke

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum